Revelation 3 (BOLCB2)

1 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Sarde : « Tala maloba ya Ye oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo : Nayebi misala na yo ; nayebi malamu ete okenda sango ete ozali na bomoi, nzokande ozali na yo ya kokufa. 2 Lamuka ! Lendisa bato oyo batikali mpe ba-oyo bakomi pene ya kokufa, pamba te namoni ete misala na yo ezali ya kokoka te liboso ya Nzambe na Ngai. 3 Yango wana, kanisa malamu mateya oyo ozwaki mpe oyokaki ; tosa mpe bongola motema na yo. Kasi soki olamuki te, nakoya lokola moyibi, mpe okoyeba te ngonga oyo nakoya epai na yo. 4 Nzokande, kati na Sarde, ozali na ndambo ya bato oyo babebisaki te bilamba na bango. Bakotambola elongo na Ngai, na bilamba ya pembe, pamba te babongi na yango. 5 Moto oyo akolonga, bakolatisa ye bilamba ya pembe lokola bango. Nakolongola kombo na ye te na buku ya bomoi, kasi nakondima yango liboso ya Tata na Ngai mpe liboso ya ba-anjelu na Ye. 6 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! » 7 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi : « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi : oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango ; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango. 8 Nayebi misala na yo. Tala, natiaki liboso na yo ekuke moko ya kofungwama, ekuke oyo moko te akoki kokanga. Nayebi ete ozali na nguya moke, obatelaki Liloba na Ngai mpe owanganaki te Kombo na Ngai. 9 Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo. 10 Lokola obatelaki etinda na Ngai ya kozala na molende, Ngai mpe nakobatela yo na tango ya pasi oyo ekokweyela mokili mobimba mpo na komeka bavandi na yango. 11 Nazali koya kala mingi te. Oyo ozali na yango, simba yango makasi mpo ete moko te abotola yo motole na yo. 12 Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye. 13 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! » 14 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Laodise : Tala maloba ya Amen, Motatoli ya sembo mpe ya solo, Mokonzi ya bikelamu nyonso ya Nzambe : 15 Nayebi misala na yo, mpe nayebi malamu ete ozali malili te mpe ozali moto te ; nalingaki nde ozala malili to moto. 16 Kasi lokola ozali malili te mpe ozali moto te, nazali kosanza yo wuta na monoko na Ngai. 17 Olobaka : « Nazali mozwi ! Nakomi na bozwi ebele mpe nazali na posa ya eloko te. » Kasi ozali koyeba te ete ozali moto ya pasi mpe ya mawa, ozali nde mobola, mokufi miso mpe ozali bolumbu. 18 Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu. 19 Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo. 20 Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai. 21 Moto oyo akolonga, nakopesa ye makoki ya kovanda elongo na Ngai, na Kiti na Ngai ya Bokonzi, ndenge Ngai mpe, sima na Ngai kolonga, nakendeki kovanda elongo na Tata na Ngai, na Kiti na Ye ya Bokonzi. 22 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba !

In Other Versions

Revelation 3 in the ANGEFD

Revelation 3 in the ANTPNG2D

Revelation 3 in the AS21

Revelation 3 in the BAGH

Revelation 3 in the BBPNG

Revelation 3 in the BBT1E

Revelation 3 in the BDS

Revelation 3 in the BEV

Revelation 3 in the BHAD

Revelation 3 in the BIB

Revelation 3 in the BLPT

Revelation 3 in the BNT

Revelation 3 in the BNTABOOT

Revelation 3 in the BNTLV

Revelation 3 in the BOATCB

Revelation 3 in the BOATCB2

Revelation 3 in the BOBCV

Revelation 3 in the BOCNT

Revelation 3 in the BOECS

Revelation 3 in the BOGWICC

Revelation 3 in the BOHCB

Revelation 3 in the BOHCV

Revelation 3 in the BOHLNT

Revelation 3 in the BOHNTLTAL

Revelation 3 in the BOICB

Revelation 3 in the BOILNTAP

Revelation 3 in the BOITCV

Revelation 3 in the BOKCV

Revelation 3 in the BOKCV2

Revelation 3 in the BOKHWOG

Revelation 3 in the BOKSSV

Revelation 3 in the BOLCB

Revelation 3 in the BOMCV

Revelation 3 in the BONAV

Revelation 3 in the BONCB

Revelation 3 in the BONLT

Revelation 3 in the BONUT2

Revelation 3 in the BOPLNT

Revelation 3 in the BOSCB

Revelation 3 in the BOSNC

Revelation 3 in the BOTLNT

Revelation 3 in the BOVCB

Revelation 3 in the BOYCB

Revelation 3 in the BPBB

Revelation 3 in the BPH

Revelation 3 in the BSB

Revelation 3 in the CCB

Revelation 3 in the CUV

Revelation 3 in the CUVS

Revelation 3 in the DBT

Revelation 3 in the DGDNT

Revelation 3 in the DHNT

Revelation 3 in the DNT

Revelation 3 in the ELBE

Revelation 3 in the EMTV

Revelation 3 in the ESV

Revelation 3 in the FBV

Revelation 3 in the FEB

Revelation 3 in the GGMNT

Revelation 3 in the GNT

Revelation 3 in the HARY

Revelation 3 in the HNT

Revelation 3 in the IRVA

Revelation 3 in the IRVB

Revelation 3 in the IRVG

Revelation 3 in the IRVH

Revelation 3 in the IRVK

Revelation 3 in the IRVM

Revelation 3 in the IRVM2

Revelation 3 in the IRVO

Revelation 3 in the IRVP

Revelation 3 in the IRVT

Revelation 3 in the IRVT2

Revelation 3 in the IRVU

Revelation 3 in the ISVN

Revelation 3 in the JSNT

Revelation 3 in the KAPI

Revelation 3 in the KBT1ETNIK

Revelation 3 in the KBV

Revelation 3 in the KJV

Revelation 3 in the KNFD

Revelation 3 in the LBA

Revelation 3 in the LBLA

Revelation 3 in the LNT

Revelation 3 in the LSV

Revelation 3 in the MAAL

Revelation 3 in the MBV

Revelation 3 in the MBV2

Revelation 3 in the MHNT

Revelation 3 in the MKNFD

Revelation 3 in the MNG

Revelation 3 in the MNT

Revelation 3 in the MNT2

Revelation 3 in the MRS1T

Revelation 3 in the NAA

Revelation 3 in the NASB

Revelation 3 in the NBLA

Revelation 3 in the NBS

Revelation 3 in the NBVTP

Revelation 3 in the NET2

Revelation 3 in the NIV11

Revelation 3 in the NNT

Revelation 3 in the NNT2

Revelation 3 in the NNT3

Revelation 3 in the PDDPT

Revelation 3 in the PFNT

Revelation 3 in the RMNT

Revelation 3 in the SBIAS

Revelation 3 in the SBIBS

Revelation 3 in the SBIBS2

Revelation 3 in the SBICS

Revelation 3 in the SBIDS

Revelation 3 in the SBIGS

Revelation 3 in the SBIHS

Revelation 3 in the SBIIS

Revelation 3 in the SBIIS2

Revelation 3 in the SBIIS3

Revelation 3 in the SBIKS

Revelation 3 in the SBIKS2

Revelation 3 in the SBIMS

Revelation 3 in the SBIOS

Revelation 3 in the SBIPS

Revelation 3 in the SBISS

Revelation 3 in the SBITS

Revelation 3 in the SBITS2

Revelation 3 in the SBITS3

Revelation 3 in the SBITS4

Revelation 3 in the SBIUS

Revelation 3 in the SBIVS

Revelation 3 in the SBT

Revelation 3 in the SBT1E

Revelation 3 in the SCHL

Revelation 3 in the SNT

Revelation 3 in the SUSU

Revelation 3 in the SUSU2

Revelation 3 in the SYNO

Revelation 3 in the TBIAOTANT

Revelation 3 in the TBT1E

Revelation 3 in the TBT1E2

Revelation 3 in the TFTIP

Revelation 3 in the TFTU

Revelation 3 in the TGNTATF3T

Revelation 3 in the THAI

Revelation 3 in the TNFD

Revelation 3 in the TNT

Revelation 3 in the TNTIK

Revelation 3 in the TNTIL

Revelation 3 in the TNTIN

Revelation 3 in the TNTIP

Revelation 3 in the TNTIZ

Revelation 3 in the TOMA

Revelation 3 in the TTENT

Revelation 3 in the UBG

Revelation 3 in the UGV

Revelation 3 in the UGV2

Revelation 3 in the UGV3

Revelation 3 in the VBL

Revelation 3 in the VDCC

Revelation 3 in the YALU

Revelation 3 in the YAPE

Revelation 3 in the YBVTP

Revelation 3 in the ZBP