Revelation 9 (BOLCB2)
1 Anjelu ya mitano abetaki kelelo, mpe namonaki monzoto kokweya na mokili wuta na Lola. Fungola ya libulu ya monene mpe ya molili makasi epesamaki na monzoto yango. 2 Tango efungolaki libulu yango, milinga ebele emataki longwa kuna ; ezalaki lokola milinga oyo ebimaka na fulu monene ya moto makasi, mpe eyindisaki moyi mpe mopepe. 3 Wuta na milinga yango, mankoko ebimaki, epanzanaki na mokili mpe epesamelaki bokonzi lokola oyo ya bakoto. 4 Nzokande epesamelaki mitindo ete esala mabe te na matiti ya mokili to na nkona nyonso ya mobesu to na nzete nyonso, kasi esala mabe kaka na bato oyo bazangi kashe ya Nzambe na bambunzu na bango. 5 Esengelaki konyokola bango basanza mitano, kasi esengelaki te koboma bango. Pasi oyo ezalaki kopesa ekokanaki na oyo moto ayokaka soki koto eswi ye. 6 Na basanza wana mitano, bato bakoluka kufa, kasi bakozwa yango te ; bakolinga kokufa, kasi kufa ekokima bango. 7 Mankoko yango ezalaki lokola bampunda oyo babongisi mpo na etumba. Na mito na yango, ezalaki na biloko moko lokola mitole ya wolo, mpe bilongi na yango ezalaki lokola bilongi ya bato. 8 Suki na yango ezalaki lokola suki ya basi, mpe minu na yango ezalaki lokola minu ya nkosi. 9 Tolo na yango ezalaki lokola bibende oyo basoda balataka na tolo, mpe makelele ya mapapu na yango ezalaki lokola makelele ya bashar oyo bampunda ebele ezali kobenda mpo na etumba. 10 Mikila na yango ezalaki na basonge lokola mikila ya bakoto, mpe nguya na yango ya konyokola bato basanza mitano ezalaki kati na mikila na yango. 11 Anjelu ya libulu ya monene mpe ya molili makasi nde azalaki mokonzi na yango. Kombo na ye, na lokota ya Ebre, « Abadoni ; » mpe, na lokota ya Greki, « Apolioni. » 12 Tango pasi ya liboso elekaki, bapasi mosusu mibale elandaki. 13 Anjelu ya motoba abetaki kelelo, mpe nayokaki mongongo moko kobima longwa na maseke minei ya etumbelo oyo basala na wolo, etumbelo oyo ezalaki liboso ya Nzambe. 14 Mongongo yango ezalaki koloba na anjelu ya motoba oyo azalaki na kelelo na maboko : « Fungola ba-anjelu minei oyo bazali ya kokangama na minyololo pembeni ya ebale monene Efrate. » 15 Boye ba-anjelu wana minei oyo babongisamaki mpo na ngonga wana, mokolo wana, sanza wana mpe mobu wana, bafungolamaki mpo ete baboma eteni moko kati na biteni misato ya bato. 16 Bazalaki minkoko nkama mibale ya basoda oyo babundaka na likolo ya bampunda. Yango nde motango na bango oyo nayokaki. 17 Tala ndenge nini, kati na emoniseli na ngai, bampunda mpe basoda oyo babundaka na likolo na yango bazalaki : balataki bibende oyo basoda balataka mpo na kobatela tolo. Bibende yango ezalaki ya motane makasi lokola moto, ya langi ya bule ya pete mpe ya langi ya mosaka ; bongo mito ya bampunda ezalaki lokola mito ya bankosi, mpe minoko na yango ezalaki kobimisa moto, milinga mpe sofolo. 18 Tala bapasi misato oyo ezalaki kobima na minoko ya bampunda : moto, milinga mpe sofolo. Ebomaki eteni moko kati na biteni misato ya bato. 19 Nguya ya bampunda ezalaki kati na minoko mpe na mikila na yango, pamba te mikila na yango ezalaki lokola banyoka, mpe ezalaki na mito oyo, na nzela na yango, ezalaki kosala bato mabe. 20 Kasi bato oyo bakufaki te na nzela ya bapasi wana batikaki te banzambe oyo maboko na bango moko esalaki ; batikaki te kogumbamela milimo mabe mpe banzambe ya bikeko oyo basala na wolo, na palata, na bronze, na mabanga mpe na mabaya atako emonaka te, eyokaka te mpe eninganaka te. 21 Batikaki mpe te koboma bato, misala na bango ya maji, kindumba na bango mpe moyibi na bango.
In Other Versions
Revelation 9 in the ANGEFD
Revelation 9 in the ANTPNG2D
Revelation 9 in the AS21
Revelation 9 in the BAGH
Revelation 9 in the BBPNG
Revelation 9 in the BBT1E
Revelation 9 in the BDS
Revelation 9 in the BEV
Revelation 9 in the BHAD
Revelation 9 in the BIB
Revelation 9 in the BLPT
Revelation 9 in the BNT
Revelation 9 in the BNTABOOT
Revelation 9 in the BNTLV
Revelation 9 in the BOATCB
Revelation 9 in the BOATCB2
Revelation 9 in the BOBCV
Revelation 9 in the BOCNT
Revelation 9 in the BOECS
Revelation 9 in the BOGWICC
Revelation 9 in the BOHCB
Revelation 9 in the BOHCV
Revelation 9 in the BOHLNT
Revelation 9 in the BOHNTLTAL
Revelation 9 in the BOICB
Revelation 9 in the BOILNTAP
Revelation 9 in the BOITCV
Revelation 9 in the BOKCV
Revelation 9 in the BOKCV2
Revelation 9 in the BOKHWOG
Revelation 9 in the BOKSSV
Revelation 9 in the BOLCB
Revelation 9 in the BOMCV
Revelation 9 in the BONAV
Revelation 9 in the BONCB
Revelation 9 in the BONLT
Revelation 9 in the BONUT2
Revelation 9 in the BOPLNT
Revelation 9 in the BOSCB
Revelation 9 in the BOSNC
Revelation 9 in the BOTLNT
Revelation 9 in the BOVCB
Revelation 9 in the BOYCB
Revelation 9 in the BPBB
Revelation 9 in the BPH
Revelation 9 in the BSB
Revelation 9 in the CCB
Revelation 9 in the CUV
Revelation 9 in the CUVS
Revelation 9 in the DBT
Revelation 9 in the DGDNT
Revelation 9 in the DHNT
Revelation 9 in the DNT
Revelation 9 in the ELBE
Revelation 9 in the EMTV
Revelation 9 in the ESV
Revelation 9 in the FBV
Revelation 9 in the FEB
Revelation 9 in the GGMNT
Revelation 9 in the GNT
Revelation 9 in the HARY
Revelation 9 in the HNT
Revelation 9 in the IRVA
Revelation 9 in the IRVB
Revelation 9 in the IRVG
Revelation 9 in the IRVH
Revelation 9 in the IRVK
Revelation 9 in the IRVM
Revelation 9 in the IRVM2
Revelation 9 in the IRVO
Revelation 9 in the IRVP
Revelation 9 in the IRVT
Revelation 9 in the IRVT2
Revelation 9 in the IRVU
Revelation 9 in the ISVN
Revelation 9 in the JSNT
Revelation 9 in the KAPI
Revelation 9 in the KBT1ETNIK
Revelation 9 in the KBV
Revelation 9 in the KJV
Revelation 9 in the KNFD
Revelation 9 in the LBA
Revelation 9 in the LBLA
Revelation 9 in the LNT
Revelation 9 in the LSV
Revelation 9 in the MAAL
Revelation 9 in the MBV
Revelation 9 in the MBV2
Revelation 9 in the MHNT
Revelation 9 in the MKNFD
Revelation 9 in the MNG
Revelation 9 in the MNT
Revelation 9 in the MNT2
Revelation 9 in the MRS1T
Revelation 9 in the NAA
Revelation 9 in the NASB
Revelation 9 in the NBLA
Revelation 9 in the NBS
Revelation 9 in the NBVTP
Revelation 9 in the NET2
Revelation 9 in the NIV11
Revelation 9 in the NNT
Revelation 9 in the NNT2
Revelation 9 in the NNT3
Revelation 9 in the PDDPT
Revelation 9 in the PFNT
Revelation 9 in the RMNT
Revelation 9 in the SBIAS
Revelation 9 in the SBIBS
Revelation 9 in the SBIBS2
Revelation 9 in the SBICS
Revelation 9 in the SBIDS
Revelation 9 in the SBIGS
Revelation 9 in the SBIHS
Revelation 9 in the SBIIS
Revelation 9 in the SBIIS2
Revelation 9 in the SBIIS3
Revelation 9 in the SBIKS
Revelation 9 in the SBIKS2
Revelation 9 in the SBIMS
Revelation 9 in the SBIOS
Revelation 9 in the SBIPS
Revelation 9 in the SBISS
Revelation 9 in the SBITS
Revelation 9 in the SBITS2
Revelation 9 in the SBITS3
Revelation 9 in the SBITS4
Revelation 9 in the SBIUS
Revelation 9 in the SBIVS
Revelation 9 in the SBT
Revelation 9 in the SBT1E
Revelation 9 in the SCHL
Revelation 9 in the SNT
Revelation 9 in the SUSU
Revelation 9 in the SUSU2
Revelation 9 in the SYNO
Revelation 9 in the TBIAOTANT
Revelation 9 in the TBT1E
Revelation 9 in the TBT1E2
Revelation 9 in the TFTIP
Revelation 9 in the TFTU
Revelation 9 in the TGNTATF3T
Revelation 9 in the THAI
Revelation 9 in the TNFD
Revelation 9 in the TNT
Revelation 9 in the TNTIK
Revelation 9 in the TNTIL
Revelation 9 in the TNTIN
Revelation 9 in the TNTIP
Revelation 9 in the TNTIZ
Revelation 9 in the TOMA
Revelation 9 in the TTENT
Revelation 9 in the UBG
Revelation 9 in the UGV
Revelation 9 in the UGV2
Revelation 9 in the UGV3
Revelation 9 in the VBL
Revelation 9 in the VDCC
Revelation 9 in the YALU
Revelation 9 in the YAPE
Revelation 9 in the YBVTP
Revelation 9 in the ZBP