Acts 3 (BOLCB2)

1 Ezalaki mokolo moko, Petelo mpe Yoane bakendeki na Tempelo na tango ya mabondeli : ezalaki na ngonga ya misato sima na midi. 2 Nzokande, ezalaki mpe na bato moko oyo bazalaki komema moto moko akufa makolo wuta abotama, mpe bazalaki kotia ye mikolo nyonso na ekuke ya Tempelo mpo ete asengaka mbongo epai ya bato oyo bazalaki kokota. Bazalaki kobenga ekuke yango « Ekuke ya kitoko. » 3 Tango amonaki Petelo mpe Yoane kokota na Tempelo, asengaki bango likabo ya mawa. 4 Boye, Petelo mpe Yoane batalaki ye malamu, mpe Petelo alobaki na ye :— Tala biso ! 5 Moto yango atalaki bango malamu penza, na likanisi ya kozwa eloko epai na bango. 6 Kasi Petelo alobaki na ye :— Nazangi mbongo to wolo ya kopesa yo, kasi oyo nazali na yango, nazali kopesa yo yango : na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola. 7 Bongo, asimbaki ye na loboko ya mobali mpe atelemisaki ye. Mbala moko, makolo na ye ekomaki makasi. 8 Mbala moko, atelemaki mpe abandaki kotambola, akotaki nzela moko na bango kati na lopango ya Tempelo : azalaki kotambola, kopumbwa mpe kokumisa Nzambe. 9 Tango bato nyonso bamonaki ye kotambola mpe kokumisa Nzambe, 10 basosolaki ete ezali moto oyo azalaki kovanda na « Ekuke ya kitoko » ya Tempelo mpo na kosenga makabo ya mawa. Bango nyonso bakamwaki mingi penza, mpe somo ekangaki bango mpo na makambo oyo esalemaki epai na ye. 11 Lokola moto yango atingamaki na Petelo mpe Yoane, bato nyonso bakamwaki mpe bayaki na lombangu epai na bango, na esika oyo babengaka « Veranda ya Salomo. » 12 Tango Petelo amonaki bongo, alobaki na bango :— Bato ya Isalaele, mpo na nini bozali kokamwa likambo oyo ? Mpo na nini bozali kotala biso lokola nde biso bato tosali ete moto oyo atambola, na nzela ya nguya mpe botosi na biso kati na makambo ya Nzambe ? 13 Biso te ! Ezali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso, nde apesi nkembo na Yesu, Mosali na Ye, oyo bino bokabaki mpo ete baboma Ye. Yango wana, bowanganaki Ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola Ye. 14 Bowanganaki Ye oyo azali Mosantu mpe Sembo. Boye, bosengaki ete Pilato atikela bino mobomi na esika ya Yesu. 15 Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, bongo biso tozali penza batatoli ya likambo yango. 16 Ezali na nzela ya kondima kati na Kombo na Yesu nde moto oyo bozali komona mpe boyebi azwi makasi ya kotelema. Ezali Kombo na Yesu mpe kondima oyo ewuti kati na Yesu nde ekomisi nzoto na ye mobimba kolongono ndenge bozali komona yango. 17 Sik’oyo bandeko na ngai, nayebi ete bosalaki makambo na kozanga boyebi, ndenge bakonzi na bino basalaki. 18 Kasi ezali ndenge wana nde Nzambe akokisaki makambo oyo aloba wuta kala na nzela ya basakoli nyonso, ete Klisto na Ye asengeli komona pasi. 19 Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai ya Nzambe mpo ete alimbisa masumu na bino, 20 mpe mpo ete Nkolo akoka kopesa bino tango ya kopema mpe akoka kotindela bino Klisto oyo apona mpo na bino—Ye nde Yesu. 21 Asengeli kotikala kuna na Likolo kino na tango oyo Nzambe akobongisa biloko nyonso, ndenge alaka yango wuta kala na nzela ya babulami na Ye, basakoli. 22 Pamba te Moyize alobaki : « Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino ; bosengeli kotosa nyonso oyo akoloba na bino. 23 Moto nyonso oyo akotosa te mosakoli yango, bakolongola ye kati na bato na ye na nzela ya kufa. » 24 Basakoli nyonso, kobanda na Samuele kino na basakoli oyo bayaki sima na ye, bango nyonso basakolaki na tina na makambo oyo ezali kosalema na mikolo oyo. 25 Bino nde bozali bakitani ya basakoli mpe ya Boyokani oyo Nzambe asalaki elongo na bakoko na bino, tango alobaki na Abrayami : « Nakopambola mabota nyonso ya mokili na nzela ya bakitani na yo ! » 26 Tango Nzambe asekwisaki Mosali na Ye, atindaki Ye nanu epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola, moko na moko kati na bino, mosika na banzela na bino ya mabe.

In Other Versions

Acts 3 in the ANGEFD

Acts 3 in the ANTPNG2D

Acts 3 in the AS21

Acts 3 in the BAGH

Acts 3 in the BBPNG

Acts 3 in the BBT1E

Acts 3 in the BDS

Acts 3 in the BEV

Acts 3 in the BHAD

Acts 3 in the BIB

Acts 3 in the BLPT

Acts 3 in the BNT

Acts 3 in the BNTABOOT

Acts 3 in the BNTLV

Acts 3 in the BOATCB

Acts 3 in the BOATCB2

Acts 3 in the BOBCV

Acts 3 in the BOCNT

Acts 3 in the BOECS

Acts 3 in the BOGWICC

Acts 3 in the BOHCB

Acts 3 in the BOHCV

Acts 3 in the BOHLNT

Acts 3 in the BOHNTLTAL

Acts 3 in the BOICB

Acts 3 in the BOILNTAP

Acts 3 in the BOITCV

Acts 3 in the BOKCV

Acts 3 in the BOKCV2

Acts 3 in the BOKHWOG

Acts 3 in the BOKSSV

Acts 3 in the BOLCB

Acts 3 in the BOMCV

Acts 3 in the BONAV

Acts 3 in the BONCB

Acts 3 in the BONLT

Acts 3 in the BONUT2

Acts 3 in the BOPLNT

Acts 3 in the BOSCB

Acts 3 in the BOSNC

Acts 3 in the BOTLNT

Acts 3 in the BOVCB

Acts 3 in the BOYCB

Acts 3 in the BPBB

Acts 3 in the BPH

Acts 3 in the BSB

Acts 3 in the CCB

Acts 3 in the CUV

Acts 3 in the CUVS

Acts 3 in the DBT

Acts 3 in the DGDNT

Acts 3 in the DHNT

Acts 3 in the DNT

Acts 3 in the ELBE

Acts 3 in the EMTV

Acts 3 in the ESV

Acts 3 in the FBV

Acts 3 in the FEB

Acts 3 in the GGMNT

Acts 3 in the GNT

Acts 3 in the HARY

Acts 3 in the HNT

Acts 3 in the IRVA

Acts 3 in the IRVB

Acts 3 in the IRVG

Acts 3 in the IRVH

Acts 3 in the IRVK

Acts 3 in the IRVM

Acts 3 in the IRVM2

Acts 3 in the IRVO

Acts 3 in the IRVP

Acts 3 in the IRVT

Acts 3 in the IRVT2

Acts 3 in the IRVU

Acts 3 in the ISVN

Acts 3 in the JSNT

Acts 3 in the KAPI

Acts 3 in the KBT1ETNIK

Acts 3 in the KBV

Acts 3 in the KJV

Acts 3 in the KNFD

Acts 3 in the LBA

Acts 3 in the LBLA

Acts 3 in the LNT

Acts 3 in the LSV

Acts 3 in the MAAL

Acts 3 in the MBV

Acts 3 in the MBV2

Acts 3 in the MHNT

Acts 3 in the MKNFD

Acts 3 in the MNG

Acts 3 in the MNT

Acts 3 in the MNT2

Acts 3 in the MRS1T

Acts 3 in the NAA

Acts 3 in the NASB

Acts 3 in the NBLA

Acts 3 in the NBS

Acts 3 in the NBVTP

Acts 3 in the NET2

Acts 3 in the NIV11

Acts 3 in the NNT

Acts 3 in the NNT2

Acts 3 in the NNT3

Acts 3 in the PDDPT

Acts 3 in the PFNT

Acts 3 in the RMNT

Acts 3 in the SBIAS

Acts 3 in the SBIBS

Acts 3 in the SBIBS2

Acts 3 in the SBICS

Acts 3 in the SBIDS

Acts 3 in the SBIGS

Acts 3 in the SBIHS

Acts 3 in the SBIIS

Acts 3 in the SBIIS2

Acts 3 in the SBIIS3

Acts 3 in the SBIKS

Acts 3 in the SBIKS2

Acts 3 in the SBIMS

Acts 3 in the SBIOS

Acts 3 in the SBIPS

Acts 3 in the SBISS

Acts 3 in the SBITS

Acts 3 in the SBITS2

Acts 3 in the SBITS3

Acts 3 in the SBITS4

Acts 3 in the SBIUS

Acts 3 in the SBIVS

Acts 3 in the SBT

Acts 3 in the SBT1E

Acts 3 in the SCHL

Acts 3 in the SNT

Acts 3 in the SUSU

Acts 3 in the SUSU2

Acts 3 in the SYNO

Acts 3 in the TBIAOTANT

Acts 3 in the TBT1E

Acts 3 in the TBT1E2

Acts 3 in the TFTIP

Acts 3 in the TFTU

Acts 3 in the TGNTATF3T

Acts 3 in the THAI

Acts 3 in the TNFD

Acts 3 in the TNT

Acts 3 in the TNTIK

Acts 3 in the TNTIL

Acts 3 in the TNTIN

Acts 3 in the TNTIP

Acts 3 in the TNTIZ

Acts 3 in the TOMA

Acts 3 in the TTENT

Acts 3 in the UBG

Acts 3 in the UGV

Acts 3 in the UGV2

Acts 3 in the UGV3

Acts 3 in the VBL

Acts 3 in the VDCC

Acts 3 in the YALU

Acts 3 in the YAPE

Acts 3 in the YBVTP

Acts 3 in the ZBP