Ezekiel 7 (BOLCB2)
1 Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na mokili ya Isalaele :‹ Esili ! Tango ya suka ebelemimpo na mokili mobimba ! 3 Tango ya suka ekoki sik’oyo mpo na yo,nakopelisela yo kanda na Ngai,nakosambisa yo kolanda etamboli na yompe nakofuta yo kolanda misala na yo nyonso ya mbindo. 4 Nakotala yo na liso ya mawa tempe nakobikisa yo te ;nakofuta yo solo kolanda etamboli na yompe kolanda misala ya mbindo oyo ezali kati na yo.Boye okoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › 5 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :‹ Mawa ! Pasi ya somo ezali koya ! 6 Tango ya suka ebelemi !Ya solo, tango ya suka ebelemi penza !Etelemeli yo.Tala, tango yango esili kobelema ! 7 Kobebisama ekokomela yo, yo movandi ya mokili !Tango yango ekoki, mokolo yango ebelemi,somo makasi ekoti,mpe esengo ezali lisusu te na likolo ya bangomba. 8 Nakomi pene ya kopelisela yo kanda na Ngaimpe ya kotombokela yo !Nakosambisa yo kolanda etambolimpe misala na yo nyonso ya mbindo. 9 Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te,nakofuta yo solo kolanda etamboli na yompe misala ya mbindo oyo ezali kati na yo.Boye okoyeba solo ete Ngai Yawe nde nabetaka. 10 Tala, mokolo yango nde yango oyo !Esili kobelema !Kobebisama eboti mbuma,lingenda ebimisi bafololo, lolendo ekoli ! 11 Makambo mabe ekoli makasimpe ekomi lokola fimbumpo na kopesa etumbu na misala mabe ;moto moko te kati na batoto kati na bato ebele akotikala ;eloko moko te ekotikala,ezala bomengo to biloko ya motuya. 12 Tango ebelemi, mokolo yango ekoki.Tika ete mosombi moko te azala na esengoto moteki moko te azala na mawa,pamba te kanda makasi ezali kozela bato nyonso. 13 Moteki akozwa lisusu te motuya ya biloko oyo atekaki,ata soki azali nanu na bomoi ;pamba te emoniseli oyo ezali kotalisaete kobebisama ya bomengo ya mokili ekokokisama solo.Likolo ya masumu na bango,moto moko te kati na bango akobikisa bomoi na ye. 14 Ata soki babeti kelelo to bamibongisi ndenge nini,moto moko te akokende na bitumba ;pamba te kanda na Ngai ezali likolo ya bato nyonso. 15 Mopanga ekoboma na libanda ya engumba,bokono oyo ebomaka mpe nzala makasiekoboma kati na engumba ;bato oyo bazali kati na mokili bakokufa na mopanga,mpe bato oyo bazali kati na engumba bakokufana bokono oyo ebomaka mpe na nzala makasi. 16 Batikali bakokima na likolo ya bangomba ;mpe kuna, bakokoma kolelalela lokola bibenga,moto na moto mpo na masumu na ye. 17 Maboko na bango nyonso ekolemba,mpe mabolongo na bango nyonsoekolemba lokola mayi. 18 Bakolata bilamba ya basakimpe somo ekokanga bango ;bilongi na bango ekotonda na soni,bakokokola suki ya mito na bango. 19 Bakobwaka palata na bango na babalabala,mpe wolo na bango ekomonana lokola eloko ya mbindo.Palata mpe wolo na bango ekozala na makoki teya kobikisa bango na mokolo ya kanda ya Yawe.Palata mpe wolo yango ekosilisabaposa mpe nzala na bango te,pamba te yango nde ekweyisaki bango na masumu. 20 Basalaki lolendo mpo na kitokompe motuya ya biloko na bango ya monzeleoyo basalaki na yango banzambe na bango ya bikekompe bililingi ya somo.Yango wana, nakokomisa biloko yangombindo na miso na bango. 21 Nakokaba yango lokola bomengo ya bitumbana maboko ya bapaya mpe ya bato mabe ya mokilimpo ete babotola yango na makasimpe basakanela yango. 22 Elongi na Ngai ekotala bango lisusu te,mpe bato mabe bakobebisa Esika na Ngai ya bule.Bongo, miyibi bakokota kunampe bakosambwisa yango. 23 Bomisalela minyololo mpo ete mokili etondi na babomimpe engumba etondi na makambo mabe. 24 Nakotinda ekolo oyo eleki mabe kati na bikolompo ete eya kobotola bandako na bango ;nakosilisa lolendo ya bato ya nguyampe nakosambwisa bisika na bango ya bule. 25 Tango makambo oyo ya somo ekoya,bakoluka kimia kasi bakozwa yango te. 26 Pasi likolo ya pasi nde ekokomela bango,basango ya mabe na ya mabe nde ekolandana.Bakoluka bimoniseli na pamba epai ya basakoli ;Banganga-Nzambe bakokoka lisusu tekoteya malakisi ya Mobeko,mpe bakambi bakozanga toli ya kopesa. 27 Mokonzi akozala na matanga,mokambi akolata pili,mpe maboko ya bato ya mokili ekokoma kolenga.Nakofuta bango kolanda etamboli na bangompe nakosambisa bango kolanda misala na bango.Boye, bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › »