Hebrews 10 (BOLCB2)

1 Mobeko ya Moyize ezali kaka elilingi ya biloko oyo ekoya, ezali penza bosolo na yango te ; yango wana, ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela ya bambeka ya ndenge moko kaka oyo bapesaka tango nyonso mpe mobu na mobu. 2 Soki ezalaki na makoki yango, mbele bato oyo bapesaka bambeka yango balingaki wuta kala kotika kopesa yango, pamba te balingaki kopetolama mbala moko mpo na libela, mpe balingaki lisusu komitungisa te mpo na masumu na bango. 3 Nzokande, mobu na mobu, bambeka wana ezalaki kozongisa masumu na makanisi na bango, 4 pamba te makila ya bangombe ya mibali mpe ya bantaba ezali na makoki te ya kolongola masumu. 5 Yango wana, tango Klisto ayaki na mokili, alobaki :« Ozalaki na posa te ya bambeka to ya makabo,kasi osalaki ngai nzoto. 6 Osepelaki te na bambeka ya kotumbampe na bambeka mpo na masumu. 7 Bongo nalobaki : ‹ Tala ngai oyo, nayei,nayei, oh Nzambe, mpo na kosala mokano na Yo,kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku. › » 8 Alobaki liboso :« Ozalaki na posa te mpe osepelaki te na bambeka, na makabo,na bambeka ya kotumba mpe na bambeka mpo na masumu. »Nzokande ezalaki kopesama kolanda Mibeko. 9 Alobaki lisusu : « Tala ngai oyo, nayei mpo na kosala mokano na Yo. » Boye, alongolaki losambo ya liboso mpo na kotia losambo ya mibale. 10 Mpe ezali mpo na mokano yango ya Nzambe nde topetolamaka na masumu, na nzela ya mbeka ya nzoto na Ye moko Yesu-Klisto, oyo akabaki mbala moko mpo na libela. 11 Mpo na kosala mosala na ye ya bonganga, Nganga-Nzambe nyonso azalaki kokende na esika na ye ya mosala mokolo na mokolo, mpe azalaki kopesa mbala na mbala bambeka ya ndenge moko oyo ezalaki kutu na makoki te ya kolongola masumu ya bato. 12 Kasi sima na Klisto kobonza mbeka moko kaka mpo na masumu, avandi mpo na libela na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe. 13 Wuta tango wana, azali kozela ete Nzambe akomisa banguna na Ye enyatelo makolo na Ye. 14 Pamba te, na nzela ya likabo moko kaka, akomisaki bato ya kokoka mpo na libela, ba-oyo apetolaki na masumu. 15 Molimo Mosantu mpe azali kotatola epai na biso na tina na Ye, pamba te alobaki liboso : 16 « Tala boyokani oyo nakosala elongo na bangosima na mikolo wana, elobi Nkolo :Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango,mpe nakokoma yango kati na mitema na bango. » 17 Bongo na sima, abakisaki :« Nakokanisa lisusu te,ezala masumu na bango to mabe na bango. » 18 Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu. 19 Yango wana, bandeko na ngai, tozali solo na elikya ete tokokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo ete Yesu asopaki makila na Ye. 20 Afungolelaki biso nzela ya sika mpe ya bomoi na nzela ya rido ya Tempelo, oyo ezali nzoto na Ye moko. 21 Boye, tozali na Mokonzi Monene ya Banganga-Nzambe, oyo azali Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. 22 Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto. 23 Tobatela makasi elikya oyo tozali kondima ete ezali ya solo, pamba te Ye oyo apesaki biso bilaka akosaka te. 24 Tosenzelana biso na biso mpo na kotindikana na bolingo mpe na misala ya malamu. 25 Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala ; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene. 26 Pamba te, soki tokobi kosala masumu na nko sima na koyeba bosolo, mbeka mosusu mpo na bolimbisi ya masumu ekozala lisusu te ; 27 ekotikala kaka kozela na somo penza kosambisama mpe moto makasi oyo ekozikisa banguna ya Nzambe. 28 Soki babomaka na mawa te moto oyo abuki Mobeko ya Moyize, na litatoli ya bato mibale to misato, 29 ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu ? 30 Toyebi malamu Ye oyo alobaki : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto ; » mpe : « Nkolo akosambisa bato na Ye. » 31 Ezali somo makasi kokweya na maboko ya Nzambe na bomoi ! 32 Bokanisa lisusu mikolo ya liboso, na tango Nzambe afungolaki bino miso mpo ete bokoma komona pole, boyikaki mpiko kati na bapasi ya makasi. 33 Ezalaki na batango oyo bazalaki kofinga bino, konyokola bino na miso ya bato ; ezalaki mpe na batango oyo bozalaki kokabola pasi elongo na bato oyo bazalaki konyokwama. 34 Bokabolaki pasi elongo na bakangami ya boloko, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola ata biloko na bino, pamba te boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko koleka, bomengo oyo ekowumela libela na libela. 35 Boye, bobungisa elikya na bino te, pamba te lifuti monene ekangani na yango. 36 Na bongo, boyika mpiko mpo ete, sima na bino kokokisa mokano ya Nzambe, bozwa biloko oyo alakaki. 37 Etikali moke, moke penza,ete Ye oyo asengeli koya aya,mpe akoya kala te. 38 Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima ;kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te. 39 Biso tozali te na molongo ya bato oyo bazongaka sima mpo na kobungisa bomoi na bango, kasi tozali na molongo ya bato oyo bazali na kondima mpo ete tobikisama.

In Other Versions

Hebrews 10 in the ANGEFD

Hebrews 10 in the ANTPNG2D

Hebrews 10 in the AS21

Hebrews 10 in the BAGH

Hebrews 10 in the BBPNG

Hebrews 10 in the BBT1E

Hebrews 10 in the BDS

Hebrews 10 in the BEV

Hebrews 10 in the BHAD

Hebrews 10 in the BIB

Hebrews 10 in the BLPT

Hebrews 10 in the BNT

Hebrews 10 in the BNTABOOT

Hebrews 10 in the BNTLV

Hebrews 10 in the BOATCB

Hebrews 10 in the BOATCB2

Hebrews 10 in the BOBCV

Hebrews 10 in the BOCNT

Hebrews 10 in the BOECS

Hebrews 10 in the BOGWICC

Hebrews 10 in the BOHCB

Hebrews 10 in the BOHCV

Hebrews 10 in the BOHLNT

Hebrews 10 in the BOHNTLTAL

Hebrews 10 in the BOICB

Hebrews 10 in the BOILNTAP

Hebrews 10 in the BOITCV

Hebrews 10 in the BOKCV

Hebrews 10 in the BOKCV2

Hebrews 10 in the BOKHWOG

Hebrews 10 in the BOKSSV

Hebrews 10 in the BOLCB

Hebrews 10 in the BOMCV

Hebrews 10 in the BONAV

Hebrews 10 in the BONCB

Hebrews 10 in the BONLT

Hebrews 10 in the BONUT2

Hebrews 10 in the BOPLNT

Hebrews 10 in the BOSCB

Hebrews 10 in the BOSNC

Hebrews 10 in the BOTLNT

Hebrews 10 in the BOVCB

Hebrews 10 in the BOYCB

Hebrews 10 in the BPBB

Hebrews 10 in the BPH

Hebrews 10 in the BSB

Hebrews 10 in the CCB

Hebrews 10 in the CUV

Hebrews 10 in the CUVS

Hebrews 10 in the DBT

Hebrews 10 in the DGDNT

Hebrews 10 in the DHNT

Hebrews 10 in the DNT

Hebrews 10 in the ELBE

Hebrews 10 in the EMTV

Hebrews 10 in the ESV

Hebrews 10 in the FBV

Hebrews 10 in the FEB

Hebrews 10 in the GGMNT

Hebrews 10 in the GNT

Hebrews 10 in the HARY

Hebrews 10 in the HNT

Hebrews 10 in the IRVA

Hebrews 10 in the IRVB

Hebrews 10 in the IRVG

Hebrews 10 in the IRVH

Hebrews 10 in the IRVK

Hebrews 10 in the IRVM

Hebrews 10 in the IRVM2

Hebrews 10 in the IRVO

Hebrews 10 in the IRVP

Hebrews 10 in the IRVT

Hebrews 10 in the IRVT2

Hebrews 10 in the IRVU

Hebrews 10 in the ISVN

Hebrews 10 in the JSNT

Hebrews 10 in the KAPI

Hebrews 10 in the KBT1ETNIK

Hebrews 10 in the KBV

Hebrews 10 in the KJV

Hebrews 10 in the KNFD

Hebrews 10 in the LBA

Hebrews 10 in the LBLA

Hebrews 10 in the LNT

Hebrews 10 in the LSV

Hebrews 10 in the MAAL

Hebrews 10 in the MBV

Hebrews 10 in the MBV2

Hebrews 10 in the MHNT

Hebrews 10 in the MKNFD

Hebrews 10 in the MNG

Hebrews 10 in the MNT

Hebrews 10 in the MNT2

Hebrews 10 in the MRS1T

Hebrews 10 in the NAA

Hebrews 10 in the NASB

Hebrews 10 in the NBLA

Hebrews 10 in the NBS

Hebrews 10 in the NBVTP

Hebrews 10 in the NET2

Hebrews 10 in the NIV11

Hebrews 10 in the NNT

Hebrews 10 in the NNT2

Hebrews 10 in the NNT3

Hebrews 10 in the PDDPT

Hebrews 10 in the PFNT

Hebrews 10 in the RMNT

Hebrews 10 in the SBIAS

Hebrews 10 in the SBIBS

Hebrews 10 in the SBIBS2

Hebrews 10 in the SBICS

Hebrews 10 in the SBIDS

Hebrews 10 in the SBIGS

Hebrews 10 in the SBIHS

Hebrews 10 in the SBIIS

Hebrews 10 in the SBIIS2

Hebrews 10 in the SBIIS3

Hebrews 10 in the SBIKS

Hebrews 10 in the SBIKS2

Hebrews 10 in the SBIMS

Hebrews 10 in the SBIOS

Hebrews 10 in the SBIPS

Hebrews 10 in the SBISS

Hebrews 10 in the SBITS

Hebrews 10 in the SBITS2

Hebrews 10 in the SBITS3

Hebrews 10 in the SBITS4

Hebrews 10 in the SBIUS

Hebrews 10 in the SBIVS

Hebrews 10 in the SBT

Hebrews 10 in the SBT1E

Hebrews 10 in the SCHL

Hebrews 10 in the SNT

Hebrews 10 in the SUSU

Hebrews 10 in the SUSU2

Hebrews 10 in the SYNO

Hebrews 10 in the TBIAOTANT

Hebrews 10 in the TBT1E

Hebrews 10 in the TBT1E2

Hebrews 10 in the TFTIP

Hebrews 10 in the TFTU

Hebrews 10 in the TGNTATF3T

Hebrews 10 in the THAI

Hebrews 10 in the TNFD

Hebrews 10 in the TNT

Hebrews 10 in the TNTIK

Hebrews 10 in the TNTIL

Hebrews 10 in the TNTIN

Hebrews 10 in the TNTIP

Hebrews 10 in the TNTIZ

Hebrews 10 in the TOMA

Hebrews 10 in the TTENT

Hebrews 10 in the UBG

Hebrews 10 in the UGV

Hebrews 10 in the UGV2

Hebrews 10 in the UGV3

Hebrews 10 in the VBL

Hebrews 10 in the VDCC

Hebrews 10 in the YALU

Hebrews 10 in the YAPE

Hebrews 10 in the YBVTP

Hebrews 10 in the ZBP