Hebrews 13 (BOLCB2)
1 Tika ete bondeko ewumela kati na bino ! 2 Bolemba te koyambaka malamu bapaya, pamba te, na nzela wana, bato mosusu bayambaki ba-anjelu wana bayebaki te ete bazali solo ba-anjelu. 3 Bokanisaka bato oyo bazali kati na boloko lokola nde bino mpe bozali kati na boloko elongo na bango. Bokanisaka bato oyo bazali komona pasi, mpo ete bino mpe bozali na nzoto oyo emonaka pasi. 4 Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo. 5 Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. » 6 Boye tokoki koloba na elikya nyonso :« Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te ;bato bakoki kosala ngai nini ? » 7 Bokanisaka bakambi na bino, oyo bateyaki bino Liloba na Nzambe ; botala ndenge nini suka ya bomoi na bango ezalaki, mpe bomekola kondima na bango. 8 Yesu-Klisto azali ndenge moko : lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela. 9 Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango. 10 Tozali na etumbelo, kasi Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Mongombo bazali na bokonzi te ya kolia mbeka oyo babonzi na likolo ya etumbelo yango, 11 pamba te banzoto ya banyama oyo mokonzi ya Banganga-Nzambe amemaka makila na yango kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule lokola mbeka mpo na bolimbisi ya masumu, etumbamaka na libanda ya molako. 12 Yango wana Yesu mpe akufaki na libanda ya mboka mpo na kobulisa bato na nzela ya makila na Ye moko. 13 Boye, biso mpe tokende epai ya Yesu na libanda ya molako, na kondima koyoka soni oyo Ye ayokaki ; 14 pamba te, kati na mokili oyo, tozali na engumba moko te oyo ekowumela libela na libela, kasi tozali nde koluka engumba oyo ezali koya. 15 Yango wana, na nzela ya Yesu, tobonzelaka Nzambe tango nyonso mbeka ya masanzoli, elingi koloba : mbuma ya bibebu oyo etatolaka polele Kombo na Ye. 16 Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango. 17 Botosaka bakambi na bino mpe bosalelaka mitindo oyo bapesaka bino, pamba te bazali bakengeli ya milimo na bino mpe bakosamba likolo na bino liboso ya Nzambe. Bosalaka bongo mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na koyimayima te, soki te bokozanga litomba. 18 Bosambelaka mpo na biso ! Pamba te tondimisami penza ete tozali na mitema ya peto mpe tozwi mokano ya kotambola na bomoi ya lokumu kati na makambo nyonso. 19 Nazali penza kosenga na bino ete bobondela Nzambe mpo ete bazongisa ngai na lombangu epai na bino. 20 Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko, 21 apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen ! 22 Nazali kosenga na bino bandeko na ngai ete bokanga motema na koyamba malendisi oyo nakomeli bino na mokuse penza. 23 Boyeba ete ndeko na biso, Timote, asilaki kobima na boloko. Soki akoya noki, nakoya nzela moko na ye mpo na komona bino. 24 Bopesa mbote na bakambi na bino nyonso mpe na basantu nyonso.Bandeko ya Itali batindeli bino mbote. 25 Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na bino nyonso !
In Other Versions
Hebrews 13 in the ANGEFD
Hebrews 13 in the ANTPNG2D
Hebrews 13 in the AS21
Hebrews 13 in the BAGH
Hebrews 13 in the BBPNG
Hebrews 13 in the BBT1E
Hebrews 13 in the BDS
Hebrews 13 in the BEV
Hebrews 13 in the BHAD
Hebrews 13 in the BIB
Hebrews 13 in the BLPT
Hebrews 13 in the BNT
Hebrews 13 in the BNTABOOT
Hebrews 13 in the BNTLV
Hebrews 13 in the BOATCB
Hebrews 13 in the BOATCB2
Hebrews 13 in the BOBCV
Hebrews 13 in the BOCNT
Hebrews 13 in the BOECS
Hebrews 13 in the BOGWICC
Hebrews 13 in the BOHCB
Hebrews 13 in the BOHCV
Hebrews 13 in the BOHLNT
Hebrews 13 in the BOHNTLTAL
Hebrews 13 in the BOICB
Hebrews 13 in the BOILNTAP
Hebrews 13 in the BOITCV
Hebrews 13 in the BOKCV
Hebrews 13 in the BOKCV2
Hebrews 13 in the BOKHWOG
Hebrews 13 in the BOKSSV
Hebrews 13 in the BOLCB
Hebrews 13 in the BOMCV
Hebrews 13 in the BONAV
Hebrews 13 in the BONCB
Hebrews 13 in the BONLT
Hebrews 13 in the BONUT2
Hebrews 13 in the BOPLNT
Hebrews 13 in the BOSCB
Hebrews 13 in the BOSNC
Hebrews 13 in the BOTLNT
Hebrews 13 in the BOVCB
Hebrews 13 in the BOYCB
Hebrews 13 in the BPBB
Hebrews 13 in the BPH
Hebrews 13 in the BSB
Hebrews 13 in the CCB
Hebrews 13 in the CUV
Hebrews 13 in the CUVS
Hebrews 13 in the DBT
Hebrews 13 in the DGDNT
Hebrews 13 in the DHNT
Hebrews 13 in the DNT
Hebrews 13 in the ELBE
Hebrews 13 in the EMTV
Hebrews 13 in the ESV
Hebrews 13 in the FBV
Hebrews 13 in the FEB
Hebrews 13 in the GGMNT
Hebrews 13 in the GNT
Hebrews 13 in the HARY
Hebrews 13 in the HNT
Hebrews 13 in the IRVA
Hebrews 13 in the IRVB
Hebrews 13 in the IRVG
Hebrews 13 in the IRVH
Hebrews 13 in the IRVK
Hebrews 13 in the IRVM
Hebrews 13 in the IRVM2
Hebrews 13 in the IRVO
Hebrews 13 in the IRVP
Hebrews 13 in the IRVT
Hebrews 13 in the IRVT2
Hebrews 13 in the IRVU
Hebrews 13 in the ISVN
Hebrews 13 in the JSNT
Hebrews 13 in the KAPI
Hebrews 13 in the KBT1ETNIK
Hebrews 13 in the KBV
Hebrews 13 in the KJV
Hebrews 13 in the KNFD
Hebrews 13 in the LBA
Hebrews 13 in the LBLA
Hebrews 13 in the LNT
Hebrews 13 in the LSV
Hebrews 13 in the MAAL
Hebrews 13 in the MBV
Hebrews 13 in the MBV2
Hebrews 13 in the MHNT
Hebrews 13 in the MKNFD
Hebrews 13 in the MNG
Hebrews 13 in the MNT
Hebrews 13 in the MNT2
Hebrews 13 in the MRS1T
Hebrews 13 in the NAA
Hebrews 13 in the NASB
Hebrews 13 in the NBLA
Hebrews 13 in the NBS
Hebrews 13 in the NBVTP
Hebrews 13 in the NET2
Hebrews 13 in the NIV11
Hebrews 13 in the NNT
Hebrews 13 in the NNT2
Hebrews 13 in the NNT3
Hebrews 13 in the PDDPT
Hebrews 13 in the PFNT
Hebrews 13 in the RMNT
Hebrews 13 in the SBIAS
Hebrews 13 in the SBIBS
Hebrews 13 in the SBIBS2
Hebrews 13 in the SBICS
Hebrews 13 in the SBIDS
Hebrews 13 in the SBIGS
Hebrews 13 in the SBIHS
Hebrews 13 in the SBIIS
Hebrews 13 in the SBIIS2
Hebrews 13 in the SBIIS3
Hebrews 13 in the SBIKS
Hebrews 13 in the SBIKS2
Hebrews 13 in the SBIMS
Hebrews 13 in the SBIOS
Hebrews 13 in the SBIPS
Hebrews 13 in the SBISS
Hebrews 13 in the SBITS
Hebrews 13 in the SBITS2
Hebrews 13 in the SBITS3
Hebrews 13 in the SBITS4
Hebrews 13 in the SBIUS
Hebrews 13 in the SBIVS
Hebrews 13 in the SBT
Hebrews 13 in the SBT1E
Hebrews 13 in the SCHL
Hebrews 13 in the SNT
Hebrews 13 in the SUSU
Hebrews 13 in the SUSU2
Hebrews 13 in the SYNO
Hebrews 13 in the TBIAOTANT
Hebrews 13 in the TBT1E
Hebrews 13 in the TBT1E2
Hebrews 13 in the TFTIP
Hebrews 13 in the TFTU
Hebrews 13 in the TGNTATF3T
Hebrews 13 in the THAI
Hebrews 13 in the TNFD
Hebrews 13 in the TNT
Hebrews 13 in the TNTIK
Hebrews 13 in the TNTIL
Hebrews 13 in the TNTIN
Hebrews 13 in the TNTIP
Hebrews 13 in the TNTIZ
Hebrews 13 in the TOMA
Hebrews 13 in the TTENT
Hebrews 13 in the UBG
Hebrews 13 in the UGV
Hebrews 13 in the UGV2
Hebrews 13 in the UGV3
Hebrews 13 in the VBL
Hebrews 13 in the VDCC
Hebrews 13 in the YALU
Hebrews 13 in the YAPE
Hebrews 13 in the YBVTP
Hebrews 13 in the ZBP