Isaiah 29 (BOLCB2)
1 Mawa na yo, Arieli, Arieli,engumba oyo Davidi azalaki kovanda !Bobakisa mibu na mibumpe botika ete bafeti na bino ekobakolandana ndenge ezalaka. 2 Kasi nakonyokola Arieli ;ekokoma na mawa mpe na kolela ;ekokoma na miso na Ngai lokola etumbelo. 3 Nakozingela yo mpo na kobundisa yo,nakozingela yo na mir ya molayimpe nakotiela yo mampinga ya nguyampo na kotelemela yo. 4 Okokitisama solo na se,okoloba wuta na mabele,mpe maloba na yo ekobanda kobimana mongongo ya se wuta na putulu.Mongongo na yo ekokoma kobima wuta na se ya mabelelokola mongongo ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi ;mpe wuta na putulu, maloba na yo ekobimana mongongo ya se. 5 Bongo ebele ya banguna na yo bakokoma lokola putulu,mpe ebele ya banyokoli na yo bakokoma lokola matiti ekawukaoyo ezali kopumbwa na mopepe ;ekosalema bongo na pwasa. 6 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoya epai na yona nzela ya bakake, ya koningana ya mabelempe ya lokito monene, ya mopepe makasimpe ya mvula ya moto oyo etumbaka. 7 Ekozala lokola ndoto to emoniseli ya butumpo na ebele ya bikolo oyo bakobundisa Arieli,oyo bakotelemela yeelongo na bandako na ye ya makasi mpe bakozingela ye. 8 Ekozala lokola moto oyo azali na nzala,bongo azali kolota ndoto ete azali kolia,kasi tango alamuki, libumu na ye ezali kaka pambalokola moto oyo azali na posa ya mayi,bongo azali kolota ndoto ete azali komela mayi,kasi tango alamuki na nzoto ya kolemba,posa na ye ya mayi esili kaka te.Ekozala nde bongo mpo na mampinga ya bikolo nyonsooyo bakobundisa ngomba Siona. 9 Bozanga maloba mpe bokamwa !Bomiboma miso mpe botikala bakufi miso !Bolangwa masanga, kasi na vino te !Botenga-tenga, kasi na masanga ya makasi te ! 10 Yawe asopeli bino molimo ya pongi makasi ;akangi bino miso, bino basakoli,azipi bino mito, bino bato oyo bomonaka makambo. 11 Mpo na bino, emoniseli nyonso oyo ekomi lokola maloba ya buku oyo bakanga mpe bapesi epai ya moto oyo ayebi kotanga, bongo balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nakokoka te, pamba te buku ekangama. » 12 To bapesi yango epai ya moto oyo ayebi kotanga te, mpe balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nayebi kotanga te. » 13 Nkolo alobi :« Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko,bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu,kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai ;mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngaiezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango. 14 Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ;ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwakino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga,mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. » 15 Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkukumpo na kobombela Yawe mabongisi na bango ;bato oyo basalaka misala na bango na molilimpe balobaka : « Nani akoki komona biso ?Nani akoyeba ? » 16 Bozali nde kobongola makambo !Ezali lokola bozali kozwa mosali mbekindenge moko na mabele oyo basalelaka mbeki.Boni, eloko ekoki solo koloba na mosali na yango :« Asalaki ngai te ? »Mbeki ekoki solo koloba na mosali mbeki :« Ozali mayele te ? » 17 Etikali kaka tango moke,Libani ekobongwana elanga ya kitoko,mpe elanga ya kitoko ekomonana lokola zamba. 18 Na mokolo wana, bakufi matoyi bakoyoka maloba ya buku,mpe bakufi miso bakomonatango bakobima na butu mpe na molili. 19 Bato bakelela bakosepela makasi kati na Yawe,babola bakozala na esengo kati na Mosantu ya Isalaele. 20 Banyokoli bakotikala lisusu te, batioli bakozala lisusu tempe bato oyo balukaka pasi ya baninga bakokufa : 21 elongo na bato oyo bakweyisaka batokati na kosamba mpo na liloba moko,elongo na bato oyo batielaka basambisi mitambompe bapesaka matatoli ya lokuta, na kosambisama,mpo na kokweyisa moto ya sembo. 22 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe,Mosikoli ya Abrayami,alobi na libota ya Jakobi :« Jakobi akozala lisusu na soni te,elongi na ye ekozala lisusu ya kokawuka te. 23 Tango akomona kati na bango bana na ye,mosala ya maboko na Ngai,bakopesa lokumu na bosantu ya Kombo na Ngaimpe bakososola bosantu ya Mosantu ya Jakobi.Boye, bakozala na somo ya Nzambe ya Isalaele. 24 Bato oyo bazali koyengayenga na molimo bakozwa mayele,mpe bato ya mito makasi bakondima koyekola mateya ya sika. »