Jeremiah 31 (BOLCB2)

1 « Na tango wana, » elobi Yawe, « Ngai nakozala Nzambe ya bituka nyonso ya Isalaele, mpe bango bakozala bato na Ngai. » 2 Tala liloba oyo Yawe alobi :« Bato oyo bakobika na mopangabakozwa ngolu kati na esobe ;boye, nakoya kopesa Isalaele bopemi. » 3 Yawe abimelaki biso na kala, alobaki :« Nalingaka bino na bolingo ya seko ;yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo. 4 Nakobongisa bino lisusu ;oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu.Okolata lisusu mbunda na yo ya mikempe okobina mabina ya esengo. 5 Okolona lisusu bilanga ya vinona bangomba ya Samari ;bato oyo bakolona yango bakosepelatango bakobuka mbuma na yango. 6 Ekozala mokolo oyo bakengelibakoganga na bangomba ya Efrayimi :‹ Boya ! Tika ete tokende na Siona,epai na Yawe, Nzambe na biso ! › » 7 Tala liloba oyo Yawe alobi :« Boyemba na esengo mpo na Jakobi,boganga na esengo mpo na ekolo ya liboso kati na bikolo nyonso !Batatola, bosanzola mpe boloba :‹ Oh Yawe, bikisa bato na Yo,bato ya Isalaele oyo batikali. › 8 Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya normpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili.Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani,basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota ;bato ebele penza bakozonga. 9 Bakendeki na kolela,kasi nakozongisa bango,wana bakozala kati na kobondela ;nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka,na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ;pamba te nazali Tata ya Isalaele,mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso. 10 Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe,botatola yango na bisanga ya mosika !Boloba : ‹ Ye oyo apanzaki Isalaeleakosangisa bango mpe akobatela bangondenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye. 11 Mpo ete Yawe akokangola Jakobimpe akobikisa bango na maboko ya batooyo baleki bango na makasi. 12 Bakozonga na koganga ya esengona bangomba ya Siona ;bakosepela na bomengo ya Yawe :ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe.Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi,mpe bakozala lisusu na mawa te. 13 Bilenge basi bakobina na esengoelongo na bilenge mibali mpe mibange.Nakobongola matanga na bango na esengo,nakopesa bango kobondisama mpe esengo na esika ya mawa. 14 Nakoleisa malamu Banganga-Nzambena mafuta ya bibwele,mpe bato na Ngai bakotonda na biloko na Ngai, › »elobi Yawe. 15 Tala liloba oyo Yawe alobi :« Mongongo moko ezali koyokana na Rama,ezali mongongo ya mawa mpe ya kolela makasi :Rasheli azali kolela bana na ye ya mibalimpe aboyi kobondisama,pamba te bana na ye ya mibali bazali lisusu na bomoi te. » 16 Tala liloba oyo Yawe alobi :« Tika kolela mpe kobimisa mpinzoli,pamba te mosala na yo ezali na litomba, »elobi Yawe,« bana na yo ya mibali bakozongawuta na mokili ya banguna. 17 Elikya ezali mpo na bomoi na yo ya lobi, »elobi Yawe,« bana na yo bakozonga na mokili na bango. 18 Nayoki kolelalela ya Efrayimi :‹ Opesi ngai etumbulokola mwana ngombe ya mobali oyo ezali na liboma,mpe etumbu yango ekweyelaki ngai.Zongisa ngai, mpe nakozonga,pamba te ozali Yawe, Nzambe na ngai. 19 Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema ;sik’oyo nasili kososola,nazali kobeta tolo na pasi na motema.Nayokisamaki soni mpe nasambwaki,pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. › 20 Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo,mwana oyo nasepelaka na ye mingi te.Nzokande napamelaka ye tango nyonso,mpe nakanisaka ye tango nyonso.Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye,mpe nayokelaka ye mawa, »elobi Yawe. 21 « Tia bilembo na nzela,pika makonzi oyo elakisaka nzela na nzela yango ;sala penza keba na nzela na yo,na nzela oyo ozali kolanda.Oh Isalaele, mboka kitoko, zonga,zonga na bingumba na yo ! 22 Oh elenge mwasi ya mobulu,kino tango nini okotika kotambola-tambola ?Yawe akosala likambo ya sika na mabele :mwana mwasi akoluka mwana mobali na bolingo. » 23 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tango nakobimisa bango na bowumbu, tala lisusu maloba oyo bato bakoloba kati na Yuda mpe kati na bingumba na yango : ‹ Oh ndako ya bosembo ; oh ngomba ya bule, tika ete Yawe apambola yo ! › 24 Bato bakokoma kovanda elongo kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba na yango nyonso : basali bilanga mpe babokoli bibwele. 25 Nakozongisa makasi ya bato oyo balembi na posa ya mayi, mpe nakoleisa bato oyo balembi na nzala. » 26 Boye, tango nalamukaki, natalaki pene na ngai ; nasosolaki ete pongi na ngai ezalaki elengi. 27 « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakolona bato mpe banyama lokola milona kati na bokonzi ya Isalaele mpe kati na bokonzi ya Yuda. 28 Ndenge nazalaki kosenzela bango mpo na kopikola mpe kobuka, kobebisa, kopanza mpe kosala bango mabe, ndenge wana mpe nakosenzela bango mpo na kotonga mpe kolona, » elobi Yawe ; 29 « na mikolo wana, bato bakoloba lisusu te :‹ Batata balie mbuma ya vino ya mobesu,mpe minu ya bana na bango ekomi ngayi. › 30 Na esika na yango, moto na moto akokufa mpo na masumu na ye moko ; moto nyonso oyo alie mbuma ya vino ya mobesu, minu na ye moko nde ekokoma ngayi. 31 Na mikolo ekoya, » elobi Yawe,« nakosala boyokani ya sikaelongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda ; 32 ekozala ndenge moko te na boyokanioyo nasalaki elongo na batata na bangotango nasimbaki bango na lobokompo na kobimisa bango na Ejipito ;pamba te bakataki boyokani na Ngai wana,atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, »elobi Yawe. 33 « Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele,sima na mikolo wana, »elobi Yawe :« Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango,nakokoma yango kati na mitema na bango,nakozala Nzambe na bango,mpe bango bakozala bato na Ngai. 34 Moko te akoteya lisusu moninga na yeto ndeko na ye na koloba :‹ Yeba Yawe ! ›Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai,kobanda na mwana moke kino na mokolo, »elobi Yawe,« nakolimbisa mabe na bangompe nakokanisa lisusu masumu na bango te. » 35 Tala makambo oyo Yawe alobi,Ye oyo atia moyi mpo ete engengisa mokolo,apesa mibeko ete sanza mpe minzoto engengisa butu,aningisaka ebale monene mpo ete mbonge etia makelele,mpe oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga : 36 « Soki kaka bakoki solo kolongola malakooyo na miso na Ngai, »elobi Yawe,« wana bana ya Isalaele mpe bakozala lisusu ekolo tena miso na ngai. » 37 Tala liloba oyo Yawe alobi :« Soki kaka bakoki komeka molayi ya likolompe komona miboko ya mabele,wana nakobwaka bana nyonso ya Isalaelempo na makambo nyonso oyo basali, »elobi Yawe. 38 « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bakotonga lisusu engumba oyo mpo na Ngai, kobanda na ndako molayi ya Ananeyeli kino na Ekuke ya Suka ya mir ; 39 bakotia singa ya batongi ndako longwa na esika wana kino na ngomba moke ya Garebi, mpe ekobaluka kino na Gowa. 40 Bakobulisa mpo na Yawe lubwaku nyonso epai wapi babwakaki bibembe mpe putulu, mpe bilanga nyonso oyo ezali pene ya lubwaku ya Sedron, kino na songe ya Ekuke ya Bampunda, na ngambo ya este ; bakotikala kobebisa to koboma lisusu engumba oyo te. »

In Other Versions

Jeremiah 31 in the ANGEFD

Jeremiah 31 in the ANTPNG2D

Jeremiah 31 in the AS21

Jeremiah 31 in the BAGH

Jeremiah 31 in the BBPNG

Jeremiah 31 in the BBT1E

Jeremiah 31 in the BDS

Jeremiah 31 in the BEV

Jeremiah 31 in the BHAD

Jeremiah 31 in the BIB

Jeremiah 31 in the BLPT

Jeremiah 31 in the BNT

Jeremiah 31 in the BNTABOOT

Jeremiah 31 in the BNTLV

Jeremiah 31 in the BOATCB

Jeremiah 31 in the BOATCB2

Jeremiah 31 in the BOBCV

Jeremiah 31 in the BOCNT

Jeremiah 31 in the BOECS

Jeremiah 31 in the BOGWICC

Jeremiah 31 in the BOHCB

Jeremiah 31 in the BOHCV

Jeremiah 31 in the BOHLNT

Jeremiah 31 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 31 in the BOICB

Jeremiah 31 in the BOILNTAP

Jeremiah 31 in the BOITCV

Jeremiah 31 in the BOKCV

Jeremiah 31 in the BOKCV2

Jeremiah 31 in the BOKHWOG

Jeremiah 31 in the BOKSSV

Jeremiah 31 in the BOLCB

Jeremiah 31 in the BOMCV

Jeremiah 31 in the BONAV

Jeremiah 31 in the BONCB

Jeremiah 31 in the BONLT

Jeremiah 31 in the BONUT2

Jeremiah 31 in the BOPLNT

Jeremiah 31 in the BOSCB

Jeremiah 31 in the BOSNC

Jeremiah 31 in the BOTLNT

Jeremiah 31 in the BOVCB

Jeremiah 31 in the BOYCB

Jeremiah 31 in the BPBB

Jeremiah 31 in the BPH

Jeremiah 31 in the BSB

Jeremiah 31 in the CCB

Jeremiah 31 in the CUV

Jeremiah 31 in the CUVS

Jeremiah 31 in the DBT

Jeremiah 31 in the DGDNT

Jeremiah 31 in the DHNT

Jeremiah 31 in the DNT

Jeremiah 31 in the ELBE

Jeremiah 31 in the EMTV

Jeremiah 31 in the ESV

Jeremiah 31 in the FBV

Jeremiah 31 in the FEB

Jeremiah 31 in the GGMNT

Jeremiah 31 in the GNT

Jeremiah 31 in the HARY

Jeremiah 31 in the HNT

Jeremiah 31 in the IRVA

Jeremiah 31 in the IRVB

Jeremiah 31 in the IRVG

Jeremiah 31 in the IRVH

Jeremiah 31 in the IRVK

Jeremiah 31 in the IRVM

Jeremiah 31 in the IRVM2

Jeremiah 31 in the IRVO

Jeremiah 31 in the IRVP

Jeremiah 31 in the IRVT

Jeremiah 31 in the IRVT2

Jeremiah 31 in the IRVU

Jeremiah 31 in the ISVN

Jeremiah 31 in the JSNT

Jeremiah 31 in the KAPI

Jeremiah 31 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 31 in the KBV

Jeremiah 31 in the KJV

Jeremiah 31 in the KNFD

Jeremiah 31 in the LBA

Jeremiah 31 in the LBLA

Jeremiah 31 in the LNT

Jeremiah 31 in the LSV

Jeremiah 31 in the MAAL

Jeremiah 31 in the MBV

Jeremiah 31 in the MBV2

Jeremiah 31 in the MHNT

Jeremiah 31 in the MKNFD

Jeremiah 31 in the MNG

Jeremiah 31 in the MNT

Jeremiah 31 in the MNT2

Jeremiah 31 in the MRS1T

Jeremiah 31 in the NAA

Jeremiah 31 in the NASB

Jeremiah 31 in the NBLA

Jeremiah 31 in the NBS

Jeremiah 31 in the NBVTP

Jeremiah 31 in the NET2

Jeremiah 31 in the NIV11

Jeremiah 31 in the NNT

Jeremiah 31 in the NNT2

Jeremiah 31 in the NNT3

Jeremiah 31 in the PDDPT

Jeremiah 31 in the PFNT

Jeremiah 31 in the RMNT

Jeremiah 31 in the SBIAS

Jeremiah 31 in the SBIBS

Jeremiah 31 in the SBIBS2

Jeremiah 31 in the SBICS

Jeremiah 31 in the SBIDS

Jeremiah 31 in the SBIGS

Jeremiah 31 in the SBIHS

Jeremiah 31 in the SBIIS

Jeremiah 31 in the SBIIS2

Jeremiah 31 in the SBIIS3

Jeremiah 31 in the SBIKS

Jeremiah 31 in the SBIKS2

Jeremiah 31 in the SBIMS

Jeremiah 31 in the SBIOS

Jeremiah 31 in the SBIPS

Jeremiah 31 in the SBISS

Jeremiah 31 in the SBITS

Jeremiah 31 in the SBITS2

Jeremiah 31 in the SBITS3

Jeremiah 31 in the SBITS4

Jeremiah 31 in the SBIUS

Jeremiah 31 in the SBIVS

Jeremiah 31 in the SBT

Jeremiah 31 in the SBT1E

Jeremiah 31 in the SCHL

Jeremiah 31 in the SNT

Jeremiah 31 in the SUSU

Jeremiah 31 in the SUSU2

Jeremiah 31 in the SYNO

Jeremiah 31 in the TBIAOTANT

Jeremiah 31 in the TBT1E

Jeremiah 31 in the TBT1E2

Jeremiah 31 in the TFTIP

Jeremiah 31 in the TFTU

Jeremiah 31 in the TGNTATF3T

Jeremiah 31 in the THAI

Jeremiah 31 in the TNFD

Jeremiah 31 in the TNT

Jeremiah 31 in the TNTIK

Jeremiah 31 in the TNTIL

Jeremiah 31 in the TNTIN

Jeremiah 31 in the TNTIP

Jeremiah 31 in the TNTIZ

Jeremiah 31 in the TOMA

Jeremiah 31 in the TTENT

Jeremiah 31 in the UBG

Jeremiah 31 in the UGV

Jeremiah 31 in the UGV2

Jeremiah 31 in the UGV3

Jeremiah 31 in the VBL

Jeremiah 31 in the VDCC

Jeremiah 31 in the YALU

Jeremiah 31 in the YAPE

Jeremiah 31 in the YBVTP

Jeremiah 31 in the ZBP