Jeremiah 49 (BOLCB2)

1 Na tina na bato ya Amoni : Tala liloba oyo Yawe alobi :« Boni, Isalaele atikali lisusu na bana mibali te ?Atikali lisusu na bakitani ya libula te ?Bongo mpo na nini Moloki, nzambe ya bato ya Amoni,abotoli bingumba ya Gadi ?Mpo na nini bato na ye bayei kovanda na Gadi ? 2 Kasi na mikolo ekoya, »elobi Yawe,« nakosala ete lokito ya bitumba eyokanampo na kobundisa Raba, engumba ya bato ya Amoni ;ekokoma esika ya mabempe bamboka mike na yango ekozikisama na moto.Bongo Isalaele akobengana bato oyo babenganaki ye, »elobi Yawe. 3 « Eshiboni, lela mpo ete Ayi ebebisami !Bino bavandi ya Raba, boganga !Bolata basaki mpe bosala matanga,bokima na bangambo nyonso ya mir,pamba te Moloki akokende na bowumbuelongo na banganga-nzambe mpe bakambi na ye. 4 Mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabwaku na yo,mabwaku oyo ebotaka bambuma ebele ?Oh elenge mwasi oyo otambolaka na bosembo te,ozali solo kotia motema na bomengo na yompe ozali koloba : ‹ Nani akobundisa ngai ? › 5 Nakomemela yo pasi,wuta na zingazinga na yo, »elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.« Bakomema moko na moko kati na bino na bowumbu,mpe moto ata moko te akokoka kosangisabato oyo bakokima. 6 Kasi sima na mikolo,nakozongisa lisusu lokumu ya bato ya Amoni, »elobi Yawe. 7 Na tina na Edomi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :« Boni, engumba ya Temani etikali lisusuna bato ya bwanya te ?Bato ya mayele batikali lisusu na bososoli te ?Boni, bwanya na bango esili penza ? 8 Bobaluka mpe bokima,bokende kobombama na madusu ya mabanga,bino bavandi ya engumba Dedani !Pamba te nakotindela Ezawu pasitango nakopesa ye etumbu. 9 Soki bato oyo babukaka bambuma ya vinobayei epai na yo,bakotika ata mbuma moko te ya vino.Soki miyibi bayei epai na yo na butu,bakobebisa ndenge balingi. 10 Kasi nakotika Ezawu bolumbu,mpe nakobimisa polele ebombamelo na ye,bongo akokoka lisusu komibomba te.Bana na ye ya mibali to bandeko na yeto mpe bazalani na ye bakosila kokufa ;moko te akotikala na bomoi. 11 Tika bana bitike na yo,nakobatela bomoi na bango ;mpe basi na yo, oyo bakufisa mibalibakotiela Ngai motema. » 12 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki bato oyo basengeli komela kopo te bameli yango, bongo mpo na nini yo ozanga kozwa etumbu ? Te, okozanga te kozwa etumbu, mpe osengeli komela kopo yango ! 13 Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « Botsira ekobebisama mpe ekokoma eloko ya somo, eloko ya kotiola mpe ya lisuma ; mpe bingumba na yango nyonso ekobebisama mpo na libela. » 14 Nayoki sango kowuta na Yawe ;mpe batindaki ntoma moko epai ya bikolo mpo na koloba :« Bosangana mpo na kobundisa yango !Botelema mpo na bitumba ! 15 Nakokomisa yo moke kati na bikolo,ekolo ya kotiola kati na bato. 16 Somo oyo bato bazali koyoka yompe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo.Yo movandi ya madusu ya mabanga,yo oyo otonga ndako na yona basonge ya bangomba ;ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo,nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, »elobi Yawe. 17 « Mokili ya Edomi ekokoma eloko ya somo ;moto nyonso oyo akolekela wana akokamwampe akoyoka somo wana akomona kobeba na yango nyonso. 18 Ndenge Sodome mpe Gomore ebebisamakielongo na bingumba na yango ya zingazinga, »elobi Yawe,« moto moko te akovanda lisusu kuna,moko te akowumela kati na yango. 19 Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordanimpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele,ndenge wana mpe nakobengana Edomina mokili na yango na mbala moko ;Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi.Nani akokani na Ngai ?Nani akoki kobeta tembe na Ngai ?Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ? 20 Yango wana,boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosalampo na kotelemela Edomi,mokano oyo asili kozwampo na kotelemela bavandi ya Temani :‹ Bakobengana bango na lopangolokola bana mike ya etonga,akobebisa etando na bango. 21 Mabele ekoningana na lokito ya kokweya na bango,makelele na yango ekoyokana kino na ebale monene ya Barozo. 22 Tala, mpongo moko ekopumbwa mpe ekokita na elulu,etanda mapapu na yango likolo ya Botsira !Na mokolo wana, mitema ya basoda ya Edomiekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota. › » 23 Na tina ya Damasi :« Amati mpe Aripadi batondisami na soni,pamba te bayoki sango ya mabe.Mitema na bango ekomi likolo-likolompe bakomi komitungisa lokola ebale oyo etomboki. 24 Bato ya Damasi balembi nzoto,bakomi koluka kokima mpe somo ekangi bango ;kobanga mpe pasi ezwi bangolokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. 25 Ndenge nini bosundola engumba ya lokumu boye,engumba oyo ezalaki kosepelisa motema na Ngai ? 26 Solo, bilenge mibali na yango bakokweyana babalabala na yango na mokolo wana,basoda na yango ya mpiko bakokanga minoko, »elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 27 « Nakozikisa bamir ya Damasi na motompe moto yango ekozikisa bandako batonga makasiya mokonzi Beni-Adadi. » 28 Na tina na Kedari mpe mikili ya Atsori, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki : Tala liloba oyo Yawe alobi :« Botelema mpe bobundisa Kedari,bobebisa bato ya este. 29 Bobotola na makasi bandako na bango ya kapompe bibwele na bango ;bomema bilamba, biloko na bango ya kitokompe bashamo na bango !Tika ete bato bawolola bango na bangambo nyonso :‹ Somo ekangi bango na bangambo nyonso ! › 30 Bino bavandi ya Atsori,bokima na lombangu,bobombama na madusu ya mabanga, »elobi Yawe.« Pamba te Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, asaleli bino likita,asali penza mabongisi ya kosala bino mabe ! 31 Botelema mpe bobundisa ekolo oyo ezali na kimia,ekolo oyo ebangaka eloko moko te, »elobi Yawe,« ekolo oyo ezanga bikuke mpe banzete oyo bakangelaka bikuke,ekolo oyo bato na yango bazalaka kaka bango moko. 32 Tika ete bashamo na bango ekoma bomengo ya bitumba,bayiba bibwele na bango ebele.Nakopanza na mopepe bavandi ya mosika,mpe nakokweyisela bango pasi longwa na bisika nyonso, »elobi Yawe. 33 « Atsori ekokoma esika oyo mbwa ya zamba evandaka,esika oyo etikala pamba mpo na libela :moto moko te akovanda lisusu kunampe moto moko te akowumela lisusu kati na yango. » 34 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Elami, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : 35 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :« Tala, nakobuka tolotolo ya Elami,ebundeli oyo esalaka makasi na ye. 36 Nakotindela Elami mipepe minei ya makasi,wuta na basonge minei ya lola,nakopanza bango na mokili mobimbampe akozala na ekolo moko teoyo ekozanga koyamba bato ya Elami oyo bakokima. 37 Nakosala ete bato ya Elami balengaliboso ya banguna na bango,liboso ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ;nakokweyisela bango pasi na kanda na Ngai, »elobi Yawe.« Nakolanda bango na mopangakino nakosilisa koboma bango. 38 Nakotia Kiti na Ngai ya bokonzi kati na Elamimpe nakoboma mokonzi mpe bakalaka na yango, »elobi Yawe. 39 « Nzokande, na mikolo ekolanda,nakozongisa lokumu ya Elami, »elobi Yawe.

In Other Versions

Jeremiah 49 in the ANGEFD

Jeremiah 49 in the ANTPNG2D

Jeremiah 49 in the AS21

Jeremiah 49 in the BAGH

Jeremiah 49 in the BBPNG

Jeremiah 49 in the BBT1E

Jeremiah 49 in the BDS

Jeremiah 49 in the BEV

Jeremiah 49 in the BHAD

Jeremiah 49 in the BIB

Jeremiah 49 in the BLPT

Jeremiah 49 in the BNT

Jeremiah 49 in the BNTABOOT

Jeremiah 49 in the BNTLV

Jeremiah 49 in the BOATCB

Jeremiah 49 in the BOATCB2

Jeremiah 49 in the BOBCV

Jeremiah 49 in the BOCNT

Jeremiah 49 in the BOECS

Jeremiah 49 in the BOGWICC

Jeremiah 49 in the BOHCB

Jeremiah 49 in the BOHCV

Jeremiah 49 in the BOHLNT

Jeremiah 49 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 49 in the BOICB

Jeremiah 49 in the BOILNTAP

Jeremiah 49 in the BOITCV

Jeremiah 49 in the BOKCV

Jeremiah 49 in the BOKCV2

Jeremiah 49 in the BOKHWOG

Jeremiah 49 in the BOKSSV

Jeremiah 49 in the BOLCB

Jeremiah 49 in the BOMCV

Jeremiah 49 in the BONAV

Jeremiah 49 in the BONCB

Jeremiah 49 in the BONLT

Jeremiah 49 in the BONUT2

Jeremiah 49 in the BOPLNT

Jeremiah 49 in the BOSCB

Jeremiah 49 in the BOSNC

Jeremiah 49 in the BOTLNT

Jeremiah 49 in the BOVCB

Jeremiah 49 in the BOYCB

Jeremiah 49 in the BPBB

Jeremiah 49 in the BPH

Jeremiah 49 in the BSB

Jeremiah 49 in the CCB

Jeremiah 49 in the CUV

Jeremiah 49 in the CUVS

Jeremiah 49 in the DBT

Jeremiah 49 in the DGDNT

Jeremiah 49 in the DHNT

Jeremiah 49 in the DNT

Jeremiah 49 in the ELBE

Jeremiah 49 in the EMTV

Jeremiah 49 in the ESV

Jeremiah 49 in the FBV

Jeremiah 49 in the FEB

Jeremiah 49 in the GGMNT

Jeremiah 49 in the GNT

Jeremiah 49 in the HARY

Jeremiah 49 in the HNT

Jeremiah 49 in the IRVA

Jeremiah 49 in the IRVB

Jeremiah 49 in the IRVG

Jeremiah 49 in the IRVH

Jeremiah 49 in the IRVK

Jeremiah 49 in the IRVM

Jeremiah 49 in the IRVM2

Jeremiah 49 in the IRVO

Jeremiah 49 in the IRVP

Jeremiah 49 in the IRVT

Jeremiah 49 in the IRVT2

Jeremiah 49 in the IRVU

Jeremiah 49 in the ISVN

Jeremiah 49 in the JSNT

Jeremiah 49 in the KAPI

Jeremiah 49 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 49 in the KBV

Jeremiah 49 in the KJV

Jeremiah 49 in the KNFD

Jeremiah 49 in the LBA

Jeremiah 49 in the LBLA

Jeremiah 49 in the LNT

Jeremiah 49 in the LSV

Jeremiah 49 in the MAAL

Jeremiah 49 in the MBV

Jeremiah 49 in the MBV2

Jeremiah 49 in the MHNT

Jeremiah 49 in the MKNFD

Jeremiah 49 in the MNG

Jeremiah 49 in the MNT

Jeremiah 49 in the MNT2

Jeremiah 49 in the MRS1T

Jeremiah 49 in the NAA

Jeremiah 49 in the NASB

Jeremiah 49 in the NBLA

Jeremiah 49 in the NBS

Jeremiah 49 in the NBVTP

Jeremiah 49 in the NET2

Jeremiah 49 in the NIV11

Jeremiah 49 in the NNT

Jeremiah 49 in the NNT2

Jeremiah 49 in the NNT3

Jeremiah 49 in the PDDPT

Jeremiah 49 in the PFNT

Jeremiah 49 in the RMNT

Jeremiah 49 in the SBIAS

Jeremiah 49 in the SBIBS

Jeremiah 49 in the SBIBS2

Jeremiah 49 in the SBICS

Jeremiah 49 in the SBIDS

Jeremiah 49 in the SBIGS

Jeremiah 49 in the SBIHS

Jeremiah 49 in the SBIIS

Jeremiah 49 in the SBIIS2

Jeremiah 49 in the SBIIS3

Jeremiah 49 in the SBIKS

Jeremiah 49 in the SBIKS2

Jeremiah 49 in the SBIMS

Jeremiah 49 in the SBIOS

Jeremiah 49 in the SBIPS

Jeremiah 49 in the SBISS

Jeremiah 49 in the SBITS

Jeremiah 49 in the SBITS2

Jeremiah 49 in the SBITS3

Jeremiah 49 in the SBITS4

Jeremiah 49 in the SBIUS

Jeremiah 49 in the SBIVS

Jeremiah 49 in the SBT

Jeremiah 49 in the SBT1E

Jeremiah 49 in the SCHL

Jeremiah 49 in the SNT

Jeremiah 49 in the SUSU

Jeremiah 49 in the SUSU2

Jeremiah 49 in the SYNO

Jeremiah 49 in the TBIAOTANT

Jeremiah 49 in the TBT1E

Jeremiah 49 in the TBT1E2

Jeremiah 49 in the TFTIP

Jeremiah 49 in the TFTU

Jeremiah 49 in the TGNTATF3T

Jeremiah 49 in the THAI

Jeremiah 49 in the TNFD

Jeremiah 49 in the TNT

Jeremiah 49 in the TNTIK

Jeremiah 49 in the TNTIL

Jeremiah 49 in the TNTIN

Jeremiah 49 in the TNTIP

Jeremiah 49 in the TNTIZ

Jeremiah 49 in the TOMA

Jeremiah 49 in the TTENT

Jeremiah 49 in the UBG

Jeremiah 49 in the UGV

Jeremiah 49 in the UGV2

Jeremiah 49 in the UGV3

Jeremiah 49 in the VBL

Jeremiah 49 in the VDCC

Jeremiah 49 in the YALU

Jeremiah 49 in the YAPE

Jeremiah 49 in the YBVTP

Jeremiah 49 in the ZBP