Jeremiah 8 (BOLCB2)

1 Na tango wana, elobi Yawe, bakobimisa mikuwa ya bakonzi mpe ya bakalaka ya Yuda, mikuwa ya Banganga-Nzambe mpe ya basakoli elongo na mikuwa ya bato ya Yelusalemi, wuta na malita na bango. 2 Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele. 3 Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. › 4 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi :Boni, soki moto akweyi, atelemaka te ?Soki moto abungi nzela, azongaka lisusu na nzela te ? 5 Mpo na nini bato ya Yelusalemi babungi nzela ?Mpo na nini bazali kokangama kaka na nzela na bango ya mabe ?Bamipesi makasi na makambo ya lokutampe baboyi kozongela Ngai. 6 Nayokaka na bokebi makambo nyonso oyo balobaka,kasi balobaka makambo ya solo te.Moko te kati na bango ayokaka motema pasimpo na mabe oyo asalaka,alobaka : ‘ Nasali nini ? ’Moto na moto akangamaka kaka na nzela na yelokola mpunda oyo ezali kokende na bitumba. 7 Ezala kutu nkongi, kati na likolo,eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu ;ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambilaeyebaka ata tango ya kozonga,kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te. 8 Ndenge nini bokoki koloba : ‘ Tozali bato ya bwanya,pamba te toyebi Mobeko ya Yawe, ’tango sik’oyo ekomeli ya balakisi ya Mobekoebongoli yango lokuta ? 9 Bato ya bwanya bakoyokisama soni,bakoyoka somo mpe bakokende na bowumbu,pamba te batiolaki Liloba na Yawe.Bazali na bwanya ya ndenge nini ? 10 Yango wana, nakokaba basi na bangoepai ya mibali mosusu,mpe bilanga na bango epai ya bato mosusu ;pamba te bango nyonso, ezala mikolo to bana mike,batondi na lokoso ya mbongo ;basakoli mpe Banganga-Nzambe nyonso bakomise kotambola na lokuta ; 11 bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolompe bazali koloba : ‘ Makambo nyonso ezali malamu,nyonso ezali kotambola malamu ! ’Nzokande, ata likambo moko ya malamu ezali te. 12 Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ?Te ! Bazali koyoka ata soni te ;bayebi kutu te ndenge bayokaka soni !Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso,bakokweyisama tango bakozwa etumbu,elobi Yawe. 13 Nakobebisa milona na bango,elobi Yawe.Bambuma ya vino ekozala lisusu te na banzete ya vino,mbuma ya figi ekozala lisusu te na banzete ya figi,mpe makasa ya banzete yango ekokawuka.Bakobotola bango biloko oyo napesaki bango. › » 14 Mpo na nini tozali kovanda awa ?Tosangana esika moko !Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasimpo ete tokufela kuna !Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufampe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela,pamba te tosalaki masumu liboso na Ye. 15 Tozalaki na elikya ete tokozala na kimia,kasi tomoni likambo moko te ya malamu ;tozalaki na elikya ete tokobika,kasi pasi na pasi nde ezali kolanda biso ! 16 Lokito ya bampunda ya bangunampe makelele ya makolo na yangoezali koyokana wuta na Dani,ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonsooyo ezali kati na yango,engumba mpe bavandi na yango nyonso,bongo mokili mobimba eningani. 17 « Botala, nakotindela bino banyoka oyo ebomaka,bitupa oyo moto akoki kosakana na yango te,mpo ete eswa bino, »elobi Yawe. 18 Pasi na ngai ezangeli kisimpo na kosilisa yango,motema na ngai elembi kati na ngai. 19 Yoka koganga ya bato na ngaiwuta na mokili ya mosika :« Boni, Yawe azali lisusu te, kati na Siona ?Mokonzi na yango azali lisusu kuna te ? » « Mpo na nini batumbolaki kanda na Ngaina nzela ya banzambe na bango ya bikeko,na nzela ya banzambe ya bapaya oyo ezanga ata tina ? » 20 « Tango ya kobuka mbuma esili koleka,elanga mpe esili kokoma na suka,kasi biso tobikisami te. » 21 Ndenge bato na ngai bazali koyoka pasi,ndenge wana mpe ngai nazali koyoka pasi,nazali kolela, mpe somo ekangi ngai makasi. 22 Boni, kisi ezali te kati na Galadi ?Minganga bazali kuna te ?Bongo mpo na nini bato na ngai bazali kobika te ? 23 Ah ! Soki moto na ngai ezalaki etima,mpe soki miso na ngai ezalaki liziba ya mpinzoli,nalingaki kolela butu mpe moyimpo na bato na ngai, oyo basili koboma.

In Other Versions

Jeremiah 8 in the ANGEFD

Jeremiah 8 in the ANTPNG2D

Jeremiah 8 in the AS21

Jeremiah 8 in the BAGH

Jeremiah 8 in the BBPNG

Jeremiah 8 in the BBT1E

Jeremiah 8 in the BDS

Jeremiah 8 in the BEV

Jeremiah 8 in the BHAD

Jeremiah 8 in the BIB

Jeremiah 8 in the BLPT

Jeremiah 8 in the BNT

Jeremiah 8 in the BNTABOOT

Jeremiah 8 in the BNTLV

Jeremiah 8 in the BOATCB

Jeremiah 8 in the BOATCB2

Jeremiah 8 in the BOBCV

Jeremiah 8 in the BOCNT

Jeremiah 8 in the BOECS

Jeremiah 8 in the BOGWICC

Jeremiah 8 in the BOHCB

Jeremiah 8 in the BOHCV

Jeremiah 8 in the BOHLNT

Jeremiah 8 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 8 in the BOICB

Jeremiah 8 in the BOILNTAP

Jeremiah 8 in the BOITCV

Jeremiah 8 in the BOKCV

Jeremiah 8 in the BOKCV2

Jeremiah 8 in the BOKHWOG

Jeremiah 8 in the BOKSSV

Jeremiah 8 in the BOLCB

Jeremiah 8 in the BOMCV

Jeremiah 8 in the BONAV

Jeremiah 8 in the BONCB

Jeremiah 8 in the BONLT

Jeremiah 8 in the BONUT2

Jeremiah 8 in the BOPLNT

Jeremiah 8 in the BOSCB

Jeremiah 8 in the BOSNC

Jeremiah 8 in the BOTLNT

Jeremiah 8 in the BOVCB

Jeremiah 8 in the BOYCB

Jeremiah 8 in the BPBB

Jeremiah 8 in the BPH

Jeremiah 8 in the BSB

Jeremiah 8 in the CCB

Jeremiah 8 in the CUV

Jeremiah 8 in the CUVS

Jeremiah 8 in the DBT

Jeremiah 8 in the DGDNT

Jeremiah 8 in the DHNT

Jeremiah 8 in the DNT

Jeremiah 8 in the ELBE

Jeremiah 8 in the EMTV

Jeremiah 8 in the ESV

Jeremiah 8 in the FBV

Jeremiah 8 in the FEB

Jeremiah 8 in the GGMNT

Jeremiah 8 in the GNT

Jeremiah 8 in the HARY

Jeremiah 8 in the HNT

Jeremiah 8 in the IRVA

Jeremiah 8 in the IRVB

Jeremiah 8 in the IRVG

Jeremiah 8 in the IRVH

Jeremiah 8 in the IRVK

Jeremiah 8 in the IRVM

Jeremiah 8 in the IRVM2

Jeremiah 8 in the IRVO

Jeremiah 8 in the IRVP

Jeremiah 8 in the IRVT

Jeremiah 8 in the IRVT2

Jeremiah 8 in the IRVU

Jeremiah 8 in the ISVN

Jeremiah 8 in the JSNT

Jeremiah 8 in the KAPI

Jeremiah 8 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 8 in the KBV

Jeremiah 8 in the KJV

Jeremiah 8 in the KNFD

Jeremiah 8 in the LBA

Jeremiah 8 in the LBLA

Jeremiah 8 in the LNT

Jeremiah 8 in the LSV

Jeremiah 8 in the MAAL

Jeremiah 8 in the MBV

Jeremiah 8 in the MBV2

Jeremiah 8 in the MHNT

Jeremiah 8 in the MKNFD

Jeremiah 8 in the MNG

Jeremiah 8 in the MNT

Jeremiah 8 in the MNT2

Jeremiah 8 in the MRS1T

Jeremiah 8 in the NAA

Jeremiah 8 in the NASB

Jeremiah 8 in the NBLA

Jeremiah 8 in the NBS

Jeremiah 8 in the NBVTP

Jeremiah 8 in the NET2

Jeremiah 8 in the NIV11

Jeremiah 8 in the NNT

Jeremiah 8 in the NNT2

Jeremiah 8 in the NNT3

Jeremiah 8 in the PDDPT

Jeremiah 8 in the PFNT

Jeremiah 8 in the RMNT

Jeremiah 8 in the SBIAS

Jeremiah 8 in the SBIBS

Jeremiah 8 in the SBIBS2

Jeremiah 8 in the SBICS

Jeremiah 8 in the SBIDS

Jeremiah 8 in the SBIGS

Jeremiah 8 in the SBIHS

Jeremiah 8 in the SBIIS

Jeremiah 8 in the SBIIS2

Jeremiah 8 in the SBIIS3

Jeremiah 8 in the SBIKS

Jeremiah 8 in the SBIKS2

Jeremiah 8 in the SBIMS

Jeremiah 8 in the SBIOS

Jeremiah 8 in the SBIPS

Jeremiah 8 in the SBISS

Jeremiah 8 in the SBITS

Jeremiah 8 in the SBITS2

Jeremiah 8 in the SBITS3

Jeremiah 8 in the SBITS4

Jeremiah 8 in the SBIUS

Jeremiah 8 in the SBIVS

Jeremiah 8 in the SBT

Jeremiah 8 in the SBT1E

Jeremiah 8 in the SCHL

Jeremiah 8 in the SNT

Jeremiah 8 in the SUSU

Jeremiah 8 in the SUSU2

Jeremiah 8 in the SYNO

Jeremiah 8 in the TBIAOTANT

Jeremiah 8 in the TBT1E

Jeremiah 8 in the TBT1E2

Jeremiah 8 in the TFTIP

Jeremiah 8 in the TFTU

Jeremiah 8 in the TGNTATF3T

Jeremiah 8 in the THAI

Jeremiah 8 in the TNFD

Jeremiah 8 in the TNT

Jeremiah 8 in the TNTIK

Jeremiah 8 in the TNTIL

Jeremiah 8 in the TNTIN

Jeremiah 8 in the TNTIP

Jeremiah 8 in the TNTIZ

Jeremiah 8 in the TOMA

Jeremiah 8 in the TTENT

Jeremiah 8 in the UBG

Jeremiah 8 in the UGV

Jeremiah 8 in the UGV2

Jeremiah 8 in the UGV3

Jeremiah 8 in the VBL

Jeremiah 8 in the VDCC

Jeremiah 8 in the YALU

Jeremiah 8 in the YAPE

Jeremiah 8 in the YBVTP

Jeremiah 8 in the ZBP