John 17 (BOLCB2)

1 Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki : Tata, tango ekoki ; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo ; 2 pamba te opesaki Ye bokonzi likolo ya bato nyonso, mpo ete apesa bomoi ya seko epai ya bato nyonso oyo opesaki Ye. 3 Nzokande, bomoi ya seko ezali : koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki. 4 Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai. 5 Sik’oyo Tata, pesa Ngai lisusu nkembo oyo nazalaki na yango kuna epai Yo ozali liboso ete okela mokili. 6 Namonisi nkembo na Yo epai ya bato oyo opesaki Ngai sima na Yo kolongola bango na misala ya mokili. Bazalaki bato na Yo, kasi opesaki Ngai bango ; mpe batosi Liloba na Yo. 7 Bayebi malamu sik’oyo ete nyonso oyo opesaki Ngai ewutaki solo epai na Yo ; 8 pamba te nateyaki bango maloba oyo opesaki Ngai, mpe bayambaki yango na esengo ; bayebi ete nawutaki solo epai na Yo, mpe bandimi ete Yo nde otindaki Ngai. 9 Nazali kobondela nde mpo na bango ; nazali kobondela te mpo na bato ya mokili, kasi mpo na bato oyo opesaki Ngai, mpo ete bazali bato na Yo. 10 Bato na Yo nyonso bazali bato na Ngai, mpe bato na Ngai nyonso bazali bato na Yo ; mpe nkembo na Ngai ezali komonisama kati na bango. 11 Kala mingi te, nakozala lisusu te kati na mokili, pamba te nazali koya epai na Yo ; kasi bango, bakokoba kozala kati na mokili. Tata na Ngai, Yo oyo ozali Mosantu, batela bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai, mpo ete bazala moko ndenge Yo na Ngai tozali moko. 12 Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai ; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama. 13 Sik’oyo, nazali koya epai na Yo ; kasi nazali koloba makambo oyo tango nazali nanu kati na mokili mpo ete esengo na Ngai, oyo ezali ya kokoka, ezala kati na bango. 14 Nateyaki bango maloba oyo oyebisaki Ngai, mpe mokili eyinaki bango mpo ete bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te. 15 Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya Satana. 16 Bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te. 17 Bulisa bango na nzela ya bosolo na Yo, Liloba na Yo ya solo. 18 Ndenge otindaki Ngai kati na mokili, ndenge wana mpe Ngai nazali kotinda bango. 19 Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo. 20 Nazali kobondela mpo na bango kaka te, kasi mpe mpo na bato oyo bakondima Ngai na nzela ya mateya na bango, 21 mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo ; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai. 22 Nasaleli bango ngolu ya kobika nkembo na Yo ndenge kaka osalaki mpo na Ngai, mpo ete bazala moko ndenge biso mpe tozali moko : 23 Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai. 24 Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili. 25 Tata, Yo oyo ozali sembo, mokili eyebi Yo te ; kasi Ngai nayebi Yo, mpe bato oyo bayebi ete Yo nde otindaki Ngai. 26 Nalakisi bango nguya ya Kombo na Yo, mpe nakokoba kolakisa bango yango, mpo ete bolingo oyo ozali na yango mpo na Ngai ezala kati na bango, mpe Ngai nazala kati na bango.

In Other Versions

John 17 in the ANGEFD

John 17 in the ANTPNG2D

John 17 in the AS21

John 17 in the BAGH

John 17 in the BBPNG

John 17 in the BBT1E

John 17 in the BDS

John 17 in the BEV

John 17 in the BHAD

John 17 in the BIB

John 17 in the BLPT

John 17 in the BNT

John 17 in the BNTABOOT

John 17 in the BNTLV

John 17 in the BOATCB

John 17 in the BOATCB2

John 17 in the BOBCV

John 17 in the BOCNT

John 17 in the BOECS

John 17 in the BOGWICC

John 17 in the BOHCB

John 17 in the BOHCV

John 17 in the BOHLNT

John 17 in the BOHNTLTAL

John 17 in the BOICB

John 17 in the BOILNTAP

John 17 in the BOITCV

John 17 in the BOKCV

John 17 in the BOKCV2

John 17 in the BOKHWOG

John 17 in the BOKSSV

John 17 in the BOLCB

John 17 in the BOMCV

John 17 in the BONAV

John 17 in the BONCB

John 17 in the BONLT

John 17 in the BONUT2

John 17 in the BOPLNT

John 17 in the BOSCB

John 17 in the BOSNC

John 17 in the BOTLNT

John 17 in the BOVCB

John 17 in the BOYCB

John 17 in the BPBB

John 17 in the BPH

John 17 in the BSB

John 17 in the CCB

John 17 in the CUV

John 17 in the CUVS

John 17 in the DBT

John 17 in the DGDNT

John 17 in the DHNT

John 17 in the DNT

John 17 in the ELBE

John 17 in the EMTV

John 17 in the ESV

John 17 in the FBV

John 17 in the FEB

John 17 in the GGMNT

John 17 in the GNT

John 17 in the HARY

John 17 in the HNT

John 17 in the IRVA

John 17 in the IRVB

John 17 in the IRVG

John 17 in the IRVH

John 17 in the IRVK

John 17 in the IRVM

John 17 in the IRVM2

John 17 in the IRVO

John 17 in the IRVP

John 17 in the IRVT

John 17 in the IRVT2

John 17 in the IRVU

John 17 in the ISVN

John 17 in the JSNT

John 17 in the KAPI

John 17 in the KBT1ETNIK

John 17 in the KBV

John 17 in the KJV

John 17 in the KNFD

John 17 in the LBA

John 17 in the LBLA

John 17 in the LNT

John 17 in the LSV

John 17 in the MAAL

John 17 in the MBV

John 17 in the MBV2

John 17 in the MHNT

John 17 in the MKNFD

John 17 in the MNG

John 17 in the MNT

John 17 in the MNT2

John 17 in the MRS1T

John 17 in the NAA

John 17 in the NASB

John 17 in the NBLA

John 17 in the NBS

John 17 in the NBVTP

John 17 in the NET2

John 17 in the NIV11

John 17 in the NNT

John 17 in the NNT2

John 17 in the NNT3

John 17 in the PDDPT

John 17 in the PFNT

John 17 in the RMNT

John 17 in the SBIAS

John 17 in the SBIBS

John 17 in the SBIBS2

John 17 in the SBICS

John 17 in the SBIDS

John 17 in the SBIGS

John 17 in the SBIHS

John 17 in the SBIIS

John 17 in the SBIIS2

John 17 in the SBIIS3

John 17 in the SBIKS

John 17 in the SBIKS2

John 17 in the SBIMS

John 17 in the SBIOS

John 17 in the SBIPS

John 17 in the SBISS

John 17 in the SBITS

John 17 in the SBITS2

John 17 in the SBITS3

John 17 in the SBITS4

John 17 in the SBIUS

John 17 in the SBIVS

John 17 in the SBT

John 17 in the SBT1E

John 17 in the SCHL

John 17 in the SNT

John 17 in the SUSU

John 17 in the SUSU2

John 17 in the SYNO

John 17 in the TBIAOTANT

John 17 in the TBT1E

John 17 in the TBT1E2

John 17 in the TFTIP

John 17 in the TFTU

John 17 in the TGNTATF3T

John 17 in the THAI

John 17 in the TNFD

John 17 in the TNT

John 17 in the TNTIK

John 17 in the TNTIL

John 17 in the TNTIN

John 17 in the TNTIP

John 17 in the TNTIZ

John 17 in the TOMA

John 17 in the TTENT

John 17 in the UBG

John 17 in the UGV

John 17 in the UGV2

John 17 in the UGV3

John 17 in the VBL

John 17 in the VDCC

John 17 in the YALU

John 17 in the YAPE

John 17 in the YBVTP

John 17 in the ZBP