John 6 (BOLCB2)

1 Sima na yango, Yesu akendeki na ngambo mosusu ya ebale ya Galile oyo babengaka mpe ebale ya Tiberiade. 2 Bato ebele bazalaki kolanda Ye mpo ete bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala na banzoto ya babeli. 3 Yango wana Yesu amataki na ngomba mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye. 4 Nzokande Pasika, feti ya Bayuda, ekomaki pene. 5 Tango Yesu atombolaki miso, amonaki ebele ya bato penza koya epai na Ye ; alobaki na Filipo : — Tokosomba mapa wapi mpo na koleisa bato oyo nyonso ? 6 Yesu atunaki Filipo motuna oyo mpo na komeka ye mpe kotala soki akoloba nini, pamba te Ye, Yesu, ayebaki makambo oyo alingaki kosala. 7 Filipo azongiselaki Yesu :— Mapa oyo tokoki kosomba na mbongo ya bibende nkama mibale ekokoka te mpo ete moto moko na moko kati na bango azwa eteni ya lipa ! 8 Moko kati na bayekoli na Ye, oyo kombo na ye ezali Andre, ndeko mobali ya Simona Petelo, alobaki na Ye : 9 — Ezali awa na elenge mobali moko oyo azali na mapa mitano basala na bambuma ya orje, mpe bambisi mibale ; kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato oyo ? 10 Yesu apesaki bango mitindo : — Boloba na bato nyonso ete bavanda.Boye, lokola ezalaki na matiti ebele na esika yango, bavandaki. Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano. 11 Bongo Yesu azwaki mapa yango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akabolaki yango epai ya bato oyo bazalaki wana ; asalaki mpe bongo na bambisi : bato bazwaki kolanda ndenge posa na bango ezalaki. 12 Sima na bato kolia mpe kotonda, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Bosangisa biteni oyo etikali mpo ete eteni moko te ebeba. 13 Basangisaki biteni yango ; mpe na biteni ya mapa mitano basala na bambuma ya orje, oyo etikalaki na maboko ya bato oyo baliaki, batondisaki bitunga zomi na mibale. 14 Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. » 15 Kasi, lokola Yesu ayebaki ete bazali na makanisi ya kokamata Ye mpo na kokomisa Ye mokonzi, abendanaki lisusu na ngomba mpo ete azala kaka Ye moko. 16 Tango pokwa ekomaki, bayekoli na Ye bakitaki na ebale 17 epai wapi bamataki na bwato moko, bakatisaki ebale mpo na kokende na Kapernawumi, na ngambo mosusu ya ebale. Butu ekotaki, wana Yesu amikomelaki nanu te epai bango bakomaki. 18 Ekumbaki moko ebandaki kopepa, mpe mayi ya ebale etombokaki. 19 Awa basilaki koluka nkayi na molayi ya bakilometele pene mitano to motoba, bamonaki Yesu kotambola likolo ya mayi ya ebale mpe kopusana pene ya bwato ; somo makasi ekangaki bango. 20 Kasi Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! » 21 Balingaki kokotisa Yesu na bwato, kasi, mbala moko, bwato etutaki mabele ya esika oyo bazalaki kokende. 22 Mokolo oyo elandaki, bato oyo batikalaki na ngambo mosusu ya ebale bayaki kokanisa na sima ete ezalaki kaka na bwato moko, mpe ete Yesu akendeki bwato moko te na bayekoli na Ye ; bayekoli bakendeki bango moko kaka. 23 Nzokande, babwato mosusu ewutaki na Tiberiade mpe ekomaki pene ya esika oyo baliaki mapa sima na Nkolo kozongisa matondi epai ya Nzambe. 24 Tango bato bamonaki ete, ezala Yesu to bayekoli na Ye, moko te azalaki lisusu wana, bamataki na babwato yango mpe bakendeki koluka Yesu, na Kapernawumi. 25 Tango bakutaki Ye na ngambo mosusu ya ebale, batunaki Ye :— Rabi, okomaki awa tango nini ? 26 Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali koluka Ngai, ezali kaka mpo ete boliaki mapa mpe botondaki, kasi ezali te mpo ete bomonaki bikamwa. 27 Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe. 28 Batunaki Ye lisusu :— Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala oyo Nzambe azali kozela epai na biso ? 29 Yesu azongiselaki bango : — Mosala ya Nzambe, yango oyo : bondima Ye oyo Nzambe atindaki. 30 Batunaki Ye lisusu :— Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo ? Okosala penza nini ? 31 Bakoko na biso baliaki mana kati na esobe kolanda ndenge ekomama : « Apesaki bango lipa kowuta na Likolo. » 32 Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ezalaki kowuta na Likolo, kasi ezali Tata na Ngai nde apesaka bino lipa ya solo oyo ewutaka na Likolo. 33 Pamba te lipa ya Nzambe ezali Ye oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka mokili bomoi. 34 Bongo balobaki na Ye :— Nkolo, pesaka biso lipa yango tango nyonso. 35 Yesu azongiselaki bango : — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te. 36 Nzokande, ndenge nayebisaki bino, bozali komona Ngai, kasi bozali kondima te. 37 Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai. 38 Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai. 39 Nzokande, Ye oyo atindaki Ngai alingi ete nabungisa ata moto moko te kati na bato oyo apesaki Ngai, kasi nasekwisa bango na mokolo ya suka. 40 Pamba te mokano ya Tata na Ngai ezali ete moto nyonso oyo amoni Mwana mpe andimi Ye azwa bomoi ya seko ; mpe, Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka. 41 Bayuda bakomaki koyimayima na tina na Ye mpo ete alobaki : « Ngai, nazali lipa oyo ekiti wuta na Likolo. » 42 Bakomaki koloba :— Boni, wana ezali Yesu te ? Ezali mwana mobali ya Jozefi te ? Toyebi malamu tata mpe mama na ye ! Bongo ndenge nini azali koloba : « Nawuti na Likolo ? » 43 Yesu azongiselaki bango : — Botika koyimayima kati na bino ! 44 Moto moko te akoki koya epai na Ngai soki Tata oyo atindaki Ngai abendi ye te ; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka. 45 Tala ndenge ekomama kati na mikanda ya Basakoli : « Nzambe akoteya bango nyonso. » Boye moto nyonso oyo ayokaka Tata mpe ayambaka mateya na Ye ayaka epai na Ngai. 46 Moto moko te amona Tata, longola kaka Ye oyo ayaki wuta epai ya Nzambe. 47 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo andimi azali na bomoi ya seko, 48 pamba te nazali lipa oyo epesaka bomoi. 49 Bakoko na bino baliaki mana kati na esobe mpe bakufaki, 50 kasi botala lipa oyo ewuti na Likolo ; moto oyo akolia yango akokufa te. 51 Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo ; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko ; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai. 52 Tango Bayuda bayokaki bongo, bakomaki kotiana tembe ; bazalaki koloba :— Akopesa biso nzoto na ye ndenge nini mpo ete tolia yango ? 53 Bongo Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bolie nzoto ya Mwana na Moto te mpe bomeli makila na Ye te, bozali na bomoi te kati na bino. 54 Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai, azali na bomoi ya seko ; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka. 55 Pamba te nzoto na Ngai ezali penza bilei, mpe makila na Ngai ezali penza lokola mayi oyo bamelaka. 56 Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na ye. 57 Ndenge Tata oyo atindaki Ngai azali etima ya bomoi mpe Ngai nazali na bomoi na nzela na Ye, ndenge wana mpe moto oyo alie nzoto na Ngai akozala na bomoi na nzela na Ngai. 58 Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali : ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka ; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko. 59 Wana nde ezalaki mateya ya Yesu kati na ndako ya mayangani ya Kapernawumi. 60 Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki :— Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango ? 61 Yesu asosolaki ete bayekoli na Ye bazalaki koyimayima na tina na yango ; alobaki na bango : — Boni, maloba oyo ebetisi bino mabaku ? 62 Bongo ekozala ndenge nini soki bomoni Mwana na Moto kozonga epai Ye azalaki liboso ? 63 Ezali Molimo nde apesaka bomoi ; mosuni ezali na eloko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali Molimo mpe bomoi. 64 Kasi bato mosusu kati na bino bazali kondima te.Solo, wuta na ebandeli, Yesu ayebaki banani bazalaki kondima te, mpe nani akoteka Ye. 65 Alobaki lisusu : — Yango wana nalobaki na bino : « Moto moko te akoki koya epai na Ngai soki epesameli ye te na Tata. » 66 Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye. 67 Boye, Yesu alobaki na bantoma zomi na mibale : — Boni, bino mpe bolingi kokende ? 68 Simona Petelo azongisaki :— Nkolo, tokokende epai ya nani ? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko. 69 Biso, tondimi mpe toyebi ete ozali Mosantu ya Nzambe. 70 Yesu alobaki na bango : — Boni, ezali Ngai te nde naponaki bino nyonso zomi na mibale ? Nzokande, moko kati na bino azali Satana ! 71 Yesu azalaki nde koloba na tina na Yuda, mwana mobali ya Simona Isikarioti, oyo, kati na bantoma zomi na mibale, asengelaki koteka Ye.

In Other Versions

John 6 in the ANGEFD

John 6 in the ANTPNG2D

John 6 in the AS21

John 6 in the BAGH

John 6 in the BBPNG

John 6 in the BBT1E

John 6 in the BDS

John 6 in the BEV

John 6 in the BHAD

John 6 in the BIB

John 6 in the BLPT

John 6 in the BNT

John 6 in the BNTABOOT

John 6 in the BNTLV

John 6 in the BOATCB

John 6 in the BOATCB2

John 6 in the BOBCV

John 6 in the BOCNT

John 6 in the BOECS

John 6 in the BOGWICC

John 6 in the BOHCB

John 6 in the BOHCV

John 6 in the BOHLNT

John 6 in the BOHNTLTAL

John 6 in the BOICB

John 6 in the BOILNTAP

John 6 in the BOITCV

John 6 in the BOKCV

John 6 in the BOKCV2

John 6 in the BOKHWOG

John 6 in the BOKSSV

John 6 in the BOLCB

John 6 in the BOMCV

John 6 in the BONAV

John 6 in the BONCB

John 6 in the BONLT

John 6 in the BONUT2

John 6 in the BOPLNT

John 6 in the BOSCB

John 6 in the BOSNC

John 6 in the BOTLNT

John 6 in the BOVCB

John 6 in the BOYCB

John 6 in the BPBB

John 6 in the BPH

John 6 in the BSB

John 6 in the CCB

John 6 in the CUV

John 6 in the CUVS

John 6 in the DBT

John 6 in the DGDNT

John 6 in the DHNT

John 6 in the DNT

John 6 in the ELBE

John 6 in the EMTV

John 6 in the ESV

John 6 in the FBV

John 6 in the FEB

John 6 in the GGMNT

John 6 in the GNT

John 6 in the HARY

John 6 in the HNT

John 6 in the IRVA

John 6 in the IRVB

John 6 in the IRVG

John 6 in the IRVH

John 6 in the IRVK

John 6 in the IRVM

John 6 in the IRVM2

John 6 in the IRVO

John 6 in the IRVP

John 6 in the IRVT

John 6 in the IRVT2

John 6 in the IRVU

John 6 in the ISVN

John 6 in the JSNT

John 6 in the KAPI

John 6 in the KBT1ETNIK

John 6 in the KBV

John 6 in the KJV

John 6 in the KNFD

John 6 in the LBA

John 6 in the LBLA

John 6 in the LNT

John 6 in the LSV

John 6 in the MAAL

John 6 in the MBV

John 6 in the MBV2

John 6 in the MHNT

John 6 in the MKNFD

John 6 in the MNG

John 6 in the MNT

John 6 in the MNT2

John 6 in the MRS1T

John 6 in the NAA

John 6 in the NASB

John 6 in the NBLA

John 6 in the NBS

John 6 in the NBVTP

John 6 in the NET2

John 6 in the NIV11

John 6 in the NNT

John 6 in the NNT2

John 6 in the NNT3

John 6 in the PDDPT

John 6 in the PFNT

John 6 in the RMNT

John 6 in the SBIAS

John 6 in the SBIBS

John 6 in the SBIBS2

John 6 in the SBICS

John 6 in the SBIDS

John 6 in the SBIGS

John 6 in the SBIHS

John 6 in the SBIIS

John 6 in the SBIIS2

John 6 in the SBIIS3

John 6 in the SBIKS

John 6 in the SBIKS2

John 6 in the SBIMS

John 6 in the SBIOS

John 6 in the SBIPS

John 6 in the SBISS

John 6 in the SBITS

John 6 in the SBITS2

John 6 in the SBITS3

John 6 in the SBITS4

John 6 in the SBIUS

John 6 in the SBIVS

John 6 in the SBT

John 6 in the SBT1E

John 6 in the SCHL

John 6 in the SNT

John 6 in the SUSU

John 6 in the SUSU2

John 6 in the SYNO

John 6 in the TBIAOTANT

John 6 in the TBT1E

John 6 in the TBT1E2

John 6 in the TFTIP

John 6 in the TFTU

John 6 in the TGNTATF3T

John 6 in the THAI

John 6 in the TNFD

John 6 in the TNT

John 6 in the TNTIK

John 6 in the TNTIL

John 6 in the TNTIN

John 6 in the TNTIP

John 6 in the TNTIZ

John 6 in the TOMA

John 6 in the TTENT

John 6 in the UBG

John 6 in the UGV

John 6 in the UGV2

John 6 in the UGV3

John 6 in the VBL

John 6 in the VDCC

John 6 in the YALU

John 6 in the YAPE

John 6 in the YBVTP

John 6 in the ZBP