Matthew 18 (BOLCB2)

1 Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye :— Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ? 2 Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango 3 mpe alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo. 4 Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo. 5 Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. 6 Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale. 7 Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka ! 8 Soki loboko to lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko to na lokolo moko, na esika ete otikala na maboko mibale to makolo mibale mpe obwakama na moto ya libela na libela. 9 Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na moto ya lifelo. 10 Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo.[ 11 Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na kobikisa bato oyo babunga nzela.] 12 Bokanisi nini ? Soki moto moko azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme na ye tuku libwa na libwa na likolo ya ngomba mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga ? 13 Mpe soki amoni yango, nazali koloba na bino penza ya solo, esengo na ye mpo na meme wana ekoleka esengo mpo na bameme tuku libwa na libwa oyo ebungaki te. 14 Ndenge moko, Tata na bino oyo azali kati na Likolo alingi ete moko te kati na bana oyo abunga. 15 Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu. 16 Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, pamba te Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato. 17 Kasi soki aboyi kaka koyokela bango, yebisa makambo yango na Lingomba. Soki aboyi mpe kaka koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopagano mpe lokola mofutisi mpako. 18 Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso oyo bokokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo bokofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo. 19 Nazali lisusu koloba na bino penza ya solo : soki bato mibale kati na bino bayokani awa na mokili mpo na kosenga eloko songolo to pakala, Tata na Ngai oyo azali kati na Likolo akopesa bango yango. 20 Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango. 21 Bongo Petelo apusanaki pene ya Yesu mpe atunaki :— Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai tango akosala ngai mabe ? Boni, kino mbala sambo ? 22 Yesu azongisaki : — Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambo na sambo. 23 Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kobongisa elongo na basali na ye makambo na ye ya misolo. 24 Tango abandaki, bamemelaki ye mosali moko oyo azalaki na niongo na ye ya batalanta nkoto zomi. 25 Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye, mwasi na ye, bana na ye mpe biloko na ye nyonso mpo ete niongo na ye efutama. 26 Kasi mosali yango amibwakaki na makolo ya mokonzi, agumbamaki liboso na ye mpe asengaki : « Yikela ngai mpiko, pamba te nakofuta yo niongo nyonso ! » 27 Mokonzi ya mosali ayokelaki ye mawa, alimbisaki niongo na ye mpe atikaki ye kokende. 28 Kasi tango mosali yango abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo adefaki epai na ye mbongo ya bibende nkama moko. Akangaki ye, akomaki kofinafina ye na kingo mpe alobaki na ye : « Futa niongo na ngai. » 29 Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe asengaki na ye : « Yikela ngai mpiko, nakofuta yo niongo nyonso. » 30 Kasi ye aboyaki ; akendeki kosenga ete babwaka ye na boloko, kino tango akosilisa kofuta niongo nyonso. 31 Tango baninga na ye ya mosala bamonaki ndenge makambo elekaki, bayokaki mawa mingi mpe bakendeki koyebisa makambo nyonso epai ya mokonzi na bango. 32 Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye : « Mosali mabe ! Ngai nalimbisaki yo niongo nyonso oyo ozalaki na yango epai na ngai, mpo ete osengaki ngai. 33 Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo ? » 34 Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, akabaki ye na maboko ya banyokoli kino tango afutaki niongo nyonso. 35 Ezali ndenge wana nde Tata na Ngai ya Likolo akosala bino soki moko na moko kati na bino alimbisi te ndeko na ye, na motema na ye mobimba.

In Other Versions

Matthew 18 in the ANGEFD

Matthew 18 in the ANTPNG2D

Matthew 18 in the AS21

Matthew 18 in the BAGH

Matthew 18 in the BBPNG

Matthew 18 in the BBT1E

Matthew 18 in the BDS

Matthew 18 in the BEV

Matthew 18 in the BHAD

Matthew 18 in the BIB

Matthew 18 in the BLPT

Matthew 18 in the BNT

Matthew 18 in the BNTABOOT

Matthew 18 in the BNTLV

Matthew 18 in the BOATCB

Matthew 18 in the BOATCB2

Matthew 18 in the BOBCV

Matthew 18 in the BOCNT

Matthew 18 in the BOECS

Matthew 18 in the BOGWICC

Matthew 18 in the BOHCB

Matthew 18 in the BOHCV

Matthew 18 in the BOHLNT

Matthew 18 in the BOHNTLTAL

Matthew 18 in the BOICB

Matthew 18 in the BOILNTAP

Matthew 18 in the BOITCV

Matthew 18 in the BOKCV

Matthew 18 in the BOKCV2

Matthew 18 in the BOKHWOG

Matthew 18 in the BOKSSV

Matthew 18 in the BOLCB

Matthew 18 in the BOMCV

Matthew 18 in the BONAV

Matthew 18 in the BONCB

Matthew 18 in the BONLT

Matthew 18 in the BONUT2

Matthew 18 in the BOPLNT

Matthew 18 in the BOSCB

Matthew 18 in the BOSNC

Matthew 18 in the BOTLNT

Matthew 18 in the BOVCB

Matthew 18 in the BOYCB

Matthew 18 in the BPBB

Matthew 18 in the BPH

Matthew 18 in the BSB

Matthew 18 in the CCB

Matthew 18 in the CUV

Matthew 18 in the CUVS

Matthew 18 in the DBT

Matthew 18 in the DGDNT

Matthew 18 in the DHNT

Matthew 18 in the DNT

Matthew 18 in the ELBE

Matthew 18 in the EMTV

Matthew 18 in the ESV

Matthew 18 in the FBV

Matthew 18 in the FEB

Matthew 18 in the GGMNT

Matthew 18 in the GNT

Matthew 18 in the HARY

Matthew 18 in the HNT

Matthew 18 in the IRVA

Matthew 18 in the IRVB

Matthew 18 in the IRVG

Matthew 18 in the IRVH

Matthew 18 in the IRVK

Matthew 18 in the IRVM

Matthew 18 in the IRVM2

Matthew 18 in the IRVO

Matthew 18 in the IRVP

Matthew 18 in the IRVT

Matthew 18 in the IRVT2

Matthew 18 in the IRVU

Matthew 18 in the ISVN

Matthew 18 in the JSNT

Matthew 18 in the KAPI

Matthew 18 in the KBT1ETNIK

Matthew 18 in the KBV

Matthew 18 in the KJV

Matthew 18 in the KNFD

Matthew 18 in the LBA

Matthew 18 in the LBLA

Matthew 18 in the LNT

Matthew 18 in the LSV

Matthew 18 in the MAAL

Matthew 18 in the MBV

Matthew 18 in the MBV2

Matthew 18 in the MHNT

Matthew 18 in the MKNFD

Matthew 18 in the MNG

Matthew 18 in the MNT

Matthew 18 in the MNT2

Matthew 18 in the MRS1T

Matthew 18 in the NAA

Matthew 18 in the NASB

Matthew 18 in the NBLA

Matthew 18 in the NBS

Matthew 18 in the NBVTP

Matthew 18 in the NET2

Matthew 18 in the NIV11

Matthew 18 in the NNT

Matthew 18 in the NNT2

Matthew 18 in the NNT3

Matthew 18 in the PDDPT

Matthew 18 in the PFNT

Matthew 18 in the RMNT

Matthew 18 in the SBIAS

Matthew 18 in the SBIBS

Matthew 18 in the SBIBS2

Matthew 18 in the SBICS

Matthew 18 in the SBIDS

Matthew 18 in the SBIGS

Matthew 18 in the SBIHS

Matthew 18 in the SBIIS

Matthew 18 in the SBIIS2

Matthew 18 in the SBIIS3

Matthew 18 in the SBIKS

Matthew 18 in the SBIKS2

Matthew 18 in the SBIMS

Matthew 18 in the SBIOS

Matthew 18 in the SBIPS

Matthew 18 in the SBISS

Matthew 18 in the SBITS

Matthew 18 in the SBITS2

Matthew 18 in the SBITS3

Matthew 18 in the SBITS4

Matthew 18 in the SBIUS

Matthew 18 in the SBIVS

Matthew 18 in the SBT

Matthew 18 in the SBT1E

Matthew 18 in the SCHL

Matthew 18 in the SNT

Matthew 18 in the SUSU

Matthew 18 in the SUSU2

Matthew 18 in the SYNO

Matthew 18 in the TBIAOTANT

Matthew 18 in the TBT1E

Matthew 18 in the TBT1E2

Matthew 18 in the TFTIP

Matthew 18 in the TFTU

Matthew 18 in the TGNTATF3T

Matthew 18 in the THAI

Matthew 18 in the TNFD

Matthew 18 in the TNT

Matthew 18 in the TNTIK

Matthew 18 in the TNTIL

Matthew 18 in the TNTIN

Matthew 18 in the TNTIP

Matthew 18 in the TNTIZ

Matthew 18 in the TOMA

Matthew 18 in the TTENT

Matthew 18 in the UBG

Matthew 18 in the UGV

Matthew 18 in the UGV2

Matthew 18 in the UGV3

Matthew 18 in the VBL

Matthew 18 in the VDCC

Matthew 18 in the YALU

Matthew 18 in the YAPE

Matthew 18 in the YBVTP

Matthew 18 in the ZBP