Matthew 22 (BOLCB2)

1 Yesu alobaki na bango lisusu na masese : 2 — Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti ya libala mpo na mwana na ye ya mobali. 3 Atindaki basali na ye kokende koyebisa babengami na feti ete baya na feti, kasi babengami yango baboyaki. 4 Atindaki lisusu basali mosusu mpe alobaki na bango : « Bosengela ngai epai ya babengami na feti ete baya penza, mpe boyebisa bango ete nasili kobongisa bilei : nabomi bangombe na ngai ya mibali mpe banyama na ngai ya mafuta ; mpe sik’oyo, nyonso esili kobongisama malamu. Boloba na bango ete bazanga te na feti. » 5 Kasi babengami na feti bazwaki kobengama yango na pamba : bamoko bakendeki na bilanga na bango ; bamosusu, na mombongo na bango ; 6 mpe bamosusu bakangaki basali ya mokonzi, banyokolaki bango mpe babomaki bango. 7 Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango. 8 Alobaki na basali na ye : « Bilei ya feti esili kobongisama malamu, kasi babengami mpo na kozala na feti yango babongaki na yango te. 9 Bokende na bisika oyo babalabala ekutana mpe bobenga bato nyonso oyo bokomona kuna, mpo ete baya na feti ya libala ya mwana na ngai. » 10 Basali bakendeki na babalabala mpe babengaki bato nyonso oyo bamonaki kuna : bato mabe mpe bato malamu. Boye, ndako ya feti etondaki na babengami. 11 Kasi tango mokonzi akotaki mpo na kotala bato oyo babengamaki na feti, amonaki moto moko oyo alataki te elamba ya feti ya libala. 12 Atunaki ye : « Molingami na ngai, okoti awa ndenge nini awa olati te elamba oyo ebongi na feti ya libala ? » Moto yango azangaki eyano ya kopesa. 13 Bongo mokonzi alobaki na basali na ye : « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. » 14 Pamba te babengami bazali ebele, kasi baponami bazali moke. 15 Bongo Bafarizeo babendanaki pembeni mpo na kosala mabongisi ya kokanga Yesu na motambo na nzela ya maloba na Ye moko. 16 Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu :— Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te ; 17 yebisa biso makanisi na yo na tina na likambo oyo : Kolanda mobeko, ezali malamu to epekisami kofuta mpako ya mokonzi epai ya Sezare ? 18 Kasi lokola Yesu asosolaki mayele mabe na bango, alobaki : — Bato ya bilongi mibale ! Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ? 19 Bolakisa Ngai mbongo oyo bofutaka na yango mpako.Bamemelaki Ye mbongo moko ya ebende. 20 Atunaki bango : — Elilingi mpe makomi oyo ezali ya nani ? 21 Bazongisaki :— Ezali ya Sezare.Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe ! 22 Tango bayokaki eyano ya Yesu, bakamwaki ; batikaki Ye mpe bakendeki. 23 Kaka na mokolo yango, Basaduseo oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye : 24 — Moteyi, Moyize alobaki : « Soki mobali akufi mpe atiki mwana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo mokufi atiki mpo ete abotisa ye bana oyo bakozala bakitani ya mokufi. » 25 Nzokande, kati na biso, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki ; kasi lokola abotaki te bana oyo basengelaki kokitana na ye, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye. 26 Esalemaki mpe bongo na ndeko ya mibale, na ndeko ya misato kino na ndeko ya sambo. 27 Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki. 28 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye ? 29 Yesu azongiselaki bango : — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te. 30 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo. 31 Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te makambo oyo Nzambe ayebisa bino : 32 « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? » Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. 33 Tango ebele ya bato bayokaki bongo, bakamwaki mingi mateya ya Yesu. 34 Tango Bafarizeo bayokaki ete Yesu asukisi Basaduseo, bango mpe basanganaki ; 35 mpe moko kati na bango, molakisi ya Mobeko, alukaki kotiela Yesu motambo, atunaki Ye : 36 — Moteyi, mobeko nini eleki monene kati na mibeko nyonso ? 37 Yesu azongiselaki ye : — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso. 38 Yango nde mobeko ya liboso mpe eleki monene. 39 Mobeko ya mibale oyo ekokani na yango : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » 40 Mibeko nyonso mpe mateya ya basakoli evandi kati na mibeko oyo mibale. 41 Wana Bafarizeo basanganaki esika moko, Yesu atunaki bango : 42 — Bozali kokanisa nini na tina na Klisto ? Azali Mwana ya nani ?Bazongiselaki Ye :— Azali mwana ya Davidi ! 43 Alobaki na bango : — Bongo ndenge nini Davidi, na botindikami ya Molimo ya Nzambe, abengaki Ye Nkolo ? Pamba te alobaki : 44 « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › » 45 Soki Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ? 46 Moto moko te akokaki kozongisela Ye ata liloba moko. Mpe, banda mokolo wana, moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.

In Other Versions

Matthew 22 in the ANGEFD

Matthew 22 in the ANTPNG2D

Matthew 22 in the AS21

Matthew 22 in the BAGH

Matthew 22 in the BBPNG

Matthew 22 in the BBT1E

Matthew 22 in the BDS

Matthew 22 in the BEV

Matthew 22 in the BHAD

Matthew 22 in the BIB

Matthew 22 in the BLPT

Matthew 22 in the BNT

Matthew 22 in the BNTABOOT

Matthew 22 in the BNTLV

Matthew 22 in the BOATCB

Matthew 22 in the BOATCB2

Matthew 22 in the BOBCV

Matthew 22 in the BOCNT

Matthew 22 in the BOECS

Matthew 22 in the BOGWICC

Matthew 22 in the BOHCB

Matthew 22 in the BOHCV

Matthew 22 in the BOHLNT

Matthew 22 in the BOHNTLTAL

Matthew 22 in the BOICB

Matthew 22 in the BOILNTAP

Matthew 22 in the BOITCV

Matthew 22 in the BOKCV

Matthew 22 in the BOKCV2

Matthew 22 in the BOKHWOG

Matthew 22 in the BOKSSV

Matthew 22 in the BOLCB

Matthew 22 in the BOMCV

Matthew 22 in the BONAV

Matthew 22 in the BONCB

Matthew 22 in the BONLT

Matthew 22 in the BONUT2

Matthew 22 in the BOPLNT

Matthew 22 in the BOSCB

Matthew 22 in the BOSNC

Matthew 22 in the BOTLNT

Matthew 22 in the BOVCB

Matthew 22 in the BOYCB

Matthew 22 in the BPBB

Matthew 22 in the BPH

Matthew 22 in the BSB

Matthew 22 in the CCB

Matthew 22 in the CUV

Matthew 22 in the CUVS

Matthew 22 in the DBT

Matthew 22 in the DGDNT

Matthew 22 in the DHNT

Matthew 22 in the DNT

Matthew 22 in the ELBE

Matthew 22 in the EMTV

Matthew 22 in the ESV

Matthew 22 in the FBV

Matthew 22 in the FEB

Matthew 22 in the GGMNT

Matthew 22 in the GNT

Matthew 22 in the HARY

Matthew 22 in the HNT

Matthew 22 in the IRVA

Matthew 22 in the IRVB

Matthew 22 in the IRVG

Matthew 22 in the IRVH

Matthew 22 in the IRVK

Matthew 22 in the IRVM

Matthew 22 in the IRVM2

Matthew 22 in the IRVO

Matthew 22 in the IRVP

Matthew 22 in the IRVT

Matthew 22 in the IRVT2

Matthew 22 in the IRVU

Matthew 22 in the ISVN

Matthew 22 in the JSNT

Matthew 22 in the KAPI

Matthew 22 in the KBT1ETNIK

Matthew 22 in the KBV

Matthew 22 in the KJV

Matthew 22 in the KNFD

Matthew 22 in the LBA

Matthew 22 in the LBLA

Matthew 22 in the LNT

Matthew 22 in the LSV

Matthew 22 in the MAAL

Matthew 22 in the MBV

Matthew 22 in the MBV2

Matthew 22 in the MHNT

Matthew 22 in the MKNFD

Matthew 22 in the MNG

Matthew 22 in the MNT

Matthew 22 in the MNT2

Matthew 22 in the MRS1T

Matthew 22 in the NAA

Matthew 22 in the NASB

Matthew 22 in the NBLA

Matthew 22 in the NBS

Matthew 22 in the NBVTP

Matthew 22 in the NET2

Matthew 22 in the NIV11

Matthew 22 in the NNT

Matthew 22 in the NNT2

Matthew 22 in the NNT3

Matthew 22 in the PDDPT

Matthew 22 in the PFNT

Matthew 22 in the RMNT

Matthew 22 in the SBIAS

Matthew 22 in the SBIBS

Matthew 22 in the SBIBS2

Matthew 22 in the SBICS

Matthew 22 in the SBIDS

Matthew 22 in the SBIGS

Matthew 22 in the SBIHS

Matthew 22 in the SBIIS

Matthew 22 in the SBIIS2

Matthew 22 in the SBIIS3

Matthew 22 in the SBIKS

Matthew 22 in the SBIKS2

Matthew 22 in the SBIMS

Matthew 22 in the SBIOS

Matthew 22 in the SBIPS

Matthew 22 in the SBISS

Matthew 22 in the SBITS

Matthew 22 in the SBITS2

Matthew 22 in the SBITS3

Matthew 22 in the SBITS4

Matthew 22 in the SBIUS

Matthew 22 in the SBIVS

Matthew 22 in the SBT

Matthew 22 in the SBT1E

Matthew 22 in the SCHL

Matthew 22 in the SNT

Matthew 22 in the SUSU

Matthew 22 in the SUSU2

Matthew 22 in the SYNO

Matthew 22 in the TBIAOTANT

Matthew 22 in the TBT1E

Matthew 22 in the TBT1E2

Matthew 22 in the TFTIP

Matthew 22 in the TFTU

Matthew 22 in the TGNTATF3T

Matthew 22 in the THAI

Matthew 22 in the TNFD

Matthew 22 in the TNT

Matthew 22 in the TNTIK

Matthew 22 in the TNTIL

Matthew 22 in the TNTIN

Matthew 22 in the TNTIP

Matthew 22 in the TNTIZ

Matthew 22 in the TOMA

Matthew 22 in the TTENT

Matthew 22 in the UBG

Matthew 22 in the UGV

Matthew 22 in the UGV2

Matthew 22 in the UGV3

Matthew 22 in the VBL

Matthew 22 in the VDCC

Matthew 22 in the YALU

Matthew 22 in the YAPE

Matthew 22 in the YBVTP

Matthew 22 in the ZBP