Psalms 105 (BOLCB2)

1 Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye !Bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo ! 2 Boyemba mpo na lokumu na Ye,bosanzola Ye na mindule !Botatolaka tango nyonsomisala minene na Ye nyonso ! 3 Bosepela na Kombo na Ye ya bule !Tika ete mitema ya batooyo balukaka Yawe etonda na esengo ! 4 Bomipesa na Yawe.Bosenga makasi na Ye.Bolukaka tango nyonso elongi na Ye. 5 Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalakimpe bitumbu oyo apesaki, 6 bino, bakitani ya Abrayami, mosali na Ye ;bino, baponami na Ye, bana mibali ya Jakobi ! 7 Yawe azali Nzambe na biso,mikano na Ye ekambaka mokili mobimba. 8 Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye,bilaka na Ye mpo na bikeke nkoto moko, 9 boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami,mpe ndayi oyo alapaki epai ya Izaki. 10 Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobilokola mobeko,epai ya Isalaele lokola boyokani ya libela na libela, 11 tango alobaki :« Nakopesa yo mokili ya Kananalokola libula oyo epesameli yo ! » 12 Na tango wana, bazalaki kakamotango moke ya batompe bapaya kati na yango ; 13 bazalaki koyengayengalongwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu,longwa na mokili moko kino na mokili mosusu. 14 Atikaki moto moko te konyokola bango ;apamelaki bakonzi na tina na bango : 15 « Bosimba bapakolami na Ngai te,bosala mabe te epai na basakoli na Ngai ! » 16 Abengisaki nzala makasi kati na mboka,azangisaki bango bilei. 17 Atindaki moto moko liboso na bango :Jozefi oyo atekamaki lokola mowumbu. 18 Bakangaki makolo na ye na minyololompe batiaki bibende na kingo na ye, 19 kino makambo oyo Jozefi asakolaki ekokisamaki,kino Liloba na Yawe etalisakiete Jozefi alobaki solo. 20 Mokonzi apesaki mitindoete bafungola ye minyololo,mokambi atikaki ye na bonsomi. 21 Akomisaki ye nkolo ya ndako na yempe moyangeli ya biloko na ye nyonso, 22 mpo ete akonza bakambi na yempe alakisa bwanya epai ya bapesi toli ya mokonzi. 23 Bongo Isalaele akendeki na Ejipito ;mpe Jakobi avandaki lokola mopayakati na mokili ya Cham. 24 Yawe asalaki ete bato na Ye babota mingi,mpe akomisaki bango makasikoleka banguna na bango. 25 Abongolaki mitema ya banguna yangompo ete bayina bato na Yempe banyokola bango makasi. 26 Atindaki mosali na Ye, Moyize,mpe Aron oyo aponaki. 27 Na mitindo na Ye Nzambe,basalaki bikamwa kati na Ejipito,misala minene kati na mokili ya Cham. 28 Atindaki molili oyo ekotaki kati na mokili,mpe bato ya Ejipito batombokelaki maloba na Ye te. 29 Abongolaki mayi makila,mpe abomaki mbisi na yango. 30 Mokili na bango etondaki na magorodokino na bashambre ya mokonzi na bango. 31 Na mitindo na Ye,banzinzi oyo eswaka mpe bangungi eyakina mboka mobimba. 32 Na esika ya mvula,atindelaki bango mvula ya mabangampe abetisaki kake kati na mokili na bango. 33 Abebisaki bilanga na bango ya vino mpe ya figi,mpe abukaki banzete ya mboka na bango. 34 Na mitindo na Ye,mabanki mpe makelele oyo bakokaki kotanga teesopanaki, 35 eliaki matiti nyonso ya mobesukati na mokili na bango,eliaki bambuma ya mabele na bango. 36 Abomaki bana liboso nyonsokati na mokili na bango,bambuma ya liboso ya makasi na bango. 37 Abimisaki Isalaele, bato na Ye,elongo na palata mpe wolo ;mpe moko te atiaki tembekati na mabota na bango. 38 Ejipito esepelaki komona bango kobima,pamba te somo ya Isalaele ekangaki bango. 39 Atandaki lipata mpo na kobatela bango,mpe moto mpo na kopesa pole na butu. 40 Ndenge kaka basengaki, atindelaki bango bakayimpe atondisaki bango na bilei ya likolo. 41 Afungolaki libanga, mpe mayi ebimaki,etiolaki lokola ebale kati na esobe. 42 Mpo ete akanisaki elaka ya buleoyo apesaki mosali na Ye, Abrayami, 43 abimisaki na esengo bato na Ye,baponami na Ye na koganga ya esengo. 44 Apesaki bango mabele ya bikolo mosusumpe bazwaki lokola libula mosala ya bikolo yango 45 mpo ete babatela mitindo na Yempe batosa mibeko na Ye. Bokumisa Yawe !

In Other Versions

Psalms 105 in the ANGEFD

Psalms 105 in the ANTPNG2D

Psalms 105 in the AS21

Psalms 105 in the BAGH

Psalms 105 in the BBPNG

Psalms 105 in the BBT1E

Psalms 105 in the BDS

Psalms 105 in the BEV

Psalms 105 in the BHAD

Psalms 105 in the BIB

Psalms 105 in the BLPT

Psalms 105 in the BNT

Psalms 105 in the BNTABOOT

Psalms 105 in the BNTLV

Psalms 105 in the BOATCB

Psalms 105 in the BOATCB2

Psalms 105 in the BOBCV

Psalms 105 in the BOCNT

Psalms 105 in the BOECS

Psalms 105 in the BOGWICC

Psalms 105 in the BOHCB

Psalms 105 in the BOHCV

Psalms 105 in the BOHLNT

Psalms 105 in the BOHNTLTAL

Psalms 105 in the BOICB

Psalms 105 in the BOILNTAP

Psalms 105 in the BOITCV

Psalms 105 in the BOKCV

Psalms 105 in the BOKCV2

Psalms 105 in the BOKHWOG

Psalms 105 in the BOKSSV

Psalms 105 in the BOLCB

Psalms 105 in the BOMCV

Psalms 105 in the BONAV

Psalms 105 in the BONCB

Psalms 105 in the BONLT

Psalms 105 in the BONUT2

Psalms 105 in the BOPLNT

Psalms 105 in the BOSCB

Psalms 105 in the BOSNC

Psalms 105 in the BOTLNT

Psalms 105 in the BOVCB

Psalms 105 in the BOYCB

Psalms 105 in the BPBB

Psalms 105 in the BPH

Psalms 105 in the BSB

Psalms 105 in the CCB

Psalms 105 in the CUV

Psalms 105 in the CUVS

Psalms 105 in the DBT

Psalms 105 in the DGDNT

Psalms 105 in the DHNT

Psalms 105 in the DNT

Psalms 105 in the ELBE

Psalms 105 in the EMTV

Psalms 105 in the ESV

Psalms 105 in the FBV

Psalms 105 in the FEB

Psalms 105 in the GGMNT

Psalms 105 in the GNT

Psalms 105 in the HARY

Psalms 105 in the HNT

Psalms 105 in the IRVA

Psalms 105 in the IRVB

Psalms 105 in the IRVG

Psalms 105 in the IRVH

Psalms 105 in the IRVK

Psalms 105 in the IRVM

Psalms 105 in the IRVM2

Psalms 105 in the IRVO

Psalms 105 in the IRVP

Psalms 105 in the IRVT

Psalms 105 in the IRVT2

Psalms 105 in the IRVU

Psalms 105 in the ISVN

Psalms 105 in the JSNT

Psalms 105 in the KAPI

Psalms 105 in the KBT1ETNIK

Psalms 105 in the KBV

Psalms 105 in the KJV

Psalms 105 in the KNFD

Psalms 105 in the LBA

Psalms 105 in the LBLA

Psalms 105 in the LNT

Psalms 105 in the LSV

Psalms 105 in the MAAL

Psalms 105 in the MBV

Psalms 105 in the MBV2

Psalms 105 in the MHNT

Psalms 105 in the MKNFD

Psalms 105 in the MNG

Psalms 105 in the MNT

Psalms 105 in the MNT2

Psalms 105 in the MRS1T

Psalms 105 in the NAA

Psalms 105 in the NASB

Psalms 105 in the NBLA

Psalms 105 in the NBS

Psalms 105 in the NBVTP

Psalms 105 in the NET2

Psalms 105 in the NIV11

Psalms 105 in the NNT

Psalms 105 in the NNT2

Psalms 105 in the NNT3

Psalms 105 in the PDDPT

Psalms 105 in the PFNT

Psalms 105 in the RMNT

Psalms 105 in the SBIAS

Psalms 105 in the SBIBS

Psalms 105 in the SBIBS2

Psalms 105 in the SBICS

Psalms 105 in the SBIDS

Psalms 105 in the SBIGS

Psalms 105 in the SBIHS

Psalms 105 in the SBIIS

Psalms 105 in the SBIIS2

Psalms 105 in the SBIIS3

Psalms 105 in the SBIKS

Psalms 105 in the SBIKS2

Psalms 105 in the SBIMS

Psalms 105 in the SBIOS

Psalms 105 in the SBIPS

Psalms 105 in the SBISS

Psalms 105 in the SBITS

Psalms 105 in the SBITS2

Psalms 105 in the SBITS3

Psalms 105 in the SBITS4

Psalms 105 in the SBIUS

Psalms 105 in the SBIVS

Psalms 105 in the SBT

Psalms 105 in the SBT1E

Psalms 105 in the SCHL

Psalms 105 in the SNT

Psalms 105 in the SUSU

Psalms 105 in the SUSU2

Psalms 105 in the SYNO

Psalms 105 in the TBIAOTANT

Psalms 105 in the TBT1E

Psalms 105 in the TBT1E2

Psalms 105 in the TFTIP

Psalms 105 in the TFTU

Psalms 105 in the TGNTATF3T

Psalms 105 in the THAI

Psalms 105 in the TNFD

Psalms 105 in the TNT

Psalms 105 in the TNTIK

Psalms 105 in the TNTIL

Psalms 105 in the TNTIN

Psalms 105 in the TNTIP

Psalms 105 in the TNTIZ

Psalms 105 in the TOMA

Psalms 105 in the TTENT

Psalms 105 in the UBG

Psalms 105 in the UGV

Psalms 105 in the UGV2

Psalms 105 in the UGV3

Psalms 105 in the VBL

Psalms 105 in the VDCC

Psalms 105 in the YALU

Psalms 105 in the YAPE

Psalms 105 in the YBVTP

Psalms 105 in the ZBP