Psalms 68 (BOLCB2)

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Loyembo. 2 Soki Nzambe atelemi, banguna na Ye bapalanganaka,mpe bayini na Ye bakimaka mosika na Ye. 3 Liboso ya Nzambe, bato mabe bakufaka,ndenge milinga elimwaka,mpe mafuta enyangwamaka na moto. 4 Liboso ya Nzambe, bato ya sembo basepelaka,batondaka na esengo. 5 Boyembela Nzambe, boyemba banzembompo na lokumu ya Kombo na Ye.Bofungola nzela mpo na Yeoyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe.Kombo na Ye ezali Yawe.Botonda na esengo liboso na Ye. 6 Kati na Ndako na Ye ya bule, Nzambe azali Tata ya bana bitike,mpe molobeli ya basi bakufisa mibali. 7 Nzambe apesaka libota epai ya batooyo bavandaka bango moko,abimisaka bakangami wuta na minyololo ;kasi batomboki batikalaka na mabele ekawuka. 8 Oh Nzambe, tango obimaki liboso ya bato na Yo,tango otambolaki na esobe, 9 mabele eninganaki, likolo mpe esopaki mayiliboso ya Nzambe, Nzambe ya Sinai ;liboso ya Nzambe, Nzambe ya Isalaele. 10 Nzambe, osopaki mvula ya mapamboli,olendisaki libula na Yo mpo ete elembaki. 11 Oh Nzambe, bato na Yo bavandaka na mokili oyo obongisaki,na boboto na Yo, mpo na mobola. 12 Na liloba moko kowuta na Nkolo,basi oyo bamemaka sango basangani bato ebele, 13 bakonzi ya mampinga bakimi, bapoti mbangu,mpe mwasi oyo atikali na ndako akaboli bomengo ya bitumba. 14 Boni, bokokoba kolala pongi kati na bandako na bino ?Mapapu ya ebenga ezipami na se ya palata,mpe bansala na yango ezipami na se ya wolo. 15 Tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abenganaki kuna bakonzi,anokisaki mvula ya pembe na ngomba Tsalimoni. 16 Ngomba ya Bashani, ngomba ya Nzambe ;ngomba ya Bashani, ngomba ya basonge ebele, 17 mpo na nini ozali kosala zuwa,ngomba ya basonge ebele,ngomba oyo Nzambe asepelaka kovanda ?Nzokande Yawe akovanda kuna libela na libela. 18 Motango ya bashar ya Nzambe ezali ebele,koleka minkoko ;Nkolo azali kati na yango,kuna na Sinai, kati na Esika ya bule. 19 Yawe Nzambe, tango omataki na likolo,omemaki bakangami,ozwaki makabo epai ya bato,ata epai ya batomboki,mpo ete okoma kovanda kuna. 20 Tika ete Nkolo akumisama, mokolo na mokolo !Nzambe Mobikisi na biso alataka makambo na biso. 21 Mpo na biso, Nzambe yango azali Nzambe oyo abikisaka ;mpe bikuke ya kufa ezali ya Nkolo Yawe. 22 Solo, Nzambe apanzaka mito ya banguna na Ye,oyo batambolaka kati na bomoi ya masumu,oyo mito na bango etonda na suki. 23 Nkolo alobi :« Wuta na Bashani, nakomema bango ;wuta na mozindo ya ebale monene,nakomema bango, 24 mpo ete opanza lokolo na yo kati na makila,mpe mpo ete lolemo ya bambwa na yo ezwa eteni na yango. » 25 Oh Nzambe, bazali komona ndenge ozali koya ;koya ya Nzambe na ngai, ya Mokonzi na ngai, kati na Esika ya bule. 26 Bayembi bazali liboso ;sima na bango, bato oyo bazali kobetamandanda ya basinga kati na bilenge basioyo bazali kobeta bambonda ya mike. 27 Bopambola Nzambe kati na mayangani,bopambola Yawe wuta na etima ya Isalaele. 28 Kuna, Benjame, leki ya suka,azali kotambolisa bakambi ya Yudaelongo na mampinga na bango,bakambi ya Zabuloni mpe ya Nefitali. 29 Nzambe na yo apesi mitindo epai ya makasi na yo ; zala makasi.Nzambe, osaleli biso penza makambo. 30 Wuta na Tempelo na Yo ya Yelusalemiepai wapi bakonzi bamemelaka Yo makabo, 31 bengana ngando oyo ebombami kati na matiti,lisanga ya bangombe ya mibali elongo na bana ngombe ya bikolooyo batambolaka kati na mbongoya bibende ya palata, mpe panza bikolo oyo basepelaka na bitumba. 32 Bazwi bakobimela na Ejipito ;bato ya Kushi bakoya na lombangu,bakotombola maboko epai ya Nzambe. 33 Bino, babokonzi ya mabele, boyembela Nzambe ;boyemba banzembo mpo na lokumu ya Nkolo ! 34 Boyembela Ye oyo atambolisakamampinga kati na likolo, likolo ya libela ;oyo, wuta na mongongo na Ye, agangaka makasi. 35 Bosakola ete nguya ezali ya Nzambeoyo nkembo na Ye ezali na Isalaele,mpe nguya na Ye ezali kati na mapata. 36 Nzambe, wuta kati na bisika na Yo ya bule,obongi na botosi !Nzambe ya Isalaele apesaka na bato na Yemakasi mpe nguya. Tika ete Nzambe akumisama !

In Other Versions

Psalms 68 in the ANGEFD

Psalms 68 in the ANTPNG2D

Psalms 68 in the AS21

Psalms 68 in the BAGH

Psalms 68 in the BBPNG

Psalms 68 in the BBT1E

Psalms 68 in the BDS

Psalms 68 in the BEV

Psalms 68 in the BHAD

Psalms 68 in the BIB

Psalms 68 in the BLPT

Psalms 68 in the BNT

Psalms 68 in the BNTABOOT

Psalms 68 in the BNTLV

Psalms 68 in the BOATCB

Psalms 68 in the BOATCB2

Psalms 68 in the BOBCV

Psalms 68 in the BOCNT

Psalms 68 in the BOECS

Psalms 68 in the BOGWICC

Psalms 68 in the BOHCB

Psalms 68 in the BOHCV

Psalms 68 in the BOHLNT

Psalms 68 in the BOHNTLTAL

Psalms 68 in the BOICB

Psalms 68 in the BOILNTAP

Psalms 68 in the BOITCV

Psalms 68 in the BOKCV

Psalms 68 in the BOKCV2

Psalms 68 in the BOKHWOG

Psalms 68 in the BOKSSV

Psalms 68 in the BOLCB

Psalms 68 in the BOMCV

Psalms 68 in the BONAV

Psalms 68 in the BONCB

Psalms 68 in the BONLT

Psalms 68 in the BONUT2

Psalms 68 in the BOPLNT

Psalms 68 in the BOSCB

Psalms 68 in the BOSNC

Psalms 68 in the BOTLNT

Psalms 68 in the BOVCB

Psalms 68 in the BOYCB

Psalms 68 in the BPBB

Psalms 68 in the BPH

Psalms 68 in the BSB

Psalms 68 in the CCB

Psalms 68 in the CUV

Psalms 68 in the CUVS

Psalms 68 in the DBT

Psalms 68 in the DGDNT

Psalms 68 in the DHNT

Psalms 68 in the DNT

Psalms 68 in the ELBE

Psalms 68 in the EMTV

Psalms 68 in the ESV

Psalms 68 in the FBV

Psalms 68 in the FEB

Psalms 68 in the GGMNT

Psalms 68 in the GNT

Psalms 68 in the HARY

Psalms 68 in the HNT

Psalms 68 in the IRVA

Psalms 68 in the IRVB

Psalms 68 in the IRVG

Psalms 68 in the IRVH

Psalms 68 in the IRVK

Psalms 68 in the IRVM

Psalms 68 in the IRVM2

Psalms 68 in the IRVO

Psalms 68 in the IRVP

Psalms 68 in the IRVT

Psalms 68 in the IRVT2

Psalms 68 in the IRVU

Psalms 68 in the ISVN

Psalms 68 in the JSNT

Psalms 68 in the KAPI

Psalms 68 in the KBT1ETNIK

Psalms 68 in the KBV

Psalms 68 in the KJV

Psalms 68 in the KNFD

Psalms 68 in the LBA

Psalms 68 in the LBLA

Psalms 68 in the LNT

Psalms 68 in the LSV

Psalms 68 in the MAAL

Psalms 68 in the MBV

Psalms 68 in the MBV2

Psalms 68 in the MHNT

Psalms 68 in the MKNFD

Psalms 68 in the MNG

Psalms 68 in the MNT

Psalms 68 in the MNT2

Psalms 68 in the MRS1T

Psalms 68 in the NAA

Psalms 68 in the NASB

Psalms 68 in the NBLA

Psalms 68 in the NBS

Psalms 68 in the NBVTP

Psalms 68 in the NET2

Psalms 68 in the NIV11

Psalms 68 in the NNT

Psalms 68 in the NNT2

Psalms 68 in the NNT3

Psalms 68 in the PDDPT

Psalms 68 in the PFNT

Psalms 68 in the RMNT

Psalms 68 in the SBIAS

Psalms 68 in the SBIBS

Psalms 68 in the SBIBS2

Psalms 68 in the SBICS

Psalms 68 in the SBIDS

Psalms 68 in the SBIGS

Psalms 68 in the SBIHS

Psalms 68 in the SBIIS

Psalms 68 in the SBIIS2

Psalms 68 in the SBIIS3

Psalms 68 in the SBIKS

Psalms 68 in the SBIKS2

Psalms 68 in the SBIMS

Psalms 68 in the SBIOS

Psalms 68 in the SBIPS

Psalms 68 in the SBISS

Psalms 68 in the SBITS

Psalms 68 in the SBITS2

Psalms 68 in the SBITS3

Psalms 68 in the SBITS4

Psalms 68 in the SBIUS

Psalms 68 in the SBIVS

Psalms 68 in the SBT

Psalms 68 in the SBT1E

Psalms 68 in the SCHL

Psalms 68 in the SNT

Psalms 68 in the SUSU

Psalms 68 in the SUSU2

Psalms 68 in the SYNO

Psalms 68 in the TBIAOTANT

Psalms 68 in the TBT1E

Psalms 68 in the TBT1E2

Psalms 68 in the TFTIP

Psalms 68 in the TFTU

Psalms 68 in the TGNTATF3T

Psalms 68 in the THAI

Psalms 68 in the TNFD

Psalms 68 in the TNT

Psalms 68 in the TNTIK

Psalms 68 in the TNTIL

Psalms 68 in the TNTIN

Psalms 68 in the TNTIP

Psalms 68 in the TNTIZ

Psalms 68 in the TOMA

Psalms 68 in the TTENT

Psalms 68 in the UBG

Psalms 68 in the UGV

Psalms 68 in the UGV2

Psalms 68 in the UGV3

Psalms 68 in the VBL

Psalms 68 in the VDCC

Psalms 68 in the YALU

Psalms 68 in the YAPE

Psalms 68 in the YBVTP

Psalms 68 in the ZBP