Romans 6 (BOLCB2)

1 Boye, toloba nini ? Tosalaka na biso masumu mpo ete ngolu efuluka koleka ? 2 Soki moke te ! Biso oyo tosila kokufa mpo na lisumu, ndenge nini tozongela lisusu kotambola kati na masumu ? 3 Boni, boyebi te ete biso nyonso oyo tosila kobatisama kati na Yesu-Klisto tozwaki nde libatisi kati na kufa na Ye ? 4 Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika. 5 Pamba te soki tosanganaki elongo na Ye kati na kufa na Ye, solo tokosangana mpe elongo na Ye kati na lisekwa na Ye. 6 Pamba te toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso lokola esalelo ya lisumu ekufa mpe tozala lisusu bawumbu ya lisumu te. 7 Moto nyonso oyo asilaki kokufa atangamaki lokola moto ya sembo : azali lisusu te na se ya bokonzi ya lisumu. 8 Nzokande, lokola tosila kokufa elongo na Klisto, tozali kondima ete tokozala mpe na bomoi elongo na Ye. 9 Pamba te toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi akokufa lisusu te ; kufa ezali lisusu na bokonzi te likolo na Ye. 10 Akufaki mpo na lisumu mbala moko mpo na libela ; kasi sik’oyo azali na bomoi, mpe azali na bomoi mpo na Nzambe. 11 Boye bino mpe, bomimona lokola bakufi mpo na lisumu, kasi lokola bato ya bomoi mpo na Nzambe kati na Yesu-Klisto. 12 Yango wana, tika ete lisumu ezala lisusu na bokonzi te kati na banzoto na bino, oyo ekokufa ; mpe bosengeli lisusu te kotosa baposa na yango ya mabe. 13 Bokaba biteni ya banzoto na bino te na lisumu lokola bisalelo mpo na mabe, kasi bomikaba bino moko epai na Nzambe lokola bato oyo basekwa kati na bakufi mpe bazali na bomoi ; mpe bokabela Ye biteni ya banzoto na bino lokola bisalelo mpo na bosembo. 14 Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu. 15 Boye toloba nini ? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu ? Soki moke te ! 16 Boni, boyebi te ete soki bomikabi epai ya moto lokola bawumbu mpo na kotosa ye bokomi nde bawumbu ya moto oyo bozali kotosa to bawumbu ya lisumu oyo ememaka na kufa to bawumbu ya botosi oyo ememaka na bosembo ? 17 Kasi tika ete tozongisa matondi epai ya Nzambe ! Soki na kala bozalaki bawumbu ya lisumu, kasi sik’oyo bokomi kotosa na motema mobimba mateya oyo bateyaki bino, 18 bosili kokangolama na bowumbu ya lisumu mpe bokomi bawumbu ya bosembo. 19 Nazali koloba awa lokola moto mpo na bolembu na bino ya bomoto. Ndenge na kala, bokabaki biteni ya banzoto na bino na bowumbu ya misala ya mbindo mpe ya mabe mpo na kosala mabe, ndenge wana mpe bokaba yango sik’oyo na bowumbu ya bosembo mpo na kotambola na bomoi ya bosantu. 20 Tango bozalaki nanu bawumbu ya lisumu, bozalaki na bonsomi liboso ya bosembo. 21 Nzokande, litomba nini bozwaki na tango wana oyo bozalaki kosala makambo oyo ezali koyokisa bino lelo soni, pamba te ememaka na kufa ? 22 Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko. 23 Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

In Other Versions

Romans 6 in the ANGEFD

Romans 6 in the ANTPNG2D

Romans 6 in the AS21

Romans 6 in the BAGH

Romans 6 in the BBPNG

Romans 6 in the BBT1E

Romans 6 in the BDS

Romans 6 in the BEV

Romans 6 in the BHAD

Romans 6 in the BIB

Romans 6 in the BLPT

Romans 6 in the BNT

Romans 6 in the BNTABOOT

Romans 6 in the BNTLV

Romans 6 in the BOATCB

Romans 6 in the BOATCB2

Romans 6 in the BOBCV

Romans 6 in the BOCNT

Romans 6 in the BOECS

Romans 6 in the BOGWICC

Romans 6 in the BOHCB

Romans 6 in the BOHCV

Romans 6 in the BOHLNT

Romans 6 in the BOHNTLTAL

Romans 6 in the BOICB

Romans 6 in the BOILNTAP

Romans 6 in the BOITCV

Romans 6 in the BOKCV

Romans 6 in the BOKCV2

Romans 6 in the BOKHWOG

Romans 6 in the BOKSSV

Romans 6 in the BOLCB

Romans 6 in the BOMCV

Romans 6 in the BONAV

Romans 6 in the BONCB

Romans 6 in the BONLT

Romans 6 in the BONUT2

Romans 6 in the BOPLNT

Romans 6 in the BOSCB

Romans 6 in the BOSNC

Romans 6 in the BOTLNT

Romans 6 in the BOVCB

Romans 6 in the BOYCB

Romans 6 in the BPBB

Romans 6 in the BPH

Romans 6 in the BSB

Romans 6 in the CCB

Romans 6 in the CUV

Romans 6 in the CUVS

Romans 6 in the DBT

Romans 6 in the DGDNT

Romans 6 in the DHNT

Romans 6 in the DNT

Romans 6 in the ELBE

Romans 6 in the EMTV

Romans 6 in the ESV

Romans 6 in the FBV

Romans 6 in the FEB

Romans 6 in the GGMNT

Romans 6 in the GNT

Romans 6 in the HARY

Romans 6 in the HNT

Romans 6 in the IRVA

Romans 6 in the IRVB

Romans 6 in the IRVG

Romans 6 in the IRVH

Romans 6 in the IRVK

Romans 6 in the IRVM

Romans 6 in the IRVM2

Romans 6 in the IRVO

Romans 6 in the IRVP

Romans 6 in the IRVT

Romans 6 in the IRVT2

Romans 6 in the IRVU

Romans 6 in the ISVN

Romans 6 in the JSNT

Romans 6 in the KAPI

Romans 6 in the KBT1ETNIK

Romans 6 in the KBV

Romans 6 in the KJV

Romans 6 in the KNFD

Romans 6 in the LBA

Romans 6 in the LBLA

Romans 6 in the LNT

Romans 6 in the LSV

Romans 6 in the MAAL

Romans 6 in the MBV

Romans 6 in the MBV2

Romans 6 in the MHNT

Romans 6 in the MKNFD

Romans 6 in the MNG

Romans 6 in the MNT

Romans 6 in the MNT2

Romans 6 in the MRS1T

Romans 6 in the NAA

Romans 6 in the NASB

Romans 6 in the NBLA

Romans 6 in the NBS

Romans 6 in the NBVTP

Romans 6 in the NET2

Romans 6 in the NIV11

Romans 6 in the NNT

Romans 6 in the NNT2

Romans 6 in the NNT3

Romans 6 in the PDDPT

Romans 6 in the PFNT

Romans 6 in the RMNT

Romans 6 in the SBIAS

Romans 6 in the SBIBS

Romans 6 in the SBIBS2

Romans 6 in the SBICS

Romans 6 in the SBIDS

Romans 6 in the SBIGS

Romans 6 in the SBIHS

Romans 6 in the SBIIS

Romans 6 in the SBIIS2

Romans 6 in the SBIIS3

Romans 6 in the SBIKS

Romans 6 in the SBIKS2

Romans 6 in the SBIMS

Romans 6 in the SBIOS

Romans 6 in the SBIPS

Romans 6 in the SBISS

Romans 6 in the SBITS

Romans 6 in the SBITS2

Romans 6 in the SBITS3

Romans 6 in the SBITS4

Romans 6 in the SBIUS

Romans 6 in the SBIVS

Romans 6 in the SBT

Romans 6 in the SBT1E

Romans 6 in the SCHL

Romans 6 in the SNT

Romans 6 in the SUSU

Romans 6 in the SUSU2

Romans 6 in the SYNO

Romans 6 in the TBIAOTANT

Romans 6 in the TBT1E

Romans 6 in the TBT1E2

Romans 6 in the TFTIP

Romans 6 in the TFTU

Romans 6 in the TGNTATF3T

Romans 6 in the THAI

Romans 6 in the TNFD

Romans 6 in the TNT

Romans 6 in the TNTIK

Romans 6 in the TNTIL

Romans 6 in the TNTIN

Romans 6 in the TNTIP

Romans 6 in the TNTIZ

Romans 6 in the TOMA

Romans 6 in the TTENT

Romans 6 in the UBG

Romans 6 in the UGV

Romans 6 in the UGV2

Romans 6 in the UGV3

Romans 6 in the VBL

Romans 6 in the VDCC

Romans 6 in the YALU

Romans 6 in the YAPE

Romans 6 in the YBVTP

Romans 6 in the ZBP