Isaiah 3 (BOLCB2)
1 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,akomi pene ya kobotola masungi nyonso,kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda :lisungi ya bilei mpe lisungi ya mayi ; 2 bilombe mpe basoda ya mpiko,basambisi mpe basakoli,bato oyo balobaka makambo oyo ekoya mpe bakambi ; 3 bakonzi ya basoda mpe bato ya lokumu,bapesi toli, bato mayele ya misala ya mabokompe bato oyo basalelaka maji. 4 Nakosala ete bilenge mibali bakoma bakonzi na bangompe bana mike bakamba bango. 5 Bato bakokoma konyokolana bango na bango :moko akonyokola mosusu,mpe moninga akonyokola moninga na ye mosusu ;bilenge bakotosa mikolo te,bato pamba bakotelemela bato ya lokumu ; 6 moko akokanga ndeko na ye ya mobalikati na ndako ya tata na bango mpe akoloba :« Yo oyo ozali na kazaka, okozala mokonzi na biso,kamata mokumba ya libebi oyo na maboko ! » 7 Kasi na mokolo wana, akoganga :« Te, nazali na ngai monganga te,mpe nazali na bilei to bilamba tekati na ndako na ngai ;bokomisa ngai mokonzi te ! » 8 Yelusalemi ezali kotepatepa,mpe Yuda ekweyi ;mpo ete maloba mpe misala na bango ezaliya botomboki liboso ya Yawe,ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye. 9 Bilongi na bango ezali kofunda bango ;bazali kolakisa masumu na bangondenge bato ya Sodome bazalaki kosala,bazali kobomba yango te.Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo ! 10 Loba na moto ya sembo : « Bolamu ekobila yo,pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. » 11 Mawa na moto mabe !Pasi ezali likolo na ye,pamba te akozwa lifuti kolanda misala na ye. 12 Bilenge bazali konyokola bato na Ngai,basi bazali koyangela bango.Oh bato na Ngai, bakambi na bino babungisi bino nzela,babimisi bino libanda ya nzela oyo bosengeli kolanda ! 13 Yawe atelemi na esambiselo,atelemi mpo na kosambisa bato. 14 Yawe akosamba elongo na bampakampe bakambi ya bato na Ye :« Ezali nde bino bato bobebisi elanga na Ngai ya vino !Botondisi bandako na bino na bilokooyo bobotoli epai ya babola ! 15 Mpo na nini bozali konyata bato na Ngaimpe kotiola bomoto ya babola ; »elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ? 16 Yawe alobi :« Lokola basi ya Siona bazali lofundu,lokola batambolaka mapeka likolompe balalisaka miso na lofundu,lokola batambolaka na kodenda malembe-malembempe na kolelisa biloko ya monzeleoyo balataka na makolo na bango, 17 Yawe akokomisa mito ya basi ya Siona mapalatampe akotika bango bolumbu. » 18 Na mokolo wana, Nkolo akolongola bango biloko na bango oyo basalelaka monzele : basheneti oyo balataka na makolo mpe babiju ya talo oyo ezalaka lokola moyi mpe sanza ; 19 biloko ya matoyi, basheneti oyo balataka na maboko, bavwale, 20 bitendi oyo bakangaka na mito, basheneti, mikaba, milangi ya malasi, bakisi ya kokangela nzoto, 21 bapete ya mosapi, bapete ya zolo, 22 bilamba ya feti, banzambala oyo etika nzoto, bakazaka, basakosi ya mike, 23 bilamba oyo emonisaka nzoto, bilamba ya lino, maputa mpe bitambala. 24 Na esika ya solo kitoko ya malasi, ekozala nde solo mabe ;na esika ya mokaba, ekozela nde singa ;na esika ya suki bakanga kitoko na moto, ekozala nde libandi ;na esika ya bilamba ya talo, ekozala nde bilamba ya saki ;na esika ya elongi kitoko, ekozala nde elongi mabe. 25 Mibali na bino bakokufa na mipanga,basoda na bino ya mpiko bakokufa na bitumba. 26 Bikuke ya Siona ekolela mpe ekozala na matanga ;boye Siona ekokelela mpe ekovanda na mabele.
In Other Versions
Isaiah 3 in the ANGEFD
Isaiah 3 in the ANTPNG2D
Isaiah 3 in the AS21
Isaiah 3 in the BAGH
Isaiah 3 in the BBPNG
Isaiah 3 in the BBT1E
Isaiah 3 in the BDS
Isaiah 3 in the BEV
Isaiah 3 in the BHAD
Isaiah 3 in the BIB
Isaiah 3 in the BLPT
Isaiah 3 in the BNT
Isaiah 3 in the BNTABOOT
Isaiah 3 in the BNTLV
Isaiah 3 in the BOATCB
Isaiah 3 in the BOATCB2
Isaiah 3 in the BOBCV
Isaiah 3 in the BOCNT
Isaiah 3 in the BOECS
Isaiah 3 in the BOGWICC
Isaiah 3 in the BOHCB
Isaiah 3 in the BOHCV
Isaiah 3 in the BOHLNT
Isaiah 3 in the BOHNTLTAL
Isaiah 3 in the BOICB
Isaiah 3 in the BOILNTAP
Isaiah 3 in the BOITCV
Isaiah 3 in the BOKCV
Isaiah 3 in the BOKCV2
Isaiah 3 in the BOKHWOG
Isaiah 3 in the BOKSSV
Isaiah 3 in the BOLCB
Isaiah 3 in the BOMCV
Isaiah 3 in the BONAV
Isaiah 3 in the BONCB
Isaiah 3 in the BONLT
Isaiah 3 in the BONUT2
Isaiah 3 in the BOPLNT
Isaiah 3 in the BOSCB
Isaiah 3 in the BOSNC
Isaiah 3 in the BOTLNT
Isaiah 3 in the BOVCB
Isaiah 3 in the BOYCB
Isaiah 3 in the BPBB
Isaiah 3 in the BPH
Isaiah 3 in the BSB
Isaiah 3 in the CCB
Isaiah 3 in the CUV
Isaiah 3 in the CUVS
Isaiah 3 in the DBT
Isaiah 3 in the DGDNT
Isaiah 3 in the DHNT
Isaiah 3 in the DNT
Isaiah 3 in the ELBE
Isaiah 3 in the EMTV
Isaiah 3 in the ESV
Isaiah 3 in the FBV
Isaiah 3 in the FEB
Isaiah 3 in the GGMNT
Isaiah 3 in the GNT
Isaiah 3 in the HARY
Isaiah 3 in the HNT
Isaiah 3 in the IRVA
Isaiah 3 in the IRVB
Isaiah 3 in the IRVG
Isaiah 3 in the IRVH
Isaiah 3 in the IRVK
Isaiah 3 in the IRVM
Isaiah 3 in the IRVM2
Isaiah 3 in the IRVO
Isaiah 3 in the IRVP
Isaiah 3 in the IRVT
Isaiah 3 in the IRVT2
Isaiah 3 in the IRVU
Isaiah 3 in the ISVN
Isaiah 3 in the JSNT
Isaiah 3 in the KAPI
Isaiah 3 in the KBT1ETNIK
Isaiah 3 in the KBV
Isaiah 3 in the KJV
Isaiah 3 in the KNFD
Isaiah 3 in the LBA
Isaiah 3 in the LBLA
Isaiah 3 in the LNT
Isaiah 3 in the LSV
Isaiah 3 in the MAAL
Isaiah 3 in the MBV
Isaiah 3 in the MBV2
Isaiah 3 in the MHNT
Isaiah 3 in the MKNFD
Isaiah 3 in the MNG
Isaiah 3 in the MNT
Isaiah 3 in the MNT2
Isaiah 3 in the MRS1T
Isaiah 3 in the NAA
Isaiah 3 in the NASB
Isaiah 3 in the NBLA
Isaiah 3 in the NBS
Isaiah 3 in the NBVTP
Isaiah 3 in the NET2
Isaiah 3 in the NIV11
Isaiah 3 in the NNT
Isaiah 3 in the NNT2
Isaiah 3 in the NNT3
Isaiah 3 in the PDDPT
Isaiah 3 in the PFNT
Isaiah 3 in the RMNT
Isaiah 3 in the SBIAS
Isaiah 3 in the SBIBS
Isaiah 3 in the SBIBS2
Isaiah 3 in the SBICS
Isaiah 3 in the SBIDS
Isaiah 3 in the SBIGS
Isaiah 3 in the SBIHS
Isaiah 3 in the SBIIS
Isaiah 3 in the SBIIS2
Isaiah 3 in the SBIIS3
Isaiah 3 in the SBIKS
Isaiah 3 in the SBIKS2
Isaiah 3 in the SBIMS
Isaiah 3 in the SBIOS
Isaiah 3 in the SBIPS
Isaiah 3 in the SBISS
Isaiah 3 in the SBITS
Isaiah 3 in the SBITS2
Isaiah 3 in the SBITS3
Isaiah 3 in the SBITS4
Isaiah 3 in the SBIUS
Isaiah 3 in the SBIVS
Isaiah 3 in the SBT
Isaiah 3 in the SBT1E
Isaiah 3 in the SCHL
Isaiah 3 in the SNT
Isaiah 3 in the SUSU
Isaiah 3 in the SUSU2
Isaiah 3 in the SYNO
Isaiah 3 in the TBIAOTANT
Isaiah 3 in the TBT1E
Isaiah 3 in the TBT1E2
Isaiah 3 in the TFTIP
Isaiah 3 in the TFTU
Isaiah 3 in the TGNTATF3T
Isaiah 3 in the THAI
Isaiah 3 in the TNFD
Isaiah 3 in the TNT
Isaiah 3 in the TNTIK
Isaiah 3 in the TNTIL
Isaiah 3 in the TNTIN
Isaiah 3 in the TNTIP
Isaiah 3 in the TNTIZ
Isaiah 3 in the TOMA
Isaiah 3 in the TTENT
Isaiah 3 in the UBG
Isaiah 3 in the UGV
Isaiah 3 in the UGV2
Isaiah 3 in the UGV3
Isaiah 3 in the VBL
Isaiah 3 in the VDCC
Isaiah 3 in the YALU
Isaiah 3 in the YAPE
Isaiah 3 in the YBVTP
Isaiah 3 in the ZBP