Isaiah 51 (BOLCB2)

1 « Boyoka ngai,bino bato oyo bolukaka bosembompe bolukaka Yawe !Botala libanga epai wapi bosalemaki,mpe libulu epai wapi bobendamaki. 2 Botala Abrayami, tata na bino ;mpe Sara oyo abotaki bino.Tango nabengaki ye, azalaki kaka ye moko ;napambolaki ye mpe nakomisaki yetata ya bato ebele ! 3 Solo, Yawe akobondisa Sionampe akotala na liso ya ngolubisika nyonso ya Siona oyo ebeba ;akokomisa esobe na yango lokola Edeni,bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe.Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna,matondi mpe mongongo ya banzembo. 4 Oh bato na ngai, boyoka ngai !Bino, ekolo na ngai, boyoka ngai malamu :Mpo ete Mobeko ekobimela epai na ngai,lolenge na ngai ya kokata makambo ekoyeisa pole na bikolo. 5 Bosembo na ngai ezali pene,lobiko na ngai ebimi na lombangu,mpe maboko na ngai ekosambisa bikolo.Bisanga ekotalela ngai,ekozala na elikya na nguya ya loboko na ngai. 6 Botombola miso na bino na likolo,botala na se, na mabele ;likolo ekolimwa lokola milinga,mabele ekonuna lokola elamba,mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi.Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko,bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te. 7 Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo,bino bato oyo bozali na Mobeko na ngaikati na mitema na bino :Bobanga te lolenge bato bakotiola binoto bozala na somo ya mangungu na bango te. 8 Pamba te nseka ekolia bango lokola elamba,mpe bampese ekolia bango lokola elambabasala na bapwale ya meme ;kasi bosembo na ngai ekowumela seko na seko,mpe lobiko na ngai, bileko na bileko. » 9 Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka !Lata makasi !Lamuka, lokola na mikolo ya kala,na bileko oyo eleka kala !Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi,oyo obomaki dalagona ? 10 Ezali Yo te oyo okawusaki ebale monene,mayi oyo ya mozindo makasi ?Ezali Yo te oyo opasolaki nzela kati na ebale monenempo ete basikolami na Yo bakoka kokatisa ? 11 Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga,bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo ;esengo ya libela na libela ekozalalokola motole na mito na bango ;bakotondisama na esengo mpe na kosepela,bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango. 12 « Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino.Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa,mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti ? 13 Ozali mpe kobosana Yawe, Mokeli na Yo,oyo atandaki likolo ndenge batandaka liputampe atongaki miboko ya mabele,mpo ete okoma kobika mikolo nyonso na kobangaliboso ya kanda ya banyokolioyo babongisami mpo na kobebisama ?Pamba te, wapi kanda ya banyokoli ? 14 Etikali kaka moke, bakangami bakozwa bonsomi,bakokufa lisusu te kati na boloko na bangompe bakozanga lisusu bilei te. 15 Nazali Yawe, Nzambe na Yo,oyo aningisaka ebale monenempo ete mbonge na yango etomboka.Kombo na Ye ezali ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga. › 16 Natiaki maloba na Ngai na monoko na yo,mpe nazipi yo na elili ya loboko na ngai ;nazali Ye oyo atiaki likolo na esika na yango,oyo atongaki miboko ya mabelempe oyo alobaki na Siona :‹ Bozali bato na Ngai ! › » 17 Lamuka, lamuka !Telema, Yelusalemi,yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe,kopo ya kanda na Ye ;yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na sukakopo oyo epesaka bato kizunguzungu. 18 Kati na bana nyonso oyo abotaki,Ezali na mwana moko teoyo azali kolakisa ye nzela ;kati na bana oyo abokolaki,moko te azali kosimba ye na loboko. 19 Makama mibale oyo ekomeli yo,nani akoki kolendisa yo :Mokili na yo ekomi mipiku ya mabanga mpe ebebisami,nzala makasi mpe mopanga,nani akobondisa yo ? 20 Bana na yo balembi,balali-lali na babalabala nyonsolokola mboloko oyo ekangami na motambo ;kanda ya Yawe mpe pamela ya Nzambe na yonde ebuki-buki bango lolenge wana. 21 Yango wana, yo oyo basambwisi,yo oyo olangwe, kasi na masanga ya vino te,yoka makambo oyo : 22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo,oyo abundelaka bato na Ye, alobi :« Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu,kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo,okomela yango lisusu te. 23 Nakotia yango na loboko ya banyokoli na yo,oyo balobaki na yo :‹ Lala na se mpo ete totambola likolo na yo ! ›Mpe okomisaki mokongo na yo lokola nzela,lokola balabala mpo ete batambola likolo na yo. »

In Other Versions

Isaiah 51 in the ANGEFD

Isaiah 51 in the ANTPNG2D

Isaiah 51 in the AS21

Isaiah 51 in the BAGH

Isaiah 51 in the BBPNG

Isaiah 51 in the BBT1E

Isaiah 51 in the BDS

Isaiah 51 in the BEV

Isaiah 51 in the BHAD

Isaiah 51 in the BIB

Isaiah 51 in the BLPT

Isaiah 51 in the BNT

Isaiah 51 in the BNTABOOT

Isaiah 51 in the BNTLV

Isaiah 51 in the BOATCB

Isaiah 51 in the BOATCB2

Isaiah 51 in the BOBCV

Isaiah 51 in the BOCNT

Isaiah 51 in the BOECS

Isaiah 51 in the BOGWICC

Isaiah 51 in the BOHCB

Isaiah 51 in the BOHCV

Isaiah 51 in the BOHLNT

Isaiah 51 in the BOHNTLTAL

Isaiah 51 in the BOICB

Isaiah 51 in the BOILNTAP

Isaiah 51 in the BOITCV

Isaiah 51 in the BOKCV

Isaiah 51 in the BOKCV2

Isaiah 51 in the BOKHWOG

Isaiah 51 in the BOKSSV

Isaiah 51 in the BOLCB

Isaiah 51 in the BOMCV

Isaiah 51 in the BONAV

Isaiah 51 in the BONCB

Isaiah 51 in the BONLT

Isaiah 51 in the BONUT2

Isaiah 51 in the BOPLNT

Isaiah 51 in the BOSCB

Isaiah 51 in the BOSNC

Isaiah 51 in the BOTLNT

Isaiah 51 in the BOVCB

Isaiah 51 in the BOYCB

Isaiah 51 in the BPBB

Isaiah 51 in the BPH

Isaiah 51 in the BSB

Isaiah 51 in the CCB

Isaiah 51 in the CUV

Isaiah 51 in the CUVS

Isaiah 51 in the DBT

Isaiah 51 in the DGDNT

Isaiah 51 in the DHNT

Isaiah 51 in the DNT

Isaiah 51 in the ELBE

Isaiah 51 in the EMTV

Isaiah 51 in the ESV

Isaiah 51 in the FBV

Isaiah 51 in the FEB

Isaiah 51 in the GGMNT

Isaiah 51 in the GNT

Isaiah 51 in the HARY

Isaiah 51 in the HNT

Isaiah 51 in the IRVA

Isaiah 51 in the IRVB

Isaiah 51 in the IRVG

Isaiah 51 in the IRVH

Isaiah 51 in the IRVK

Isaiah 51 in the IRVM

Isaiah 51 in the IRVM2

Isaiah 51 in the IRVO

Isaiah 51 in the IRVP

Isaiah 51 in the IRVT

Isaiah 51 in the IRVT2

Isaiah 51 in the IRVU

Isaiah 51 in the ISVN

Isaiah 51 in the JSNT

Isaiah 51 in the KAPI

Isaiah 51 in the KBT1ETNIK

Isaiah 51 in the KBV

Isaiah 51 in the KJV

Isaiah 51 in the KNFD

Isaiah 51 in the LBA

Isaiah 51 in the LBLA

Isaiah 51 in the LNT

Isaiah 51 in the LSV

Isaiah 51 in the MAAL

Isaiah 51 in the MBV

Isaiah 51 in the MBV2

Isaiah 51 in the MHNT

Isaiah 51 in the MKNFD

Isaiah 51 in the MNG

Isaiah 51 in the MNT

Isaiah 51 in the MNT2

Isaiah 51 in the MRS1T

Isaiah 51 in the NAA

Isaiah 51 in the NASB

Isaiah 51 in the NBLA

Isaiah 51 in the NBS

Isaiah 51 in the NBVTP

Isaiah 51 in the NET2

Isaiah 51 in the NIV11

Isaiah 51 in the NNT

Isaiah 51 in the NNT2

Isaiah 51 in the NNT3

Isaiah 51 in the PDDPT

Isaiah 51 in the PFNT

Isaiah 51 in the RMNT

Isaiah 51 in the SBIAS

Isaiah 51 in the SBIBS

Isaiah 51 in the SBIBS2

Isaiah 51 in the SBICS

Isaiah 51 in the SBIDS

Isaiah 51 in the SBIGS

Isaiah 51 in the SBIHS

Isaiah 51 in the SBIIS

Isaiah 51 in the SBIIS2

Isaiah 51 in the SBIIS3

Isaiah 51 in the SBIKS

Isaiah 51 in the SBIKS2

Isaiah 51 in the SBIMS

Isaiah 51 in the SBIOS

Isaiah 51 in the SBIPS

Isaiah 51 in the SBISS

Isaiah 51 in the SBITS

Isaiah 51 in the SBITS2

Isaiah 51 in the SBITS3

Isaiah 51 in the SBITS4

Isaiah 51 in the SBIUS

Isaiah 51 in the SBIVS

Isaiah 51 in the SBT

Isaiah 51 in the SBT1E

Isaiah 51 in the SCHL

Isaiah 51 in the SNT

Isaiah 51 in the SUSU

Isaiah 51 in the SUSU2

Isaiah 51 in the SYNO

Isaiah 51 in the TBIAOTANT

Isaiah 51 in the TBT1E

Isaiah 51 in the TBT1E2

Isaiah 51 in the TFTIP

Isaiah 51 in the TFTU

Isaiah 51 in the TGNTATF3T

Isaiah 51 in the THAI

Isaiah 51 in the TNFD

Isaiah 51 in the TNT

Isaiah 51 in the TNTIK

Isaiah 51 in the TNTIL

Isaiah 51 in the TNTIN

Isaiah 51 in the TNTIP

Isaiah 51 in the TNTIZ

Isaiah 51 in the TOMA

Isaiah 51 in the TTENT

Isaiah 51 in the UBG

Isaiah 51 in the UGV

Isaiah 51 in the UGV2

Isaiah 51 in the UGV3

Isaiah 51 in the VBL

Isaiah 51 in the VDCC

Isaiah 51 in the YALU

Isaiah 51 in the YAPE

Isaiah 51 in the YBVTP

Isaiah 51 in the ZBP