Mark 12 (BOLCB2)

1 Bongo Yesu akomaki koloba na bango na masese : — Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo. 2 Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga, mpo ete akende kokongola epai na bango ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. 3 Kasi bafuteli elanga bakangaki ye, babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. 4 Atindelaki bango mosali mosusu ; babetaki-betaki ye na moto mpe basambwisaki ye. 5 Atindaki lisusu mosali mosusu ; oyo wana, babomaki ye. Bongo, na sima, atindaki lisusu bato ebele ; kasi babetaki bamoko, mpe babomaki bamosusu. 6 Nkolo elanga atikalaki kaka na moto moko ya kotinda : mwana na ye ya bolingo. Atindaki ye na suka na bango nyonso mpe amilobelaki : « Solo, bakotosa mwana na ngai. » 7 Kasi bafuteli elanga balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! » 8 Bakangaki ye, babomaki ye mpe babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino. 9 Boye, nkolo elanga ya vino akosala nini ? Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga wana mpe akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu. 10 Nanu botanga Makomi oyo te : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako,mpe esimbi ndako mobimba ? 11 Ezali Nkolo nde alingaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso ! » 12 Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bazalaki koluka nzela ya kokanga Yesu, pamba te basosolaki ete alobaki lisese wana mpo na bango. Kasi lokola babangaki bato, batikaki Ye ; mpe moto na moto akendeki. 13 Sima, batindelaki Yesu ndambo ya Bafarizeo mpe ndambo ya bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka kokanga Ye na motambo ya maloba na Ye moko. 14 Tango bakomaki epai na Ye, balobaki :— Moteyi, toyebi ete ozali moto ya sembo mpe obangaka bato te, pamba te oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. Boni, Mobeko na biso epesi solo nzela ya kofuta mpako ya Sezare to te ? Tosengeli penza kofuta yango ? 15 Kasi lokola Yesu ayebaki ete bazali bato ya bilongi mibale, alobaki na bango : — Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ? Bomemela Ngai mbongo moko ya ebende, mpo ete namona yango. 16 Bamemelaki Ye yango, mpe atunaki bango : — Elilingi ya nani mpe makomi ya nani bozali komona awa ?Bazongisaki :— Ya Sezare. 17 Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !Bakamwaki mingi eyano ya Yesu. 18 Bongo Basaduseo, ba-oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye : 19 — Moteyi, Moyize akomaki mpo na biso ete soki ndeko mobali ya moto moko akufi mpe atiki mwasi, kasi aboti na ye bana te, moto wana asengeli kobala mwasi oyo ndeko na ye atiki mpo ete abotela ndeko yango bana. 20 Nzokande, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki, kasi abotaki bana te. 21 Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka ; kasi ye mpe akufaki, atikalaki kobota bana te. Esalemaki kaka bongo na ndeko ya misato kino na oyo ya sambo : 22 bandeko nyonso sambo batikalaki kobota bana te. Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki. 23 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye ? 24 Yesu azongiselaki bango : — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te. 25 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo. 26 Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te kati na buku ya Moyize, makambo oyo Nzambe alobaki na ye na tina na nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te : « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? » 27 Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. Bozali penza kati na libunga monene. 28 Moko kati na balakisi ya Mobeko, oyo ayokaki bango kotiana tembe mpe amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano ya malamu, apusanaki pene na Yesu mpe atunaki :— Mobeko nini eleki monene kati ya mibeko nyonso ? 29 Yesu azongisaki : — Tala Mobeko oyo eleki monene : « Isalaele, yoka malamu ! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko. 30 Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso. » 31 Tala mobeko oyo elandi : « Okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » Mobeko ya motuya koleka mibeko wana mibale ezali te. 32 Bongo molakisi ya Mobeko alobaki na ye :— Moteyi, olobi malamu ; olobi solo ete Nzambe azali kaka moko, mosusu azali te. 33 Kolinga Ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, yango nde ezali na tina mingi koleka bambeka ya kotumba mpe makabo nyonso. 34 Tango Yesu amonaki ete molakisi ya Mobeko azongisi eyano na ndenge ya mayele, alobaki na ye : — Ozali mosika te ya Bokonzi ya Nzambe.Mpe moto ata moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna. 35 Wana Yesu azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, atunaki : — Ndenge nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Klisto azali Mwana ya Davidi ? 36 Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu : « Yawe alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › » 37 Soki ye moko Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?Ebele ya bato bazalaki koyoka Ye na esengo. 38 Wana azalaki koteya, Yesu alobaki : — Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; 39 balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ; 40 bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi. 41 Yesu avandaki liboso ya kitunga ya makabo mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo kati na kitunga ya makabo. Bazwi ebele bazalaki kotia mbongo ebele. 42 Mwasi mobola moko akufisa mobali ayaki mpe atiaki mbongo mibale ya bibende, oyo ezalaki na motuya moke penza. 43 Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso oyo bawuti kotia mbongo kati na kitunga ya makabo. 44 Pamba te bato nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo ; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie bozwi na ye nyonso, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobika na yango.

In Other Versions

Mark 12 in the ANGEFD

Mark 12 in the ANTPNG2D

Mark 12 in the AS21

Mark 12 in the BAGH

Mark 12 in the BBPNG

Mark 12 in the BBT1E

Mark 12 in the BDS

Mark 12 in the BEV

Mark 12 in the BHAD

Mark 12 in the BIB

Mark 12 in the BLPT

Mark 12 in the BNT

Mark 12 in the BNTABOOT

Mark 12 in the BNTLV

Mark 12 in the BOATCB

Mark 12 in the BOATCB2

Mark 12 in the BOBCV

Mark 12 in the BOCNT

Mark 12 in the BOECS

Mark 12 in the BOGWICC

Mark 12 in the BOHCB

Mark 12 in the BOHCV

Mark 12 in the BOHLNT

Mark 12 in the BOHNTLTAL

Mark 12 in the BOICB

Mark 12 in the BOILNTAP

Mark 12 in the BOITCV

Mark 12 in the BOKCV

Mark 12 in the BOKCV2

Mark 12 in the BOKHWOG

Mark 12 in the BOKSSV

Mark 12 in the BOLCB

Mark 12 in the BOMCV

Mark 12 in the BONAV

Mark 12 in the BONCB

Mark 12 in the BONLT

Mark 12 in the BONUT2

Mark 12 in the BOPLNT

Mark 12 in the BOSCB

Mark 12 in the BOSNC

Mark 12 in the BOTLNT

Mark 12 in the BOVCB

Mark 12 in the BOYCB

Mark 12 in the BPBB

Mark 12 in the BPH

Mark 12 in the BSB

Mark 12 in the CCB

Mark 12 in the CUV

Mark 12 in the CUVS

Mark 12 in the DBT

Mark 12 in the DGDNT

Mark 12 in the DHNT

Mark 12 in the DNT

Mark 12 in the ELBE

Mark 12 in the EMTV

Mark 12 in the ESV

Mark 12 in the FBV

Mark 12 in the FEB

Mark 12 in the GGMNT

Mark 12 in the GNT

Mark 12 in the HARY

Mark 12 in the HNT

Mark 12 in the IRVA

Mark 12 in the IRVB

Mark 12 in the IRVG

Mark 12 in the IRVH

Mark 12 in the IRVK

Mark 12 in the IRVM

Mark 12 in the IRVM2

Mark 12 in the IRVO

Mark 12 in the IRVP

Mark 12 in the IRVT

Mark 12 in the IRVT2

Mark 12 in the IRVU

Mark 12 in the ISVN

Mark 12 in the JSNT

Mark 12 in the KAPI

Mark 12 in the KBT1ETNIK

Mark 12 in the KBV

Mark 12 in the KJV

Mark 12 in the KNFD

Mark 12 in the LBA

Mark 12 in the LBLA

Mark 12 in the LNT

Mark 12 in the LSV

Mark 12 in the MAAL

Mark 12 in the MBV

Mark 12 in the MBV2

Mark 12 in the MHNT

Mark 12 in the MKNFD

Mark 12 in the MNG

Mark 12 in the MNT

Mark 12 in the MNT2

Mark 12 in the MRS1T

Mark 12 in the NAA

Mark 12 in the NASB

Mark 12 in the NBLA

Mark 12 in the NBS

Mark 12 in the NBVTP

Mark 12 in the NET2

Mark 12 in the NIV11

Mark 12 in the NNT

Mark 12 in the NNT2

Mark 12 in the NNT3

Mark 12 in the PDDPT

Mark 12 in the PFNT

Mark 12 in the RMNT

Mark 12 in the SBIAS

Mark 12 in the SBIBS

Mark 12 in the SBIBS2

Mark 12 in the SBICS

Mark 12 in the SBIDS

Mark 12 in the SBIGS

Mark 12 in the SBIHS

Mark 12 in the SBIIS

Mark 12 in the SBIIS2

Mark 12 in the SBIIS3

Mark 12 in the SBIKS

Mark 12 in the SBIKS2

Mark 12 in the SBIMS

Mark 12 in the SBIOS

Mark 12 in the SBIPS

Mark 12 in the SBISS

Mark 12 in the SBITS

Mark 12 in the SBITS2

Mark 12 in the SBITS3

Mark 12 in the SBITS4

Mark 12 in the SBIUS

Mark 12 in the SBIVS

Mark 12 in the SBT

Mark 12 in the SBT1E

Mark 12 in the SCHL

Mark 12 in the SNT

Mark 12 in the SUSU

Mark 12 in the SUSU2

Mark 12 in the SYNO

Mark 12 in the TBIAOTANT

Mark 12 in the TBT1E

Mark 12 in the TBT1E2

Mark 12 in the TFTIP

Mark 12 in the TFTU

Mark 12 in the TGNTATF3T

Mark 12 in the THAI

Mark 12 in the TNFD

Mark 12 in the TNT

Mark 12 in the TNTIK

Mark 12 in the TNTIL

Mark 12 in the TNTIN

Mark 12 in the TNTIP

Mark 12 in the TNTIZ

Mark 12 in the TOMA

Mark 12 in the TTENT

Mark 12 in the UBG

Mark 12 in the UGV

Mark 12 in the UGV2

Mark 12 in the UGV3

Mark 12 in the VBL

Mark 12 in the VDCC

Mark 12 in the YALU

Mark 12 in the YAPE

Mark 12 in the YBVTP

Mark 12 in the ZBP