Mark 3 (BOLCB2)

1 Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. 2 Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye. 3 Bongo Yesu alobaki na moto oyo akufa loboko : — Telema na liboso ya bato nyonso. 4 Atunaki bango : — Nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ?Kasi babatelaki kimia. 5 Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo !Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki. 6 Mbala moko, Bafarizeo babimaki mpe bakendeki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu. 7 Tango Yesu alongwaki kuna, akendeki na ebale elongo na bayekoli na Ye, mpe bato ebele penza balandaki Ye wuta na Galile, na Yuda, 8 na Yelusalemi, na Idume mpe na ngambo ya Yordani. Boye tango bato oyo bazalaki na bamboka ya zingazinga ya Tiri mpe ya Sidoni bayokaki sango ya makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, bango mpe bayaki ebele penza epai na Ye. 9 Boye Yesu atindaki bayekoli ete babongisela Ye bwato moko mpo ete bato bafinafina Ye te. 10 Lokola azalaki kobikisa bato ebele, bato oyo bazalaki na pasi bakomaki kowelela koya epai na Ye mpo na koluka kosimba Ye. 11 Tango bato oyo bazalaki na milimo mabe bazalaki komona Ye, bazalaki kogumbama liboso na Ye mpe koganga :— Yo ozali solo Mwana na Nzambe ! 12 Kasi Yesu azalaki kopamela milimo yango ete emeka te koloba na tina na Ye. 13 Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo azalaki na bosenga na bango, mpe bakendeki epai na Ye. 14 Kati na bango, aponaki bato zomi na mibale oyo akomaki kobenga « bantoma, » mpo ete bazala elongo na Ye mpe mpo ete bakende koteya Sango Malamu ; 15 mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe. 16 Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo aponaki : Simona oyo Yesu apesaki kombo «~Petelo~;~» 17 Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye, ba-oyo Yesu apesaki kombo « Boanerijesi » oyo elingi koloba : bana ya kake ; 18 Andre,Filipo,Bartelemi,Matayo,Toma,Jake, mwana mobali ya Alife~;Tade,Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote, 19 mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu. 20 Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana wana, mpe esalaki ete Ye elongo na bayekoli na Ye bazangaki ata tango mpo na kolia. 21 Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba :— Akomi na bokono ya liboma. 22 Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki :— Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe. 23 Yesu abengaki bango mpe alobaki na bango na masese : — Ndenge nini Satana akoki kobengana Satana ? 24 Soki bokonzi moko ekabwani, bokonzi yango ekowumela te. 25 Soki libota moko ekabwani, libota yango ekowumela te ; 26 mpe soki Satana amibundisi mpe akabwani na ye moko, akowumela te, mpe suka na ye emonani. 27 Pamba te moto moko te akoki kokota na ndako ya elombe mpo na kobotola biloko na ye soki liboso akangi ye te na basinga. Ezali kaka soki asali bongo nde akoki kobotola biloko na ye ya ndako. 28 Nazali koloba na bino penza ya solo : masumu mpe maloba nyonso ya mabe oyo bato bakoki kofinga na yango Nzambe ekolimbisama ; 29 kasi moto nyonso oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te, akomema mokumba ya lisumu yango mpo na libela. 30 Yesu alobaki bongo, mpo ete bazalaki koloba : « Azali na molimo mabe ! » 31 Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki, batelemaki libanda mpe batindaki moto kobenga Yesu. 32 Bato ebele penza bavandaki pembeni na Ye. Mpe bayaki koloba na Ye :— Mama mpe bandeko na yo ya mibali bazali libanda, bazali koluka yo.Yesu azongisaki : 33 — Nani mama na Ngai ? Banani bandeko na Ngai ? 34 Atalaki bato oyo bavandaki pembeni na Ye mpe alobaki : — Botala mama na Ngai mpe bandeko na Ngai ! 35 Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.

In Other Versions

Mark 3 in the ANGEFD

Mark 3 in the ANTPNG2D

Mark 3 in the AS21

Mark 3 in the BAGH

Mark 3 in the BBPNG

Mark 3 in the BBT1E

Mark 3 in the BDS

Mark 3 in the BEV

Mark 3 in the BHAD

Mark 3 in the BIB

Mark 3 in the BLPT

Mark 3 in the BNT

Mark 3 in the BNTABOOT

Mark 3 in the BNTLV

Mark 3 in the BOATCB

Mark 3 in the BOATCB2

Mark 3 in the BOBCV

Mark 3 in the BOCNT

Mark 3 in the BOECS

Mark 3 in the BOGWICC

Mark 3 in the BOHCB

Mark 3 in the BOHCV

Mark 3 in the BOHLNT

Mark 3 in the BOHNTLTAL

Mark 3 in the BOICB

Mark 3 in the BOILNTAP

Mark 3 in the BOITCV

Mark 3 in the BOKCV

Mark 3 in the BOKCV2

Mark 3 in the BOKHWOG

Mark 3 in the BOKSSV

Mark 3 in the BOLCB

Mark 3 in the BOMCV

Mark 3 in the BONAV

Mark 3 in the BONCB

Mark 3 in the BONLT

Mark 3 in the BONUT2

Mark 3 in the BOPLNT

Mark 3 in the BOSCB

Mark 3 in the BOSNC

Mark 3 in the BOTLNT

Mark 3 in the BOVCB

Mark 3 in the BOYCB

Mark 3 in the BPBB

Mark 3 in the BPH

Mark 3 in the BSB

Mark 3 in the CCB

Mark 3 in the CUV

Mark 3 in the CUVS

Mark 3 in the DBT

Mark 3 in the DGDNT

Mark 3 in the DHNT

Mark 3 in the DNT

Mark 3 in the ELBE

Mark 3 in the EMTV

Mark 3 in the ESV

Mark 3 in the FBV

Mark 3 in the FEB

Mark 3 in the GGMNT

Mark 3 in the GNT

Mark 3 in the HARY

Mark 3 in the HNT

Mark 3 in the IRVA

Mark 3 in the IRVB

Mark 3 in the IRVG

Mark 3 in the IRVH

Mark 3 in the IRVK

Mark 3 in the IRVM

Mark 3 in the IRVM2

Mark 3 in the IRVO

Mark 3 in the IRVP

Mark 3 in the IRVT

Mark 3 in the IRVT2

Mark 3 in the IRVU

Mark 3 in the ISVN

Mark 3 in the JSNT

Mark 3 in the KAPI

Mark 3 in the KBT1ETNIK

Mark 3 in the KBV

Mark 3 in the KJV

Mark 3 in the KNFD

Mark 3 in the LBA

Mark 3 in the LBLA

Mark 3 in the LNT

Mark 3 in the LSV

Mark 3 in the MAAL

Mark 3 in the MBV

Mark 3 in the MBV2

Mark 3 in the MHNT

Mark 3 in the MKNFD

Mark 3 in the MNG

Mark 3 in the MNT

Mark 3 in the MNT2

Mark 3 in the MRS1T

Mark 3 in the NAA

Mark 3 in the NASB

Mark 3 in the NBLA

Mark 3 in the NBS

Mark 3 in the NBVTP

Mark 3 in the NET2

Mark 3 in the NIV11

Mark 3 in the NNT

Mark 3 in the NNT2

Mark 3 in the NNT3

Mark 3 in the PDDPT

Mark 3 in the PFNT

Mark 3 in the RMNT

Mark 3 in the SBIAS

Mark 3 in the SBIBS

Mark 3 in the SBIBS2

Mark 3 in the SBICS

Mark 3 in the SBIDS

Mark 3 in the SBIGS

Mark 3 in the SBIHS

Mark 3 in the SBIIS

Mark 3 in the SBIIS2

Mark 3 in the SBIIS3

Mark 3 in the SBIKS

Mark 3 in the SBIKS2

Mark 3 in the SBIMS

Mark 3 in the SBIOS

Mark 3 in the SBIPS

Mark 3 in the SBISS

Mark 3 in the SBITS

Mark 3 in the SBITS2

Mark 3 in the SBITS3

Mark 3 in the SBITS4

Mark 3 in the SBIUS

Mark 3 in the SBIVS

Mark 3 in the SBT

Mark 3 in the SBT1E

Mark 3 in the SCHL

Mark 3 in the SNT

Mark 3 in the SUSU

Mark 3 in the SUSU2

Mark 3 in the SYNO

Mark 3 in the TBIAOTANT

Mark 3 in the TBT1E

Mark 3 in the TBT1E2

Mark 3 in the TFTIP

Mark 3 in the TFTU

Mark 3 in the TGNTATF3T

Mark 3 in the THAI

Mark 3 in the TNFD

Mark 3 in the TNT

Mark 3 in the TNTIK

Mark 3 in the TNTIL

Mark 3 in the TNTIN

Mark 3 in the TNTIP

Mark 3 in the TNTIZ

Mark 3 in the TOMA

Mark 3 in the TTENT

Mark 3 in the UBG

Mark 3 in the UGV

Mark 3 in the UGV2

Mark 3 in the UGV3

Mark 3 in the VBL

Mark 3 in the VDCC

Mark 3 in the YALU

Mark 3 in the YAPE

Mark 3 in the YBVTP

Mark 3 in the ZBP