Nahum 3 (BOLCB2)
1 Mawa na engumba oyo mosala na yangokosopa makila ya bato,engumba oyo etondana makambo ya lokuta mpe na moyibi,engumba oyo ezangaka te koboma bato ! 2 Tango nyonso, kaka makelele ya bafimbu,makelele ya bapine :bampunda ezali kopumbwa,mpe bashar ezali koningana. 3 Basoda oyo batambolaka likolo ya bampundabazali kotambola-tambola,mipanga ezali kongenga,makonga ezali koleka-leka lokola mikalikali !Bato bazali kozoka, kokufa ebele penza !Bongo bibembe elali-lali bisika nyonso,mpe makolo ya bato ekomi kotuta bibembetango bazali kotambola. 4 Makambo oyo nyonso esalemilikolo ya makambo ya nkele ya engumbaoyo etonda na kindumba,engumba ya kitoko makasikasi etonda na misala ya soloka,engumba oyo epengwisaka bikolona nzela ya kindumba na yangompe epengwisaka batona nzela ya misala na yango ya soloka. 5 « Natombokeli yo, »elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ;« nakotombola yo elamba kino na elongi,nakolakisa bolumbu na yona miso ya bikolo mosusumpe nakoyokisa yo sonina miso ya bamboka nyonso. 6 Nakobwakela yo bosoto,nakosambwisa yompe nakokomisa yo eloko ya maseki. 7 Bato nyonso oyo bakomona yobakokima mpe bakoganga :‹ Engumba Ninive ebebisami boye !Nani akoyokela yango mawa ? › » 8 Boni, okanisi ete ozali kitokokoleka engumba Tebesioyo ezalaka pembeni ya ebale Nilimpe ezingelama na mayi,bongo ebale ebatelaka yangompe mayi ezalaka lokola miroyo ebombaka yango ? 9 Makasi na yango ezalaki kowutana Kushi mpe na Ejipito ;bato ya Puti mpe ya Libi bazalaki kosunga yango. 10 Nzokande, yango mpe ekweyaki,mpe bamemaki bato na yango na bowumbu.Bakataki-kataki na bitenibana na bango na babalabala nyonso,babetaki zeke mpo na koponabato na yango ya lokumumpo ete bamema bango na bowumbu,mpe bakangaki bakambi na yango minyololo. 11 Yo mpe okokoma lokola motooyo alangwe masanga,yo mpe okoluka ekimelompo na kokima banguna na yo. 12 Bandako na yo nyonso, oyo batonga makasiezali lokola banzete ya figi etondana bambuma ya liboso ekomela ;soki kaka bameki koningisa yango,bambuma ekweyaka kino na monoko ya moto ya lokoso. 13 Tala malamu mampinga na yo,balemba lokola basi ;bikuke ya mokili na yo ezali poleleliboso ya banguna na yo,pamba te moto ezikisi bikangelo na yango. 14 Bino bato ya engumba oyo,bomitokela libela mayimpo ete bakozingela bino ;bolendisa libela bamiroyo ebatelaka engumba na bino ;bokamata mabele oyo batongelaka bandako,bosangisa yango mpo ete ekoma potopoto,bongo bobeta babiliki mpe botumba yango. 15 Kuna nde moto ekoya kozikisa yo,mopanga ekoya koboma yompe kosilisa yo lokola mabanki.Tika ete bato na yo bakoma ebele lokola mabanki,bakoma lisusu ebele makasi lokola mankoko. 16 Okomisi motango ya bato na yo ya mombongoebele koleka ata minzoto ya likolo,kasi babebisi mokili nyonsompe bapumbwe na bangondenge kaka mankoko esalaka. 17 Bakengeli na yo bazali lokola mankoko,bakonzi ya basoda na yo bazalilokola maboke ya mabankioyo eyaka kovanda na bamir ya lopangona tango ya malili ;kasi soki kaka moyi ebimi, yango nyonso epanzani,mpe moto moko te ayebaka esika yango ekendaka. 18 Oh mokonzi ya Asiri,bakambi na yo bazali kolala pongi,basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi,mampinga na yo bapalangani na bangombampe moto akosangisa bango azali komonana te. 19 Ezali ata na kisi moko teoyo ekoki kobikisa pota na yo ;pota na yo ezali monene makasi !Moto nyonso oyo akoyoka sangoya makambo oyo ekomeli yoakobeta maboko mpo na kokweyisama na yo.Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?