1 Peter 1 (BOLCB2)

1 Ngai Petelo, ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya baponami ya Nzambe oyo bazali kati na bamboka ya bapaya mpe bapalangani na bituka ya Ponti, ya Galatia, ya Kapadose, ya Azia mpe ya Bitini. 2 Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki ! 3 Tika ete Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Pamba te, kati na mawa monene na Ye, asalaki ete tobotama mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto kati na bakufi, mpo na kopesa biso elikya ya solo 4 ete tokozwa libula oyo abombela biso kati na Likolo, libula oyo ebebaka te, ezwaka bosoto te, mpe ebungisaka kitoko na yango te. Ezali mpe kaka libula yango nde Nzambe abombela bino 5 ba-oyo Nzambe abatelaka na nguya na Ye, na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ekomonisama na tango ya suka. 6 Bosepelaka na lobiko yango, atako bosengeli sik’oyo kotungisama mpo na mwa tango moke na nzela ya komekama ya lolenge nyonso. 7 Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka. 8 Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te, 9 pamba te bozali kozwa lifuti ya kondima na bino : lobiko ya bomoi na bino. 10 Mpo na lobiko yango, basakoli oyo baloba na tina na ngolu oyo Nzambe abongisa mpo na bino balukaki penza, na molende, koyeba mabombami na yango. 11 Basalaki nyonso mpo na koluka koyeba tango nini mpe ndenge nini makambo oyo Molimo ya Klisto alobaki ekosalema. Molimo ya Klisto azalaki kati na bango, wana azalaki komiyebisela bango ete Klisto asengelaki komona pasi liboso ete azwa nkembo oyo ezalaki kozela Ye. 12 Nzambe atalisaki bango ete sango oyo bango bazwaki mokumba ya kotatola ezalaki mpo na bango te, kasi ezalaki nde mpo na bino. Mpe sik’oyo, bozali koyoka sango yango na minoko ya bato oyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo ; mpe bango moko ba-anjelu bazalaka na posa ya koyeba yango. 13 Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala ; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana. 14 Lokola bana ya botosi, botambola lisusu te kolanda baposa mabe oyo bozalaki na yango tango bozangaki boyebi. 15 Kasi lokola Ye oyo abengaki bino azali Bule, bino mpe bozala bule kati na etamboli na bino nyonso, 16 pamba te ekomama : « Bozala bule, pamba te nazali Bule. » 17 Lokola mpe bobelelaka Tata oyo aponaka bilongi te tango asambisaka bato nyonso kolanda misala na bango, botambola kati na kobanga Nzambe, wana bozali awa na mokili lokola bapaya. 18 Boyebi malamu ete ezali te na nzela ya biloko oyo ebebaka lokola wolo to palata nde Nzambe akangolaki bino na bizaleli ezanga tina, oyo bozwaki epai ya bakoko na bino, 19 kasi ezali nde na nzela ya makila ya talo ya Klisto lokola mpate oyo ezangi mbeba mpe litono. 20 Nzambe abongisaki Ye mpo na yango wuta kala, liboso ete akela mokili, mpe Klisto amonani na mikolo oyo ya suka likolo na bino. 21 Ezali na nzela na Ye nde bino bondimelaka Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi mpe apesaki Ye nkembo, mpo ete kondima mpe elikya na bino ezala kati na Nzambe. 22 Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto. 23 Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko ; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka. 24 Pamba te ekomama :« Bato nyonso bazalaka lokola matiti,mpe nkembo na bango nyonso ezalakalokola bafololo ya bilanga.Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka, 25 kasi Liloba na Nkolo ewumelaka seko na seko. »Nzokande, Liloba yango ezali nde Sango Malamu oyo bateyaki bino.

In Other Versions

1 Peter 1 in the ANGEFD

1 Peter 1 in the ANTPNG2D

1 Peter 1 in the AS21

1 Peter 1 in the BAGH

1 Peter 1 in the BBPNG

1 Peter 1 in the BBT1E

1 Peter 1 in the BDS

1 Peter 1 in the BEV

1 Peter 1 in the BHAD

1 Peter 1 in the BIB

1 Peter 1 in the BLPT

1 Peter 1 in the BNT

1 Peter 1 in the BNTABOOT

1 Peter 1 in the BNTLV

1 Peter 1 in the BOATCB

1 Peter 1 in the BOATCB2

1 Peter 1 in the BOBCV

1 Peter 1 in the BOCNT

1 Peter 1 in the BOECS

1 Peter 1 in the BOGWICC

1 Peter 1 in the BOHCB

1 Peter 1 in the BOHCV

1 Peter 1 in the BOHLNT

1 Peter 1 in the BOHNTLTAL

1 Peter 1 in the BOICB

1 Peter 1 in the BOILNTAP

1 Peter 1 in the BOITCV

1 Peter 1 in the BOKCV

1 Peter 1 in the BOKCV2

1 Peter 1 in the BOKHWOG

1 Peter 1 in the BOKSSV

1 Peter 1 in the BOLCB

1 Peter 1 in the BOMCV

1 Peter 1 in the BONAV

1 Peter 1 in the BONCB

1 Peter 1 in the BONLT

1 Peter 1 in the BONUT2

1 Peter 1 in the BOPLNT

1 Peter 1 in the BOSCB

1 Peter 1 in the BOSNC

1 Peter 1 in the BOTLNT

1 Peter 1 in the BOVCB

1 Peter 1 in the BOYCB

1 Peter 1 in the BPBB

1 Peter 1 in the BPH

1 Peter 1 in the BSB

1 Peter 1 in the CCB

1 Peter 1 in the CUV

1 Peter 1 in the CUVS

1 Peter 1 in the DBT

1 Peter 1 in the DGDNT

1 Peter 1 in the DHNT

1 Peter 1 in the DNT

1 Peter 1 in the ELBE

1 Peter 1 in the EMTV

1 Peter 1 in the ESV

1 Peter 1 in the FBV

1 Peter 1 in the FEB

1 Peter 1 in the GGMNT

1 Peter 1 in the GNT

1 Peter 1 in the HARY

1 Peter 1 in the HNT

1 Peter 1 in the IRVA

1 Peter 1 in the IRVB

1 Peter 1 in the IRVG

1 Peter 1 in the IRVH

1 Peter 1 in the IRVK

1 Peter 1 in the IRVM

1 Peter 1 in the IRVM2

1 Peter 1 in the IRVO

1 Peter 1 in the IRVP

1 Peter 1 in the IRVT

1 Peter 1 in the IRVT2

1 Peter 1 in the IRVU

1 Peter 1 in the ISVN

1 Peter 1 in the JSNT

1 Peter 1 in the KAPI

1 Peter 1 in the KBT1ETNIK

1 Peter 1 in the KBV

1 Peter 1 in the KJV

1 Peter 1 in the KNFD

1 Peter 1 in the LBA

1 Peter 1 in the LBLA

1 Peter 1 in the LNT

1 Peter 1 in the LSV

1 Peter 1 in the MAAL

1 Peter 1 in the MBV

1 Peter 1 in the MBV2

1 Peter 1 in the MHNT

1 Peter 1 in the MKNFD

1 Peter 1 in the MNG

1 Peter 1 in the MNT

1 Peter 1 in the MNT2

1 Peter 1 in the MRS1T

1 Peter 1 in the NAA

1 Peter 1 in the NASB

1 Peter 1 in the NBLA

1 Peter 1 in the NBS

1 Peter 1 in the NBVTP

1 Peter 1 in the NET2

1 Peter 1 in the NIV11

1 Peter 1 in the NNT

1 Peter 1 in the NNT2

1 Peter 1 in the NNT3

1 Peter 1 in the PDDPT

1 Peter 1 in the PFNT

1 Peter 1 in the RMNT

1 Peter 1 in the SBIAS

1 Peter 1 in the SBIBS

1 Peter 1 in the SBIBS2

1 Peter 1 in the SBICS

1 Peter 1 in the SBIDS

1 Peter 1 in the SBIGS

1 Peter 1 in the SBIHS

1 Peter 1 in the SBIIS

1 Peter 1 in the SBIIS2

1 Peter 1 in the SBIIS3

1 Peter 1 in the SBIKS

1 Peter 1 in the SBIKS2

1 Peter 1 in the SBIMS

1 Peter 1 in the SBIOS

1 Peter 1 in the SBIPS

1 Peter 1 in the SBISS

1 Peter 1 in the SBITS

1 Peter 1 in the SBITS2

1 Peter 1 in the SBITS3

1 Peter 1 in the SBITS4

1 Peter 1 in the SBIUS

1 Peter 1 in the SBIVS

1 Peter 1 in the SBT

1 Peter 1 in the SBT1E

1 Peter 1 in the SCHL

1 Peter 1 in the SNT

1 Peter 1 in the SUSU

1 Peter 1 in the SUSU2

1 Peter 1 in the SYNO

1 Peter 1 in the TBIAOTANT

1 Peter 1 in the TBT1E

1 Peter 1 in the TBT1E2

1 Peter 1 in the TFTIP

1 Peter 1 in the TFTU

1 Peter 1 in the TGNTATF3T

1 Peter 1 in the THAI

1 Peter 1 in the TNFD

1 Peter 1 in the TNT

1 Peter 1 in the TNTIK

1 Peter 1 in the TNTIL

1 Peter 1 in the TNTIN

1 Peter 1 in the TNTIP

1 Peter 1 in the TNTIZ

1 Peter 1 in the TOMA

1 Peter 1 in the TTENT

1 Peter 1 in the UBG

1 Peter 1 in the UGV

1 Peter 1 in the UGV2

1 Peter 1 in the UGV3

1 Peter 1 in the VBL

1 Peter 1 in the VDCC

1 Peter 1 in the YALU

1 Peter 1 in the YAPE

1 Peter 1 in the YBVTP

1 Peter 1 in the ZBP