Isaiah 65 (BOLCB2)
1 « Namimonisaki, Ngai moko, epai ya batooyo bazalaki kotuna Ngai kutu toli te,namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te.Epai ya ekolo oyo ezalaki kobelela Kombo na Ngai te,nalobaki : ‹ Ngai oyo, Ngai oyo ! › 2 Mikolo nyonso, natandaki maboko na Ngaiepai ya bato ya mito makasi,oyo balandaka nzela ya mabe,oyo batambolaka kolanda makanisi na bango ; 3 bato oyo bapesaka Ngai kanda tango nyonso na nko,babonzaka mbeka kati na bilangampe babonzaka malasi ya ansana bitumbelo basala na babiliki ; 4 bato oyo bavandaka kati na bakundampe balekisaka babutu na bangokati na madusu ya mabanga ;bato oyo baliaka misuni ya ngulumpe basani na bango etonda na bilei ya mbindo ; 5 bato oyo balobaka : ‹ Zala mosika na Ngai,kopusana pene na Ngai te,pamba te nazali bule makasi na miso na yo ! ›Bato ya lolenge oyo bazalilokola milinga na zolo na Ngai,lokola moto oyo epelaka mikolo nyonso. 6 Tala, etikali ya kokomama liboso na Ngai :nakovanda nye tekino nakozongisela bango mabe na bango ;solo, nakozongisela bango penza mabe na bango koleka. 7 Ezala mpo na masumu na binoto mpo na masumu ya batata na bino, » elobi Yawe,« pamba te babonzaki malasi ya ansana likolo ya bangomba milayimpe basambwisaki Ngai na likolo ya bangomba mikuse ;solo penza, nakozongisela bango mabe,nakofuta bango kolanda misala na bango oyo eleka ! » 8 Tala liloba oyo Yawe alobi :« Ndenge kaka balobaka soki bamoniliboke ya bambuma kitoko ya vino :‹ Kobebisa te, pamba te lipamboli moko ezali wana, ›ndenge mpe kaka nakosala mpo na basali na Ngai :nakoboma bango nyonso te. 9 Nakobimisa libota moko kati na Jakobi ;mpe kati na Yuda,nakobimisa mokitani oyo akozwabangomba na Ngai lokola libula ;bato na Ngai,ba-oyo naponi bakokamata yango lokola libula,mpe bawumbu na Ngai nde bakovanda kuna. 10 Etando ya Saroni ekokoma esika ya koleisa bibwele,mpe Lubwaku ya Akori ekokoma esika ya kopema mpo na bangombe.Nyonso wana ekosalema mpo na bato na Ngai,oyo balukaka Ngai. 11 Kasi mpo na bino bato oyo bosundoli Yawempe bobosani ngomba na Ngai ya bule,bino oyo botandaka mesa mpo na Gadimpe botondisaka kopo ya vino mpo na Meni, 12 nakobongisa bino ete bokufa na mopanga,mpe bino nyonso bokofukama mpo ete bakata bino bakingo,pamba te nabengaki, kasi boyanolaki te ;nalobaki, kasi boyokaki te :bosalaki kaka makambo mabe na miso na Ngaimpe boponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. » 13 Mpo na yango, Nkolo Yawe alobi :« Bawumbu na Ngai bakolia,kasi bino bokozala na nzala ;bawumbu na Ngai bakomela,kasi bino bokotikala kaka na posa ya komela ;bawumbu na Ngai bakosepela,kasi bino bokoyoka soni ; 14 bawumbu na Ngai bakoyemba na esengo,esengo oyo ekowuta solo na mitema na bango,kasi bino bokoganga mpo na pasi ya mitema na binompe bokolelalela mpo na milimo na bino oyo ebukani. 15 Bokotika kombo na binoepai ya baponami na Ngai lokola lisuma ;Nkolo Yawe akoboma bino ;kasi epai ya baponami na Ye,akopesa kombo mosusu. 16 Moto nyonso oyo akobelela lipamboli kati na mokiliakosala bongo na Kombo ya Nzambe ya solo,mpe moto oyo akolapa ndayi kati na mokili,akolapa yango na Kombo ya Nzambe ya solo. Pamba te pasi ya kala ekomonana lisusu te,ekobombama na miso na Ngai. 17 Solo, nakokela likolo mpe mabele ya sika ;makambo ya liboso, bakokanisa yango lisusu te,ekomata ata lisusu na motema te. 18 Kasi bosepela mpe bozala tango nyonso na esengompo na misala oyo nakokela,pamba te nakokela Yelusalemi mpo ete ezala na esengo,mpe bato na yango basepela. 19 Bongo nakosepela mpo na Yelusalemimpe mpo na bato na Ngai ;makelele ya kolela mpe ya koganga ekoyokana lisusu kuna te. 20 Kuna, ekozala lisusu na mwana moke teoyo akokufa na bomwana na yeto ekozala lisusu na mobange te oyo akotonda te na mikolo ya bomoi na ye ;pamba te moto oyo akokufa elengeakozala na mibu nkama moko ya mbotama,mpe oyo akokokisa mibu wana te,akomonana lokola moto alakelami mabe. 21 Bakotonga bandakompe bakovanda kati na bandako yango,bakolona bilanga ya vinompe bakolia bambuma na yango. 22 Bakotonga bandako tempo ete bato mosusu bavanda kati na bandako yango,mpe bakolona bilanga tempo ete bato mosusu balia bambuma na yango ;pamba te mikolo ya mbotama ya bato na Ngai ekozalalokola mikolo ya nzete,mpe baponami na Ngai bakosepelana bambuma ya misala ya maboko na bango. 23 Bakosala mosala na pamba teto bakobota bana te mpo ete bakufa ;pamba te bakozala bato oyo bapambolama na Yawe,bango elongo na bana na bango. 24 Liboso ete babelela Ngai,nakoyanola bango ;mpe wana basilisi nanu koloba te,nakoyoka bango. 25 Mbwa ya zamba mpe mwana meme ekolia esika moko ;mpe nkosi ekolia matiti lokola ngombe,kasi bilei ya nyoka ekozala nde putulu.Bakoyoka lisusu pasi te,mpe bakobebisama lisusu tena ngomba na Ngai ya bule, »elobi Yawe.