Jeremiah 30 (BOLCB2)
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : 2 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Koma kati na buku makambo nyonso oyo nayebisaki yo. 3 Tango ezali koya, › elobi Yawe, ‹ tango oyo nakokangola bato na Ngai, Isalaele, mpe Yuda kati na bowumbu ; mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bango mpo ete bakamata yango, › elobi Yawe. » 4 Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele mpe Yuda : 5 « Tala liloba oyo Yawe alobi :‹ Koganga ya kobanga mpe ya somonde ezali koyokana ; kimia ezali lisusu te. 6 Botuna mpe botala :Boni, mobali akoki kobota bana ?Bongo mpo na nini nazali komonamoto nyonso ya makasi asimbi libumu na yelokola mwasi oyo azali na pasi ya kobotampe elongi na ye ekomi mawa-mawa ? 7 Mawa ! Ekozala penza mokolo ya somo !Mokolo moko te ekokokana na yango !Ekozala tango ya pasi mpo na Jakobi,kasi akobikisama na pasi yango. 8 Na mokolo wana, ›elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga,‹ nakobuka ekangiseli na bakingo na bango,nakokata basinga oyo bakangelaki bangompe bakozala lisusu te bawumbu ya bapaya. 9 Nzokande, bakosalela Yawe, Nzambe na bango,mpe Davidi, mokonzi oyo nakotiampo ete akamba bango. 10 Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te !Oh Isalaele, kozala na somo te, ›elobi Yawe.‹ Solo, nakobikisa yo wuta na mokili ya mosika,mpe bakitani na yo, wuta na mokili ya bowumbu !Jakobi akozwa lisusu kimia mpe bopemi,mpe moto moko te akobangisa ye lisusu. 11 Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, ›elobi Yawe.‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonsoepai wapi napanzaki bino ;kasi bino, nakobebisa bino nye te ;solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ;nakozanga te kopamela bino. › 12 Tala liloba oyo Yawe alobi :‹ Pota na yo ekobika tempe pasi na yo ekosila te. 13 Moto akolobela yo akozala te,kisi ezali te mpo na pota na yo,lobiko ezali te mpo na yo. 14 Baninga na yo nyonso babosani yo,bazali komitungisa lisusu te mpo na yo.Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka,napesaki yo penza etumbu na kanda makasi,pamba te ngambo na yo ezalaki monenempe masumu na yo eleki ebele. 15 Mpo na nini ozali koganga mpo na pota na yo,mpe pasi na yo ezali kosila te ?Nasali yo boye mpo ete ngambo na yo ezali monene,mpe masumu na yo eleki ebele. 16 Kasi bato nyonso oyo bakosala yo mabe,bakosala bango mpe mabe ;banguna na yo nyonso bakokende na bowumbu ;bato oyo babotolaki yo biloko,bakobotola bango mpe biloko ;bato oyo banyokolaki yo,bakonyokola mpe bango. 17 Nakozongisela yo bomengo na yompe nakobikisa bapota na yo, ›elobi Yawe.‹ Lokola bazalaki kobenga yo ekolo basundola,Siona oyo moto moko te ayokelaka mawa ; › 18 tala liloba oyo Yawe alobi :‹ Nakozongisa lisusu bomengokati na bandako ya kapo ya Jakobimpe nakoyokela bandako na ye mawa ;bakotonga lisusu engumba Siona oyo ebukana-bukanampe ndako ya mokonzi, na esika na yango ya kala. 19 Nzembo ya matondi mpe mingongo ya esengoekobima kati na bango.Nakokomisa bango ebele,mpe motango na bango ekokoma ebele ;nakopesa bango lokumu, mpe bakotiolama lisusu te. 20 Bana na bango ya mibali bakozalalokola na tango ya kala,mpe lingomba na bango ekowumela liboso na Ngai ;nakopesa etumbu na bato nyonsooyo bazali konyokola bango. 21 Mokonzi na bango akowuta kati na bango,mpe mokambi na bango akowuta kaka kati na bango ;nakobenda bango pene na Ngaimpe bakoya pene na Ngai,pamba te nani azali na nguya ya kopusana pene na Ngai ? ›elobi Yawe. 22 ‹ Boye, bokozala bato na Ngai,mpe Ngai nakozala Nzambe na bino. › » 23 Tala, mopepe ya Yawe etomboki,kanda makasi na Ye epeli,bakake ezali konguluma na likolo,mpe ezali kokweya na mito ya bato mabe. 24 Kanda makasi ya Yawe ekozonga tekino tango ekokokisa mabongisi ya motema na Ye.Bokososola yango penza na mikolo ekoya.
In Other Versions
Jeremiah 30 in the ANGEFD
Jeremiah 30 in the ANTPNG2D
Jeremiah 30 in the AS21
Jeremiah 30 in the BAGH
Jeremiah 30 in the BBPNG
Jeremiah 30 in the BBT1E
Jeremiah 30 in the BDS
Jeremiah 30 in the BEV
Jeremiah 30 in the BHAD
Jeremiah 30 in the BIB
Jeremiah 30 in the BLPT
Jeremiah 30 in the BNT
Jeremiah 30 in the BNTABOOT
Jeremiah 30 in the BNTLV
Jeremiah 30 in the BOATCB
Jeremiah 30 in the BOATCB2
Jeremiah 30 in the BOBCV
Jeremiah 30 in the BOCNT
Jeremiah 30 in the BOECS
Jeremiah 30 in the BOGWICC
Jeremiah 30 in the BOHCB
Jeremiah 30 in the BOHCV
Jeremiah 30 in the BOHLNT
Jeremiah 30 in the BOHNTLTAL
Jeremiah 30 in the BOICB
Jeremiah 30 in the BOILNTAP
Jeremiah 30 in the BOITCV
Jeremiah 30 in the BOKCV
Jeremiah 30 in the BOKCV2
Jeremiah 30 in the BOKHWOG
Jeremiah 30 in the BOKSSV
Jeremiah 30 in the BOLCB
Jeremiah 30 in the BOMCV
Jeremiah 30 in the BONAV
Jeremiah 30 in the BONCB
Jeremiah 30 in the BONLT
Jeremiah 30 in the BONUT2
Jeremiah 30 in the BOPLNT
Jeremiah 30 in the BOSCB
Jeremiah 30 in the BOSNC
Jeremiah 30 in the BOTLNT
Jeremiah 30 in the BOVCB
Jeremiah 30 in the BOYCB
Jeremiah 30 in the BPBB
Jeremiah 30 in the BPH
Jeremiah 30 in the BSB
Jeremiah 30 in the CCB
Jeremiah 30 in the CUV
Jeremiah 30 in the CUVS
Jeremiah 30 in the DBT
Jeremiah 30 in the DGDNT
Jeremiah 30 in the DHNT
Jeremiah 30 in the DNT
Jeremiah 30 in the ELBE
Jeremiah 30 in the EMTV
Jeremiah 30 in the ESV
Jeremiah 30 in the FBV
Jeremiah 30 in the FEB
Jeremiah 30 in the GGMNT
Jeremiah 30 in the GNT
Jeremiah 30 in the HARY
Jeremiah 30 in the HNT
Jeremiah 30 in the IRVA
Jeremiah 30 in the IRVB
Jeremiah 30 in the IRVG
Jeremiah 30 in the IRVH
Jeremiah 30 in the IRVK
Jeremiah 30 in the IRVM
Jeremiah 30 in the IRVM2
Jeremiah 30 in the IRVO
Jeremiah 30 in the IRVP
Jeremiah 30 in the IRVT
Jeremiah 30 in the IRVT2
Jeremiah 30 in the IRVU
Jeremiah 30 in the ISVN
Jeremiah 30 in the JSNT
Jeremiah 30 in the KAPI
Jeremiah 30 in the KBT1ETNIK
Jeremiah 30 in the KBV
Jeremiah 30 in the KJV
Jeremiah 30 in the KNFD
Jeremiah 30 in the LBA
Jeremiah 30 in the LBLA
Jeremiah 30 in the LNT
Jeremiah 30 in the LSV
Jeremiah 30 in the MAAL
Jeremiah 30 in the MBV
Jeremiah 30 in the MBV2
Jeremiah 30 in the MHNT
Jeremiah 30 in the MKNFD
Jeremiah 30 in the MNG
Jeremiah 30 in the MNT
Jeremiah 30 in the MNT2
Jeremiah 30 in the MRS1T
Jeremiah 30 in the NAA
Jeremiah 30 in the NASB
Jeremiah 30 in the NBLA
Jeremiah 30 in the NBS
Jeremiah 30 in the NBVTP
Jeremiah 30 in the NET2
Jeremiah 30 in the NIV11
Jeremiah 30 in the NNT
Jeremiah 30 in the NNT2
Jeremiah 30 in the NNT3
Jeremiah 30 in the PDDPT
Jeremiah 30 in the PFNT
Jeremiah 30 in the RMNT
Jeremiah 30 in the SBIAS
Jeremiah 30 in the SBIBS
Jeremiah 30 in the SBIBS2
Jeremiah 30 in the SBICS
Jeremiah 30 in the SBIDS
Jeremiah 30 in the SBIGS
Jeremiah 30 in the SBIHS
Jeremiah 30 in the SBIIS
Jeremiah 30 in the SBIIS2
Jeremiah 30 in the SBIIS3
Jeremiah 30 in the SBIKS
Jeremiah 30 in the SBIKS2
Jeremiah 30 in the SBIMS
Jeremiah 30 in the SBIOS
Jeremiah 30 in the SBIPS
Jeremiah 30 in the SBISS
Jeremiah 30 in the SBITS
Jeremiah 30 in the SBITS2
Jeremiah 30 in the SBITS3
Jeremiah 30 in the SBITS4
Jeremiah 30 in the SBIUS
Jeremiah 30 in the SBIVS
Jeremiah 30 in the SBT
Jeremiah 30 in the SBT1E
Jeremiah 30 in the SCHL
Jeremiah 30 in the SNT
Jeremiah 30 in the SUSU
Jeremiah 30 in the SUSU2
Jeremiah 30 in the SYNO
Jeremiah 30 in the TBIAOTANT
Jeremiah 30 in the TBT1E
Jeremiah 30 in the TBT1E2
Jeremiah 30 in the TFTIP
Jeremiah 30 in the TFTU
Jeremiah 30 in the TGNTATF3T
Jeremiah 30 in the THAI
Jeremiah 30 in the TNFD
Jeremiah 30 in the TNT
Jeremiah 30 in the TNTIK
Jeremiah 30 in the TNTIL
Jeremiah 30 in the TNTIN
Jeremiah 30 in the TNTIP
Jeremiah 30 in the TNTIZ
Jeremiah 30 in the TOMA
Jeremiah 30 in the TTENT
Jeremiah 30 in the UBG
Jeremiah 30 in the UGV
Jeremiah 30 in the UGV2
Jeremiah 30 in the UGV3
Jeremiah 30 in the VBL
Jeremiah 30 in the VDCC
Jeremiah 30 in the YALU
Jeremiah 30 in the YAPE
Jeremiah 30 in the YBVTP
Jeremiah 30 in the ZBP