John 11 (BOLCB2)

1 Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare ; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale : Mari mpe Marte. 2 Mari azali mwasi oyo asopelaki Nkolo malasi mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo ya Yesu, mpe Lazare oyo azali kobela azali ndeko na ye ya mobali. 3 Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu :— Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela. 4 Tango Yesu ayokaki yango, alobaki : — Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu. 5 Nzokande, Yesu azalaki kolinga makasi Marte, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazare. 6 Atako ayokaki ete Lazare azali kobela, kasi avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo azalaki. 7 Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Tosengeli sik’oyo kozonga na Yuda. 8 Bayekoli balobaki na Ye :— Moteyi, wuta mokolo oyo Bayuda balingaki koboma Yo na mabanga, eleki nanu mikolo mingi te ; bongo mpo na nini olingi lisusu kozonga kuna ? 9 Yesu azongisaki : — Boni, moyi ezalaka na bangonga zomi na mibale te ? Soki moto atamboli na moyi, akobeta mabaku te, pamba te azali komona pole ya mokili oyo. 10 Nzokande, soki moto atamboli na butu, akobeta penza mabaku, pamba te pole ezali te. 11 Sima na Ye koloba bongo, alobaki na bango lisusu : — Molingami na biso, Lazare, alali pongi ; kasi nazali kokende kolamusa ye. 12 Bayekoli balobaki na Yesu :— Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika na bokono na ye ! 13 Solo, Yesu alingaki koloba ete Lazare akufi, kasi bayekoli bakanisaki ete azali kolobela nde pongi oyo tolalaka. 14 Bongo Yesu alobaki na bango na polele : — Lazare akufi. 15 Mpe nazali na esengo makasi mpo na bino lokola bozalaki kuna te, pamba te likambo oyo ekosala ete kondima na bino elendisama. Kasi sik’oyo tokende epai na ye. 16 Na bongo, Toma, oyo bazalaki mpe kobenga « Lipasa, » alobaki na bayekoli mosusu :— Biso mpe, tokende mpo ete tokufa elongo na Yesu ! 17 Tango Yesu akomaki, ayokaki ete basilaki kokunda Lazare kati na kunda wuta mikolo minei. 18 Mpe lokola Betani ezalaki mosika ya Yelusalemi na bakilometele pene misato, 19 Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango. 20 Tango Marte ayokaki ete Yesu azali koya, akendeki kokutana na Ye ; kasi Mari atikalaki ya kovanda kati na ndako. 21 Marte alobaki na Yesu :— Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te ! 22 Kasi nazali na kondima ete, ata sik’oyo, Nzambe akopesa Yo nyonso oyo okosenga Ye. 23 Yesu alobaki na ye : — Ndeko na yo akosekwa. 24 Marte azongiselaki Yesu :— Nayebi solo ete akosekwa, na mokolo ya suka, na tango bakufi bakosekwa. 25 Yesu alobaki na ye : — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi. 26 Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango ? 27 Marte azongisaki :— Iyo, Nkolo ! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili. 28 Sima na Marte koloba bongo, akendeki kobenga Mari, ndeko na ye ; mpe wana abendaki ye pembeni, alobaki na ye na mongongo ya se penza :— Moteyi ayei, azali kobenga yo. 29 Tango kaka Mari ayokaki bongo, atelemaki na lombangu mpe akendeki epai ya Yesu. 30 Nzokande, Yesu akotaki nanu te na mboka ; azalaki kaka na esika oyo Marte akutanaki na Ye. 31 Tango Bayuda oyo bazalaki elongo na Mari kati na ndako mpo na kokabola mawa elongo na ye, bamonaki Mari kotelema na lombangu mpe kobima libanda, balandaki ye, pamba te bakanisaki ete akei kolela na kunda. 32 Tango kaka Mari akomaki na esika oyo Yesu azalaki mpe amonaki Ye, amibwakaki na makolo na Ye mpe alobaki :— Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te ! 33 Tango Yesu amonaki Mari mpe Bayuda oyo bayaki elongo na ye kolela, ayokaki mawa makasi mpe amitungisaki. 34 Atunaki bango : — Bokundaki ye wapi ?Bazongisaki :— Nkolo, yaka kotala. 35 Yesu alelaki. 36 Bongo Bayuda balobaki :— Tala ndenge nini alingaki ye ! 37 Kasi bamosusu kati na bango balobaki :— Ezali ye te oyo abikisaki mokufi miso ? Bongo ndenge nini akokaki te kosala ete Lazare akufa te ? 38 Lokola Yesu amitungisaki lisusu makasi, akendeki na kunda. Ezalaki kati na ebombamelo ya mabanga oyo, na ekotelo na yango, batiaki libanga moko ya monene. 39 Yesu alobaki na bango : — Botindika libanga.Kasi Marte, ndeko ya mowei, alobaki na Yesu :— Nkolo, azali kolumba solo ! Wuta bakundaki ye, esali mikolo minei. 40 Yesu alobaki na ye : — Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe ? 41 Boye batindikaki libanga. Bongo Yesu atombolaki miso na likolo mpe alobaki : « Tata, nazali kotonda Yo mpo ete oyoki Ngai. 42 Nayebaki ete oyokaka Ngai tango nyonso ; kasi soki nalobi bongo, ezali mpo ete bato oyo bazali zingazinga na Ngai bandima ete Yo nde otindaki Ngai. » 43 Sima na Yesu koloba bongo, agangaki : — Lazare, bima ! 44 Mpe mowei abimaki longwa na kunda ; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na basinga ya bitendi, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na elamba.Bongo Yesu alobaki na bato oyo bazalaki wana : — Bofungola ye basinga wana mpe botika ye kokende. 45 Kati na Bayuda oyo bayaki epai ya Mari, mingi kati na bango bandimaki Yesu tango bamonaki makambo oyo asalaki ; 46 kasi bamosusu bakendeki kokuta Bafarizeo mpo na koyebisa bango makambo yango, oyo Yesu asalaki. 47 Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo babengisaki Likita-Monene mpe batunanaki :— Tosala nini ? Moto oyo azali kosala bikamwa mingi. 48 Soki totiki ye kokoba kosala bongo, bato nyonso bakondima ye ; bongo bato ya Rome bakoya bakobebisa Tempelo na biso mpe ekolo na biso. 49 Moko kati na bango, Kayifa, oyo azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, alobaki na bango : 50 — Bozali kososola eloko moko te ; bozali mpe komona te ete ezali mpo na bolamu na bino soki moto moko akufi mpo na bato nyonso, mpo ete ekolo mobimba ebebisama te ? 51 Nzokande, makambo oyo azalaki koloba na bango ewutaki na makanisi na ye moko te ; kasi lokola azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, yango wana asakolaki ete Yesu asengelaki kokufa mpo na ekolo ya Bayuda. 52 Mpe asengelaki kokufa kaka mpo na ekolo yango te, kasi mpe mpo na kosangisa kati na libota moko, bana nyonso ya Nzambe, oyo bapalangana bipai na bipai. 53 Ezali na mokolo wana nde bazwaki mokano ya koboma Yesu. 54 Na bongo, Yesu atikaki komilakisa na polele kati na Bayuda ; alongwaki wana mpe akendeki na etuka oyo ezalaki pene ya esobe, kati na engumba moko na kombo Efrayimi ; mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye. 55 Kasi lokola feti ya Pasika ya Bayuda ekomaki pene, bato mingi ya mboka bakendeki na Yelusalemi mpo na komipetola liboso ya feti yango. 56 Bazalaki koluka Yesu mpe kotunana bango na bango kati na lopango ya Tempelo :— Bokanisi nini ? Akoya penza na feti ? 57 Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basilaki kopesa mitindo ete moto nyonso oyo akoyeba esika oyo Yesu azali, ayebisa bango mpo ete bakanga ye.

In Other Versions

John 11 in the ANGEFD

John 11 in the ANTPNG2D

John 11 in the AS21

John 11 in the BAGH

John 11 in the BBPNG

John 11 in the BBT1E

John 11 in the BDS

John 11 in the BEV

John 11 in the BHAD

John 11 in the BIB

John 11 in the BLPT

John 11 in the BNT

John 11 in the BNTABOOT

John 11 in the BNTLV

John 11 in the BOATCB

John 11 in the BOATCB2

John 11 in the BOBCV

John 11 in the BOCNT

John 11 in the BOECS

John 11 in the BOGWICC

John 11 in the BOHCB

John 11 in the BOHCV

John 11 in the BOHLNT

John 11 in the BOHNTLTAL

John 11 in the BOICB

John 11 in the BOILNTAP

John 11 in the BOITCV

John 11 in the BOKCV

John 11 in the BOKCV2

John 11 in the BOKHWOG

John 11 in the BOKSSV

John 11 in the BOLCB

John 11 in the BOMCV

John 11 in the BONAV

John 11 in the BONCB

John 11 in the BONLT

John 11 in the BONUT2

John 11 in the BOPLNT

John 11 in the BOSCB

John 11 in the BOSNC

John 11 in the BOTLNT

John 11 in the BOVCB

John 11 in the BOYCB

John 11 in the BPBB

John 11 in the BPH

John 11 in the BSB

John 11 in the CCB

John 11 in the CUV

John 11 in the CUVS

John 11 in the DBT

John 11 in the DGDNT

John 11 in the DHNT

John 11 in the DNT

John 11 in the ELBE

John 11 in the EMTV

John 11 in the ESV

John 11 in the FBV

John 11 in the FEB

John 11 in the GGMNT

John 11 in the GNT

John 11 in the HARY

John 11 in the HNT

John 11 in the IRVA

John 11 in the IRVB

John 11 in the IRVG

John 11 in the IRVH

John 11 in the IRVK

John 11 in the IRVM

John 11 in the IRVM2

John 11 in the IRVO

John 11 in the IRVP

John 11 in the IRVT

John 11 in the IRVT2

John 11 in the IRVU

John 11 in the ISVN

John 11 in the JSNT

John 11 in the KAPI

John 11 in the KBT1ETNIK

John 11 in the KBV

John 11 in the KJV

John 11 in the KNFD

John 11 in the LBA

John 11 in the LBLA

John 11 in the LNT

John 11 in the LSV

John 11 in the MAAL

John 11 in the MBV

John 11 in the MBV2

John 11 in the MHNT

John 11 in the MKNFD

John 11 in the MNG

John 11 in the MNT

John 11 in the MNT2

John 11 in the MRS1T

John 11 in the NAA

John 11 in the NASB

John 11 in the NBLA

John 11 in the NBS

John 11 in the NBVTP

John 11 in the NET2

John 11 in the NIV11

John 11 in the NNT

John 11 in the NNT2

John 11 in the NNT3

John 11 in the PDDPT

John 11 in the PFNT

John 11 in the RMNT

John 11 in the SBIAS

John 11 in the SBIBS

John 11 in the SBIBS2

John 11 in the SBICS

John 11 in the SBIDS

John 11 in the SBIGS

John 11 in the SBIHS

John 11 in the SBIIS

John 11 in the SBIIS2

John 11 in the SBIIS3

John 11 in the SBIKS

John 11 in the SBIKS2

John 11 in the SBIMS

John 11 in the SBIOS

John 11 in the SBIPS

John 11 in the SBISS

John 11 in the SBITS

John 11 in the SBITS2

John 11 in the SBITS3

John 11 in the SBITS4

John 11 in the SBIUS

John 11 in the SBIVS

John 11 in the SBT

John 11 in the SBT1E

John 11 in the SCHL

John 11 in the SNT

John 11 in the SUSU

John 11 in the SUSU2

John 11 in the SYNO

John 11 in the TBIAOTANT

John 11 in the TBT1E

John 11 in the TBT1E2

John 11 in the TFTIP

John 11 in the TFTU

John 11 in the TGNTATF3T

John 11 in the THAI

John 11 in the TNFD

John 11 in the TNT

John 11 in the TNTIK

John 11 in the TNTIL

John 11 in the TNTIN

John 11 in the TNTIP

John 11 in the TNTIZ

John 11 in the TOMA

John 11 in the TTENT

John 11 in the UBG

John 11 in the UGV

John 11 in the UGV2

John 11 in the UGV3

John 11 in the VBL

John 11 in the VDCC

John 11 in the YALU

John 11 in the YAPE

John 11 in the YBVTP

John 11 in the ZBP