John 19 (BOLCB2)

1 Bongo Pilato apesaki mitindo ete bakamata Yesu, mpe abetisaki Ye fimbu. 2 Basoda basalaki ekoti na banzube mpe balatisaki Ye yango na moto ; balatisaki Ye lisusu nzambala ya motane. 3 Bazalaki koya koloba na Ye : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! » Mpe babandaki kobeta Ye bambata. 4 Pilato abimaki lisusu mpe alobaki na bango :— Botala ! Nayei na Ye na libanda epai na bino mpo boyeba ete ngai nazwi Ye na mabe moko te. 5 Boye, Yesu abimaki alata ekoti ya nzube mpe nzambala ya motane. Pilato alobaki na bango :— Moto yango, ye oyo ! 6 Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga :— Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu !Kasi Pilato azongisaki :— Bino moko, bokamata ye mpe bobaka ye na ekulusu ; ngai nazwi ye na mabe ata moko te. 7 Bayuda balobaki na molende nyonso :— Tozali na Mobeko ; mpe kolanda Mobeko na biso, asengeli kokufa, pamba te amikomisi Mwana na Nzambe. 8 Tango Pilato ayokaki maloba wana, abangaki lisusu makasi. 9 Azongaki lisusu kati na ndako ya moyangeli mpe alobaki na Yesu :— Ozali moto ya mboka nini ?Kasi Yesu apesaki ye eyano te. 10 Pilato alobaki na Ye :— Boni, oboyi kozongisela ngai eyano ? Oyebi te ete ngai nazali na makoki ya kobaka yo na ekulusu mpe ya kotika yo ? 11 Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka. 12 Kobanda kaka na ngonga wana, Pilato akomaki koluka nzela ya kotika Yesu ; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga :— Soki otiki ye, wana ozali na yo moninga ya Sezare te ! Pamba te moto nyonso oyo amikomisi mokonzi azali monguna ya Sezare. 13 Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu na libanda mpe avandaki na esambiselo, na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gabata. » 14 Ezalaki mokolo ya suka mpo na kokoma na mokolo ya Pasika, na ngonga ya midi. Pilato alobaki na Bayuda :— Botala mokonzi na bino ! 15 Kasi babandaki koganga :— Boma ye ! Boma ye ! Baka ye na ekulusu !Pilato alobaki na bango lisusu :— Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu ?Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki :— Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te ! 16 Pilato akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. Boye, bakamataki Yesu mpe bakendeki na Ye. 17 Yesu amemaki, Ye moko, ekulusu na Ye ; abimaki na engumba mpe akendeki na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gologota. » 18 Ezalaki na esika yango nde babakaki Yesu na ekulusu, elongo na bato mosusu mibale : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. 19 Pilato akomaki na libaya, makomi oyo atiaki na ekulusu ; akomaki :Yesu, moto ya Nazareti, Mokonzi ya Bayuda. 20 Lokola esika oyo babakaki Yesu na ekulusu ezalaki pene ya engumba, Bayuda ebele batangaki makomi yango, pamba te bakomaki yango na lokota ya Ebre, lokota ya latino mpe lokota ya Greki. 21 Bakonzi ya Banganga-Nzambe balobaki na Pilato :— Osengelaki te kokoma : « Mokonzi ya Bayuda ; » osengelaki nde kokoma : « Moto oyo alobaki : ‹ Nazali mokonzi ya Bayuda. › » 22 Kasi Pilato azongisaki :— Makambo oyo nakomi ekotikala kaka ndenge wana. 23 Sima na basoda kobaka Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na Ye mpe bakabolaki yango na biteni minei : soda moko na moko azwaki eteni moko. Bakamataki mpe nzambala na Ye, oyo ezalaki ya kotongama te, kasi ezalaki kaka elamba moko, kobanda na likolo kino na se. 24 Basoda balobanaki bango na bango :— Topasola yango te, kasi tobeta zeke mpo na koyeba soki nani akozwa yango.Esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama :« Bakabolaki bilamba na ngai kati na bangompe babetaki zeke mpo na nzambala na ngai. »Ezali makambo wana nde basoda basalaki. 25 Tala bato oyo batelemaki pene ya ekulusu ya Yesu : Mama na Ye, ndeko mwasi ya mama na Ye, Mari oyo azalaki mwasi ya Klopasi, mpe Mari ya mboka Magidala. 26 Tango Yesu amonaki ete moyekoli oyo azalaki kolinga atelemi pembeni ya mama na Ye, alobaki na mama na Ye : — Mwasi, tala mwana na yo ! 27 Mpe alobaki na moyekoli yango : — Tala mama na yo !Boye, kobanda na tango wana, moyekoli yango azwaki mama ya Yesu mpo ete akoma kovanda na ndako na ye. 28 Sima na yango, wana Yesu asosolaki ete makambo nyonso esili kosalema, abimisaki maloba oyo mpo ete Makomi ekokisama : — Nayoki posa ya mayi. 29 Lokola ezalaki na mbeki moko etonda na vino ya ngayi pembeni ya esika yango, batiaki, na songe ya nzete moko ya izope, eponze moko epola na vino yango ya ngayi mpe batombolaki yango kino na monoko ya Yesu. 30 Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki : — Nyonso ekokisami.Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye. 31 Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, mpe lokola Saba yango ezalaki na tina makasi, Bayuda balingaki te ete bibembe etikala na ba-ekulusu na tango ya Saba. Boye, bakendeki kosenga epai ya Pilato ete apesa mitindo ya kobuka makolo ya bibembe oyo ezalaki na likolo ya ba-ekulusu mpe ya kolongola banzoto na bango. 32 Basoda bayaki mpe babukaki makolo ya mibali nyonso mibale oyo babakaki na ba-ekulusu elongo na Yesu ; babandaki na moko, bongo balekaki na oyo mosusu. 33 Wana ekomaki ngala ya makolo ya Yesu, bamonaki ete Yesu amikufelaki ; mpe babukaki lisusu te makolo na Ye. 34 Moko kati na basoda atobolaki mopanzi ya Yesu na nzela ya likonga ; mpe mbala moko, makila mpe mayi ebimaki na mopanzi yango. 35 Moto oyo azali kopesa litatoli na tina na makambo oyo amonaki yango kosalema na miso na ye, mpe litatoli na ye ezali ya solo ; ayebi penza ete azali koloba solo mpo ete bino mpe bondima. 36 Makambo nyonso wana esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama : « Bakobuka ata mokuwa na Ye moko te. » 37 Eteni mosusu ya Makomi elobi : « Bakotala Ye oyo batobolaki mopanzi. » 38 Sima na makambo wana, Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moyekoli ya Yesu, kasi na nkuku mpo ete azalaki kobanga Bayuda, asengaki epai ya Pilato ndingisa ya kokitisa nzoto ya Yesu longwa na ekulusu. Pilato apesaki ye ndingisa yango, mpe Jozefi akendeki mpe akitisaki nzoto ya Yesu. 39 Nikodemi oyo, na ebandeli, akendeki kotala Yesu na butu, ye mpe ayaki ; amemaki bakilo pene tuku misato ya mafuta ya mire basangisa na aloe. 40 Bango mibale bakamataki nzoto ya Yesu mpe balingaki yango na maputa ya lino oyo, kati na yango, batiaki mafuta ya solo kitoko, ndenge ezalaki momesano ya Bayuda mpo na kokunda bibembe. 41 Pene ya esika oyo babakaki Yesu na ekulusu, ezalaki na elanga moko oyo, kati na yango, ezalaki na kunda moko ya sika epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te. 42 Lokola, mpo na Bayuda, ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, batiaki Yesu kati na kunda yango, pamba te ezalaki pene.

In Other Versions

John 19 in the ANGEFD

John 19 in the ANTPNG2D

John 19 in the AS21

John 19 in the BAGH

John 19 in the BBPNG

John 19 in the BBT1E

John 19 in the BDS

John 19 in the BEV

John 19 in the BHAD

John 19 in the BIB

John 19 in the BLPT

John 19 in the BNT

John 19 in the BNTABOOT

John 19 in the BNTLV

John 19 in the BOATCB

John 19 in the BOATCB2

John 19 in the BOBCV

John 19 in the BOCNT

John 19 in the BOECS

John 19 in the BOGWICC

John 19 in the BOHCB

John 19 in the BOHCV

John 19 in the BOHLNT

John 19 in the BOHNTLTAL

John 19 in the BOICB

John 19 in the BOILNTAP

John 19 in the BOITCV

John 19 in the BOKCV

John 19 in the BOKCV2

John 19 in the BOKHWOG

John 19 in the BOKSSV

John 19 in the BOLCB

John 19 in the BOMCV

John 19 in the BONAV

John 19 in the BONCB

John 19 in the BONLT

John 19 in the BONUT2

John 19 in the BOPLNT

John 19 in the BOSCB

John 19 in the BOSNC

John 19 in the BOTLNT

John 19 in the BOVCB

John 19 in the BOYCB

John 19 in the BPBB

John 19 in the BPH

John 19 in the BSB

John 19 in the CCB

John 19 in the CUV

John 19 in the CUVS

John 19 in the DBT

John 19 in the DGDNT

John 19 in the DHNT

John 19 in the DNT

John 19 in the ELBE

John 19 in the EMTV

John 19 in the ESV

John 19 in the FBV

John 19 in the FEB

John 19 in the GGMNT

John 19 in the GNT

John 19 in the HARY

John 19 in the HNT

John 19 in the IRVA

John 19 in the IRVB

John 19 in the IRVG

John 19 in the IRVH

John 19 in the IRVK

John 19 in the IRVM

John 19 in the IRVM2

John 19 in the IRVO

John 19 in the IRVP

John 19 in the IRVT

John 19 in the IRVT2

John 19 in the IRVU

John 19 in the ISVN

John 19 in the JSNT

John 19 in the KAPI

John 19 in the KBT1ETNIK

John 19 in the KBV

John 19 in the KJV

John 19 in the KNFD

John 19 in the LBA

John 19 in the LBLA

John 19 in the LNT

John 19 in the LSV

John 19 in the MAAL

John 19 in the MBV

John 19 in the MBV2

John 19 in the MHNT

John 19 in the MKNFD

John 19 in the MNG

John 19 in the MNT

John 19 in the MNT2

John 19 in the MRS1T

John 19 in the NAA

John 19 in the NASB

John 19 in the NBLA

John 19 in the NBS

John 19 in the NBVTP

John 19 in the NET2

John 19 in the NIV11

John 19 in the NNT

John 19 in the NNT2

John 19 in the NNT3

John 19 in the PDDPT

John 19 in the PFNT

John 19 in the RMNT

John 19 in the SBIAS

John 19 in the SBIBS

John 19 in the SBIBS2

John 19 in the SBICS

John 19 in the SBIDS

John 19 in the SBIGS

John 19 in the SBIHS

John 19 in the SBIIS

John 19 in the SBIIS2

John 19 in the SBIIS3

John 19 in the SBIKS

John 19 in the SBIKS2

John 19 in the SBIMS

John 19 in the SBIOS

John 19 in the SBIPS

John 19 in the SBISS

John 19 in the SBITS

John 19 in the SBITS2

John 19 in the SBITS3

John 19 in the SBITS4

John 19 in the SBIUS

John 19 in the SBIVS

John 19 in the SBT

John 19 in the SBT1E

John 19 in the SCHL

John 19 in the SNT

John 19 in the SUSU

John 19 in the SUSU2

John 19 in the SYNO

John 19 in the TBIAOTANT

John 19 in the TBT1E

John 19 in the TBT1E2

John 19 in the TFTIP

John 19 in the TFTU

John 19 in the TGNTATF3T

John 19 in the THAI

John 19 in the TNFD

John 19 in the TNT

John 19 in the TNTIK

John 19 in the TNTIL

John 19 in the TNTIN

John 19 in the TNTIP

John 19 in the TNTIZ

John 19 in the TOMA

John 19 in the TTENT

John 19 in the UBG

John 19 in the UGV

John 19 in the UGV2

John 19 in the UGV3

John 19 in the VBL

John 19 in the VDCC

John 19 in the YALU

John 19 in the YAPE

John 19 in the YBVTP

John 19 in the ZBP