Job 6 (BOLCB2)

1 Yobo azongisaki : 2 « Ah ! Soki ezalaki na makoki ya komekakilo ya mawa na ngai,mpe ya kotia pasi na ngai nyonso na emekelo kilo, 3 nakanisi ete elingaki koleka zelo ya bibale minene na kilo.Yango wana, maloba na ngai ezali koleka ndelo. 4 Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai,mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ;Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye. 5 Boni, ane ya zamba elelakasoki ezali kolia matiti ?Ngombe ya mobali elelakasoki ezali kolia bilei na yango ? 6 Boni, baliaka na mungwa te bilei oyo ezanga elengi ?Mayi oyo ezalaka kati na maki ezalaka elengi ? 7 Makambo oyo nazalaki koboya,yango nde ekomi bilei na ngai, atako ezali mabe. 8 Ah ! Nani akoki kosala etebosenga na ngai ekokisama,mpe ete Nzambe akokisela ngailikambo oyo nazali kozela ! 9 Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai,asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto ! 10 Na boye nde nakoki kozwa kobondisama mpe esengokati na pasi na ngai, oyo eleki ndelo,pamba te nawangani te maloba ya Ye oyo azali Mosantu. 11 Makasi nini penza nazali na yangompo ete nazala lisusu na elikya ?Mpo na nini nawumela lisusu kotalasuka ya bomoi na ngai ? 12 Boni, nazali makasi lokola libanga ?Nzoto na ngai ezali ya ebende ? 13 Nazali na nguya ya komisungaawa natikali lisusu na makoki te ? 14 Moto nyonso oyo azali na pasiasengeli na mawa ya baninga na ye,ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. 15 Kasi tala, bandeko na ngai bakosi ngai lokola moluka,lokola mayi ya moluka oyo ekawuki. 16 Tango mayi oyo ekomaka libanga mpo na malili,mpe mvula ya pembe, epanzanaka,ememaka mpela. 17 Kasi na tango ya molunge, mayi yango esilaka,mpe moluka yango ekawukaka nyonsompo na molunge makasi. 18 Masanga ya bato oyo batambolaka na bampundampo na kokende na mobembo,ebongoli nzela ya kokende,ekeyi kokota kino kati na esobe mpe ekufi kuna. 19 Masanga ya bato ya Tema, oyo ezali na mobembo,elukaki mayi ;masanga ya bato ya Saba, oyo ezali na mobembo,etielaki yango motema. 20 Kasi bayokaki soni mpo ete batielaki yango motema ;tango bakomaki kuna, bamiyokelaki mawa. 21 Bino mpe bozali ndenge wana mpo na ngai,bozali na makoki te ya kosunga ngai ;awa bomoni pasi na ngai, somo ekangi bino ! 22 Boni, nasila koloba na bino :‹ Bokabela ngai ndambo ya biloko na binoto bofutela ngai niongo na nzela ya bozwi na bino, 23 mpo na kokangola ngai na loboko ya mongunato mpo na kobikisa ngai na nguya ya bato mabe ? › 24 Boteya ngai, bongo nakokanga monoko ;bolakisa ngai mabe nini ngai nasali ! 25 Tala ndenge maloba ya solo esalaka pasi !Kasi makanisi na bino elingi kotalisa nini ? 26 Bokanisi ete bokoki kosembolamakambo oyo nazali kolobato kozwa lokola mopepe, maloba ya moto oyo azali na pasi ? 27 Solo, bino, bokoki ata kobeta zeke mpo na mwana etikempe koteka moninga na bino na bowumbu ! 28 Kasi sik’oyo, bozala na mitema malamu mpo na kotala ngai !Boni, nakoki penza kokosa bino,kaka na miso makasi boye ? 29 Bokanisa nanu malamu, bozala nanu sembo !Bokanisa penza malamu,pamba te ezali bosembo na ngai nde emekami. 30 Boni, likambo nini ya mabe ezali na monoko na ngai ;monoko na ngai ekoki kososola mabe te ?

In Other Versions

Job 6 in the ANGEFD

Job 6 in the ANTPNG2D

Job 6 in the AS21

Job 6 in the BAGH

Job 6 in the BBPNG

Job 6 in the BBT1E

Job 6 in the BDS

Job 6 in the BEV

Job 6 in the BHAD

Job 6 in the BIB

Job 6 in the BLPT

Job 6 in the BNT

Job 6 in the BNTABOOT

Job 6 in the BNTLV

Job 6 in the BOATCB

Job 6 in the BOATCB2

Job 6 in the BOBCV

Job 6 in the BOCNT

Job 6 in the BOECS

Job 6 in the BOGWICC

Job 6 in the BOHCB

Job 6 in the BOHCV

Job 6 in the BOHLNT

Job 6 in the BOHNTLTAL

Job 6 in the BOICB

Job 6 in the BOILNTAP

Job 6 in the BOITCV

Job 6 in the BOKCV

Job 6 in the BOKCV2

Job 6 in the BOKHWOG

Job 6 in the BOKSSV

Job 6 in the BOLCB

Job 6 in the BOMCV

Job 6 in the BONAV

Job 6 in the BONCB

Job 6 in the BONLT

Job 6 in the BONUT2

Job 6 in the BOPLNT

Job 6 in the BOSCB

Job 6 in the BOSNC

Job 6 in the BOTLNT

Job 6 in the BOVCB

Job 6 in the BOYCB

Job 6 in the BPBB

Job 6 in the BPH

Job 6 in the BSB

Job 6 in the CCB

Job 6 in the CUV

Job 6 in the CUVS

Job 6 in the DBT

Job 6 in the DGDNT

Job 6 in the DHNT

Job 6 in the DNT

Job 6 in the ELBE

Job 6 in the EMTV

Job 6 in the ESV

Job 6 in the FBV

Job 6 in the FEB

Job 6 in the GGMNT

Job 6 in the GNT

Job 6 in the HARY

Job 6 in the HNT

Job 6 in the IRVA

Job 6 in the IRVB

Job 6 in the IRVG

Job 6 in the IRVH

Job 6 in the IRVK

Job 6 in the IRVM

Job 6 in the IRVM2

Job 6 in the IRVO

Job 6 in the IRVP

Job 6 in the IRVT

Job 6 in the IRVT2

Job 6 in the IRVU

Job 6 in the ISVN

Job 6 in the JSNT

Job 6 in the KAPI

Job 6 in the KBT1ETNIK

Job 6 in the KBV

Job 6 in the KJV

Job 6 in the KNFD

Job 6 in the LBA

Job 6 in the LBLA

Job 6 in the LNT

Job 6 in the LSV

Job 6 in the MAAL

Job 6 in the MBV

Job 6 in the MBV2

Job 6 in the MHNT

Job 6 in the MKNFD

Job 6 in the MNG

Job 6 in the MNT

Job 6 in the MNT2

Job 6 in the MRS1T

Job 6 in the NAA

Job 6 in the NASB

Job 6 in the NBLA

Job 6 in the NBS

Job 6 in the NBVTP

Job 6 in the NET2

Job 6 in the NIV11

Job 6 in the NNT

Job 6 in the NNT2

Job 6 in the NNT3

Job 6 in the PDDPT

Job 6 in the PFNT

Job 6 in the RMNT

Job 6 in the SBIAS

Job 6 in the SBIBS

Job 6 in the SBIBS2

Job 6 in the SBICS

Job 6 in the SBIDS

Job 6 in the SBIGS

Job 6 in the SBIHS

Job 6 in the SBIIS

Job 6 in the SBIIS2

Job 6 in the SBIIS3

Job 6 in the SBIKS

Job 6 in the SBIKS2

Job 6 in the SBIMS

Job 6 in the SBIOS

Job 6 in the SBIPS

Job 6 in the SBISS

Job 6 in the SBITS

Job 6 in the SBITS2

Job 6 in the SBITS3

Job 6 in the SBITS4

Job 6 in the SBIUS

Job 6 in the SBIVS

Job 6 in the SBT

Job 6 in the SBT1E

Job 6 in the SCHL

Job 6 in the SNT

Job 6 in the SUSU

Job 6 in the SUSU2

Job 6 in the SYNO

Job 6 in the TBIAOTANT

Job 6 in the TBT1E

Job 6 in the TBT1E2

Job 6 in the TFTIP

Job 6 in the TFTU

Job 6 in the TGNTATF3T

Job 6 in the THAI

Job 6 in the TNFD

Job 6 in the TNT

Job 6 in the TNTIK

Job 6 in the TNTIL

Job 6 in the TNTIN

Job 6 in the TNTIP

Job 6 in the TNTIZ

Job 6 in the TOMA

Job 6 in the TTENT

Job 6 in the UBG

Job 6 in the UGV

Job 6 in the UGV2

Job 6 in the UGV3

Job 6 in the VBL

Job 6 in the VDCC

Job 6 in the YALU

Job 6 in the YAPE

Job 6 in the YBVTP

Job 6 in the ZBP