Lamentations 4 (BOLCB2)

1 Ndenge nini wolo ebungisi kongenga na yango,wolo ya peto enzuluki !Mabanga ya talo oyo ya bule epanzanina basonge ya babalabala nyonso. 2 Ndenge nini bana mibali ya motuya ya Siona,oyo, na kala, bazalaki kozwa bango lokola wolo ya peto,kasi bakomi lelo komona bango lokola mbeki ya mabele,oyo mosali mbeki basili kosala ! 3 Ata mbwa ya zamba ezalaka na posaya komelisa bana na yango mabele ;kasi bato na ngai bakomi mitema makasilokola maligbanga kati na esobe. 4 Likolo ya nzala, lolemo ya mwana ekangamina likolo ya kati ya monoko na ye ;bana mike bazali kosenga bileikasi moto moko te azali kopesa bango yango. 5 Bato oyo na kala bazalaki kolia bilei ya kitokobakomi kokufakufa na babalabala ;ba-oyo bakolaki na molato ya motanebakomi sik’oyo kolalela matiti ya kopola. 6 Lisumu oyo bato na ngai basaliezali monene koleka lisumu ya Sodome,engumba oyo ebebisamaki na mbala mokowana moto moko te asembolaki loboko na yempo na kotelemela yango. 7 Bana ya bakonzi na bango bazalakikongala koleka mvula ya pembe,pembe koleka miliki ;banzoto na bango ezalaki motanekoleka langi ya motane penza,mpe lolenge na bango ezalakilokola libanga na safiri. 8 Bilongi na bango ekomi mwindo koleka makala,bazali koyeba bango lisusu te na babalabala ;poso na bango ya nzoto ekangami na mikuwa,ekawuki lokola koni. 9 Bato oyo bakufi na mopanga bazali malamukoleka ba-oyo bakufi na nzala :banzulukaka mpe bakondaka makasi mpo na nzala,mpo na kozanga bilei kowuta na bilanga. 10 Basi ya mitema malamu balambi,na maboko na bango, bana na bango moko ;bana na bango bakomi bilei na bangokati na pasi oyo ekomeli bato na ngai. 11 Yawe asilikaki makasi koleka ;asopaki kanda na Yempe apelisaki moto kati na Siona,moto oyo ezikisaki miboko na yango. 12 Bakonzi ya mabele mpe bikolo mosusu ya mokilibandimaki te ete banguna mpe bayinibakokaki kokota na bikuke ya Yelusalemi. 13 Kasi makambo wana esalemakimpo na masumu ya basakoli ya Yelusalemimpe mabe ya Banganga-Nzambe na yango,oyo basopaki kati na yango makila ya bato ya sembo. 14 Bakomaki sik’oyo koyengayengana babalabala lokola bakufi miso,bakomaki mbindo na makilampe moto moko te akokaki kosimba bilamba na bango. 15 Bato bazali koganga mpe koloba na bango :« Bolongwa awa, bato ya mbindo !Bolongwa awa, bolongwa awa, bosimba biso te ! »Wana bazalaki kokima mpe kotelengana,bato ya bikolo mosusu bazalaki koloba :« Bavanda na esika oyo te ! » 16 Yawe, Ye moko, apanzi bango,azali kotala bango lisusu te.Bapesaki Banganga-Nzambe lokumu tempe bayokelaki mibange mawa te. 17 Miso na biso elembaki lisusumpo na kozela na pamba lisungi ;wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika,tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungikowuta na ekolo songolo mpe pakala,kasi ebikisaki biso te. 18 Banguna na biso bazalaki kolanda matambe na biso ;boye tokokaki lisusu te kotambola na babalabala na biso.Suka na biso ekomaki pene,mikolo na biso ekomaki ya kotanga,mpo ete tokomaki na suka. 19 Bato oyo bazalaki kolanda bisobazalaki mbangu koleka mpongo, na likolo ;bazalaki kolanda biso na likolo ya bangombampe kotiela biso mitambo kati na esobe. 20 Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motemaakangami na mitambo na bango ;nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye :« Tokobika bomoi malamuna se ya bobatelami na yekati na bikolo. » 21 Edomi, mboka kitoko,movandi ya mokili ya Utsi,sepela, zala na esengo !Kasi yo mpe, bakopesa yo kopo ;okomela, okolangwa mpe okotikala bolumbu. 22 Siona, mboka kitoko, etumbu na yo ekosila ;Nzambe akomema yo lisusu na bowumbu te.Kasi yo Edomi, mboka kitoko,Nzambe akopesa yo etumbu mpo na mabe na yo,mpe akobimisa masumu na yo na polele.

In Other Versions

Lamentations 4 in the ANGEFD

Lamentations 4 in the ANTPNG2D

Lamentations 4 in the AS21

Lamentations 4 in the BAGH

Lamentations 4 in the BBPNG

Lamentations 4 in the BBT1E

Lamentations 4 in the BDS

Lamentations 4 in the BEV

Lamentations 4 in the BHAD

Lamentations 4 in the BIB

Lamentations 4 in the BLPT

Lamentations 4 in the BNT

Lamentations 4 in the BNTABOOT

Lamentations 4 in the BNTLV

Lamentations 4 in the BOATCB

Lamentations 4 in the BOATCB2

Lamentations 4 in the BOBCV

Lamentations 4 in the BOCNT

Lamentations 4 in the BOECS

Lamentations 4 in the BOGWICC

Lamentations 4 in the BOHCB

Lamentations 4 in the BOHCV

Lamentations 4 in the BOHLNT

Lamentations 4 in the BOHNTLTAL

Lamentations 4 in the BOICB

Lamentations 4 in the BOILNTAP

Lamentations 4 in the BOITCV

Lamentations 4 in the BOKCV

Lamentations 4 in the BOKCV2

Lamentations 4 in the BOKHWOG

Lamentations 4 in the BOKSSV

Lamentations 4 in the BOLCB

Lamentations 4 in the BOMCV

Lamentations 4 in the BONAV

Lamentations 4 in the BONCB

Lamentations 4 in the BONLT

Lamentations 4 in the BONUT2

Lamentations 4 in the BOPLNT

Lamentations 4 in the BOSCB

Lamentations 4 in the BOSNC

Lamentations 4 in the BOTLNT

Lamentations 4 in the BOVCB

Lamentations 4 in the BOYCB

Lamentations 4 in the BPBB

Lamentations 4 in the BPH

Lamentations 4 in the BSB

Lamentations 4 in the CCB

Lamentations 4 in the CUV

Lamentations 4 in the CUVS

Lamentations 4 in the DBT

Lamentations 4 in the DGDNT

Lamentations 4 in the DHNT

Lamentations 4 in the DNT

Lamentations 4 in the ELBE

Lamentations 4 in the EMTV

Lamentations 4 in the ESV

Lamentations 4 in the FBV

Lamentations 4 in the FEB

Lamentations 4 in the GGMNT

Lamentations 4 in the GNT

Lamentations 4 in the HARY

Lamentations 4 in the HNT

Lamentations 4 in the IRVA

Lamentations 4 in the IRVB

Lamentations 4 in the IRVG

Lamentations 4 in the IRVH

Lamentations 4 in the IRVK

Lamentations 4 in the IRVM

Lamentations 4 in the IRVM2

Lamentations 4 in the IRVO

Lamentations 4 in the IRVP

Lamentations 4 in the IRVT

Lamentations 4 in the IRVT2

Lamentations 4 in the IRVU

Lamentations 4 in the ISVN

Lamentations 4 in the JSNT

Lamentations 4 in the KAPI

Lamentations 4 in the KBT1ETNIK

Lamentations 4 in the KBV

Lamentations 4 in the KJV

Lamentations 4 in the KNFD

Lamentations 4 in the LBA

Lamentations 4 in the LBLA

Lamentations 4 in the LNT

Lamentations 4 in the LSV

Lamentations 4 in the MAAL

Lamentations 4 in the MBV

Lamentations 4 in the MBV2

Lamentations 4 in the MHNT

Lamentations 4 in the MKNFD

Lamentations 4 in the MNG

Lamentations 4 in the MNT

Lamentations 4 in the MNT2

Lamentations 4 in the MRS1T

Lamentations 4 in the NAA

Lamentations 4 in the NASB

Lamentations 4 in the NBLA

Lamentations 4 in the NBS

Lamentations 4 in the NBVTP

Lamentations 4 in the NET2

Lamentations 4 in the NIV11

Lamentations 4 in the NNT

Lamentations 4 in the NNT2

Lamentations 4 in the NNT3

Lamentations 4 in the PDDPT

Lamentations 4 in the PFNT

Lamentations 4 in the RMNT

Lamentations 4 in the SBIAS

Lamentations 4 in the SBIBS

Lamentations 4 in the SBIBS2

Lamentations 4 in the SBICS

Lamentations 4 in the SBIDS

Lamentations 4 in the SBIGS

Lamentations 4 in the SBIHS

Lamentations 4 in the SBIIS

Lamentations 4 in the SBIIS2

Lamentations 4 in the SBIIS3

Lamentations 4 in the SBIKS

Lamentations 4 in the SBIKS2

Lamentations 4 in the SBIMS

Lamentations 4 in the SBIOS

Lamentations 4 in the SBIPS

Lamentations 4 in the SBISS

Lamentations 4 in the SBITS

Lamentations 4 in the SBITS2

Lamentations 4 in the SBITS3

Lamentations 4 in the SBITS4

Lamentations 4 in the SBIUS

Lamentations 4 in the SBIVS

Lamentations 4 in the SBT

Lamentations 4 in the SBT1E

Lamentations 4 in the SCHL

Lamentations 4 in the SNT

Lamentations 4 in the SUSU

Lamentations 4 in the SUSU2

Lamentations 4 in the SYNO

Lamentations 4 in the TBIAOTANT

Lamentations 4 in the TBT1E

Lamentations 4 in the TBT1E2

Lamentations 4 in the TFTIP

Lamentations 4 in the TFTU

Lamentations 4 in the TGNTATF3T

Lamentations 4 in the THAI

Lamentations 4 in the TNFD

Lamentations 4 in the TNT

Lamentations 4 in the TNTIK

Lamentations 4 in the TNTIL

Lamentations 4 in the TNTIN

Lamentations 4 in the TNTIP

Lamentations 4 in the TNTIZ

Lamentations 4 in the TOMA

Lamentations 4 in the TTENT

Lamentations 4 in the UBG

Lamentations 4 in the UGV

Lamentations 4 in the UGV2

Lamentations 4 in the UGV3

Lamentations 4 in the VBL

Lamentations 4 in the VDCC

Lamentations 4 in the YALU

Lamentations 4 in the YAPE

Lamentations 4 in the YBVTP

Lamentations 4 in the ZBP