Mark 8 (BOLCB2)

1 Na mikolo yango, ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana zingazinga ya Yesu. Lokola bazalaki na eloko ya kolia te, Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango : 2 — Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. 3 Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakolemba nzoto na nzela ; pamba te, bato mosusu kati na bango bawutaki mosika. 4 Bayekoli na Ye bazongisaki :— Kati na esobe oyo, esika nini tokoki kozwa mapa mpo na koleisa bango mpe batonda ? 5 Yesu atunaki bango : — Bozali na mapa boni ?Bazongisaki :— Tozali na mapa sambo. 6 Boye, alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. Bongo azwaki mapa yango sambo, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. Mpe bayekoli basalaki bongo. 7 Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike-mike. Apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli na Ye ete bakabola yango. 8 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo. 9 Bato bazalaki pene nkoto minei. Bongo, Yesu azongisaki bango. 10 Mbala moko, Yesu amataki na bwato elongo na bayekoli na Ye mpe akendeki na etuka ya Dalimanuta. 11 Bafarizeo bayaki mpe bakomaki kotuna Yesu mituna ; mpo na komeka Ye, basengaki na Ye ete asala elembo moko kowuta na Likolo. 12 Yesu ayokaki mawa makasi kati na molimo na Ye mpe alobaki : « Mpo na nini bato ya ekeke oyo bazali kosenga elembo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : bakopesamela elembo moko te ! » 13 Bongo atikaki bango, amataki lisusu na bwato mpe akendeki na ngambo mosusu ya ebale. 14 Bayekoli babosanaki komema mapa ; bazalaki kaka na lipa moko kati na bwato. 15 Yesu akebisaki bango : — Bofungola miso mpe bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Erode ! 16 Bayekoli bakomaki kolobana bango na bango :— Azali koloba bongo mpo ete tozali na mapa te. 17 Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : — Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ? Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ; mayele na bino ezali kaka ya kozipama ; bozali na mitema makasi ; 18 bozali na miso, kasi bozali komona te ; bozali na matoyi, kasi bozali koyoka te ? Bobosani penza ! 19 Tango nakataki mapa mitano mpo na kokabolela bato nkoto mitano, bozongaki na motango boni ya bitunga etonda na biteni ya mapa, sima na kokabolela bato ?Bazongisaki :— Bitunga zomi na mibale. 20 Bongo tango nakataki mapa sambo mpo na kokabolela bato nkoto minei, bozongaki na bitunga boni etonda na biteni ya mapa ?Bazongisaki :— Tolokotaki bitumba sambo. 21 Alobaki na bango : — Bozwi kaka bososoli nanu te ? 22 Tango bakomaki na Betisaida, bato bamemaki epai na Yesu moto moko akufa miso ; mpe basengaki na Yesu ete asimba ye. 23 Yesu asimbaki loboko ya mokufi miso mpe amemaki ye na libanda ya mboka ; bongo apakolaki ye soyi na miso, atielaki ye maboko mpe atunaki ye : — Boni, omoni eloko ? 24 Moto yango atalaki mpe alobaki :— Nazali komona bato, kasi bazali lokola banzete oyo ezali kotambola. 25 Bongo Yesu atiaki lisusu maboko na Ye na miso ya moto yango, mpe moto yango abikaki. Boye akomaki komona malamu penza. 26 Yesu alobaki na ye : — Kende na ndako na yo, komeka kutu te kozonga na mboka. 27 Yesu mpe bayekoli na Ye bakendeki na bamboka ya Sezarea ya Filipo. Na nzela, atunaki bango : — Bato bazali koloba ete Ngai nazali nani ? 28 Bazongisaki :— Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli. 29 Yesu atunaki bango : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?Petelo azongiselaki Ye :— Ozali Masiya. 30 Yesu apekisaki bango makasi koloba bongo na moto ata moko. 31 Yesu akomaki koteya bango : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye, basengeli koboma Ye, mpe, sima na mikolo misato, asengeli kosekwa. 32 Azalaki koloba makambo yango na polele penza.Bongo Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye :— Koloba bongo te ! 33 Kasi Yesu abalukaki, atalaki bayekoli na Ye mpe apamelaki Petelo : — Mosika na Ngai, Satana ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato. 34 Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai. 35 Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu akobikisa yango. 36 Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? 37 Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ? 38 Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.

In Other Versions

Mark 8 in the ANGEFD

Mark 8 in the ANTPNG2D

Mark 8 in the AS21

Mark 8 in the BAGH

Mark 8 in the BBPNG

Mark 8 in the BBT1E

Mark 8 in the BDS

Mark 8 in the BEV

Mark 8 in the BHAD

Mark 8 in the BIB

Mark 8 in the BLPT

Mark 8 in the BNT

Mark 8 in the BNTABOOT

Mark 8 in the BNTLV

Mark 8 in the BOATCB

Mark 8 in the BOATCB2

Mark 8 in the BOBCV

Mark 8 in the BOCNT

Mark 8 in the BOECS

Mark 8 in the BOGWICC

Mark 8 in the BOHCB

Mark 8 in the BOHCV

Mark 8 in the BOHLNT

Mark 8 in the BOHNTLTAL

Mark 8 in the BOICB

Mark 8 in the BOILNTAP

Mark 8 in the BOITCV

Mark 8 in the BOKCV

Mark 8 in the BOKCV2

Mark 8 in the BOKHWOG

Mark 8 in the BOKSSV

Mark 8 in the BOLCB

Mark 8 in the BOMCV

Mark 8 in the BONAV

Mark 8 in the BONCB

Mark 8 in the BONLT

Mark 8 in the BONUT2

Mark 8 in the BOPLNT

Mark 8 in the BOSCB

Mark 8 in the BOSNC

Mark 8 in the BOTLNT

Mark 8 in the BOVCB

Mark 8 in the BOYCB

Mark 8 in the BPBB

Mark 8 in the BPH

Mark 8 in the BSB

Mark 8 in the CCB

Mark 8 in the CUV

Mark 8 in the CUVS

Mark 8 in the DBT

Mark 8 in the DGDNT

Mark 8 in the DHNT

Mark 8 in the DNT

Mark 8 in the ELBE

Mark 8 in the EMTV

Mark 8 in the ESV

Mark 8 in the FBV

Mark 8 in the FEB

Mark 8 in the GGMNT

Mark 8 in the GNT

Mark 8 in the HARY

Mark 8 in the HNT

Mark 8 in the IRVA

Mark 8 in the IRVB

Mark 8 in the IRVG

Mark 8 in the IRVH

Mark 8 in the IRVK

Mark 8 in the IRVM

Mark 8 in the IRVM2

Mark 8 in the IRVO

Mark 8 in the IRVP

Mark 8 in the IRVT

Mark 8 in the IRVT2

Mark 8 in the IRVU

Mark 8 in the ISVN

Mark 8 in the JSNT

Mark 8 in the KAPI

Mark 8 in the KBT1ETNIK

Mark 8 in the KBV

Mark 8 in the KJV

Mark 8 in the KNFD

Mark 8 in the LBA

Mark 8 in the LBLA

Mark 8 in the LNT

Mark 8 in the LSV

Mark 8 in the MAAL

Mark 8 in the MBV

Mark 8 in the MBV2

Mark 8 in the MHNT

Mark 8 in the MKNFD

Mark 8 in the MNG

Mark 8 in the MNT

Mark 8 in the MNT2

Mark 8 in the MRS1T

Mark 8 in the NAA

Mark 8 in the NASB

Mark 8 in the NBLA

Mark 8 in the NBS

Mark 8 in the NBVTP

Mark 8 in the NET2

Mark 8 in the NIV11

Mark 8 in the NNT

Mark 8 in the NNT2

Mark 8 in the NNT3

Mark 8 in the PDDPT

Mark 8 in the PFNT

Mark 8 in the RMNT

Mark 8 in the SBIAS

Mark 8 in the SBIBS

Mark 8 in the SBIBS2

Mark 8 in the SBICS

Mark 8 in the SBIDS

Mark 8 in the SBIGS

Mark 8 in the SBIHS

Mark 8 in the SBIIS

Mark 8 in the SBIIS2

Mark 8 in the SBIIS3

Mark 8 in the SBIKS

Mark 8 in the SBIKS2

Mark 8 in the SBIMS

Mark 8 in the SBIOS

Mark 8 in the SBIPS

Mark 8 in the SBISS

Mark 8 in the SBITS

Mark 8 in the SBITS2

Mark 8 in the SBITS3

Mark 8 in the SBITS4

Mark 8 in the SBIUS

Mark 8 in the SBIVS

Mark 8 in the SBT

Mark 8 in the SBT1E

Mark 8 in the SCHL

Mark 8 in the SNT

Mark 8 in the SUSU

Mark 8 in the SUSU2

Mark 8 in the SYNO

Mark 8 in the TBIAOTANT

Mark 8 in the TBT1E

Mark 8 in the TBT1E2

Mark 8 in the TFTIP

Mark 8 in the TFTU

Mark 8 in the TGNTATF3T

Mark 8 in the THAI

Mark 8 in the TNFD

Mark 8 in the TNT

Mark 8 in the TNTIK

Mark 8 in the TNTIL

Mark 8 in the TNTIN

Mark 8 in the TNTIP

Mark 8 in the TNTIZ

Mark 8 in the TOMA

Mark 8 in the TTENT

Mark 8 in the UBG

Mark 8 in the UGV

Mark 8 in the UGV2

Mark 8 in the UGV3

Mark 8 in the VBL

Mark 8 in the VDCC

Mark 8 in the YALU

Mark 8 in the YAPE

Mark 8 in the YBVTP

Mark 8 in the ZBP