Romans 7 (BOLCB2)

1 Bandeko—nazali koloba na bato oyo bayebi Mobeko— bobosani ete Mobeko ezalaka na nguya likolo ya moto kaka na tango oyo azali na bomoi ? 2 Ndakisa : Mobeko ekangisaka mwasi ya libala na mobali na ye, wana mobali yango azali na bomoi. Kasi soki mobali akufi, mwasi akangolami na mobeko oyo ezalaki kokangisa ye na mobali. 3 Boye soki, wana mobali na ye azali nanu na bomoi, akomi mwasi ya mobali mosusu, bakoloba ete asali ekobo. Kasi soki mobali na ye akufi, akangolami libela na mobeko yango mpe akoki kokoma mwasi ya mobali mosusu ; boye bakoloba te ete asali ekobo. 4 Ndenge wana mpe mpo na bino bandeko na ngai : bosila mpe kokufa mpo na Mobeko na nzela ya nzoto ya Klisto mpo ete bokoma bato ya moto mosusu, ya Ye oyo asekwaki kati na bakufi, mpo ete tobota bambuma mpo na Nzambe. 5 Pamba te wana tozalaki nanu kotambola kolanda baposa ya nzoto, Mobeko ezalaki kotindika biso na baposa ya mabe oyo ezalaki kosala mosala na yango kati na biteni ya banzoto na biso mpo ete tobota bambuma oyo ememaka na kufa. 6 Kasi sik’oyo, lokola tokufi mpo na nguya oyo ezalaki kokanga biso na bowumbu, tokangolami na nguya ya Mobeko mpo ete tosalela Nzambe na lolenge ya sika ya Molimo, kasi na lolenge ya kala ya mokanda ya Mobeko te. 7 Boye toloba nini ? Mobeko ekomi nde lisumu ? Soki moke te ! Soki Mobeko ezalaki te, nalingaki mpe koyeba lisumu te. Pamba te soki Mobeko elobaki te : « Okolulaka te, » nalingaki mpe koyeba te soki kolula ezali penza nini. 8 Nzokande, lokola lisumu ezwaka nguya na esika oyo mitindo ezali, lisumu ebotaki kati na ngai lolenge nyonso ya baposa ya mabe. Pamba te soki Mobeko ezali te, lisumu mpe ezali na nguya te. 9 Na kala, tango Mobeko ezalaki te, nazalaki na bomoi ; kasi tango mitindo eyei, lisumu mpe ezwi nguya, mpe ngai nakufi. 10 Bongo mitindo oyo esengelaki komema na bomoi ememi ngai na kufa. 11 Pamba te lokola lisumu ezwaka nguya na esika oyo mitindo ezali, lisumu ekosaki ngai mpe ememaki ngai na kufa na nzela ya mitindo. 12 Boye, Mobeko ezali bule, mpe mitindo ezali bule, sembo mpe malamu. 13 Boni, eloko ya malamu ekoki solo komemela ngai kufa ? Soki moke te ! Nzokande, mpo ete lisumu eyebana ete ezali lisumu, mpe mpo ete elakisa mabe na yango na nzela ya mitindo, esalelaki eloko oyo ezali malamu mpo ete lisumu yango epesa ngai kufa. 14 Toyebi ete Mobeko epesamaki na nzela ya Molimo na Nzambe ; kasi ngai nazali kaka moto, natekama mpo na kozala mowumbu ya lisumu. 15 Nasosolaka te makambo oyo nasalaka : oyo nalingaka kosala, nasalaka yango te ; kasi oyo nayinaka, yango nde nasalaka. 16 Mpe soki nasalaka makambo oyo naboyaka kosala, wana nandimi ete Mobeko ezali malamu. 17 Lokola ezali bongo, emonani ete ezali ngai te moto nasalaka yango, kasi ezali nde lisumu oyo evandaka kati na ngai. 18 Pamba te nayebi malamu ete bolamu evandaka kati na ngai te, elingi koloba : evandaka kati na nzoto na ngai te. Nazalaka na posa ya kosala bolamu, kasi nazangaka nguya ya kokokisa yango. 19 Nasalaka te bolamu oyo nalingaka kosala, kasi nasalaka nde mabe oyo naboyaka kosala. 20 Soki sik’oyo nasali makambo oyo naboyaka kosala, ezali lisusu ngai te moto nasali yango, kasi ezali nde lisumu oyo evandaka kati na ngai. 21 Boye, namonaka mobeko oyo kosala kati na ngai : soki nalingi kosala bolamu, ezali mabe kaka nde nakosala. 22 Pamba te kati na motema na ngai, nasepelaka na Mobeko ya Nzambe ; 23 kasi kati na biteni ya nzoto na ngai, namonaka mobeko mosusu kobundisa mobeko ya makanisi ya motema na ngai mpe kokomisa ngai mowumbu ya mobeko ya lisumu oyo ezali kosala kati na biteni ya nzoto na ngai. 24 Oh ngai moto na mawa ! Nani akokangola ngai na nzoto oyo ya kufa ? 25 Tika ete matondi epesamela Nzambe oyo akangolaka ngai na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso !Na mokuse, nakoki koloba ete, na nzela ya mayele na ngai, nazali mowumbu ya Mobeko ya Nzambe, kasi na nzela ya bomoto na ngai ya masumu, nazali mowumbu ya mobeko ya lisumu.

In Other Versions

Romans 7 in the ANGEFD

Romans 7 in the ANTPNG2D

Romans 7 in the AS21

Romans 7 in the BAGH

Romans 7 in the BBPNG

Romans 7 in the BBT1E

Romans 7 in the BDS

Romans 7 in the BEV

Romans 7 in the BHAD

Romans 7 in the BIB

Romans 7 in the BLPT

Romans 7 in the BNT

Romans 7 in the BNTABOOT

Romans 7 in the BNTLV

Romans 7 in the BOATCB

Romans 7 in the BOATCB2

Romans 7 in the BOBCV

Romans 7 in the BOCNT

Romans 7 in the BOECS

Romans 7 in the BOGWICC

Romans 7 in the BOHCB

Romans 7 in the BOHCV

Romans 7 in the BOHLNT

Romans 7 in the BOHNTLTAL

Romans 7 in the BOICB

Romans 7 in the BOILNTAP

Romans 7 in the BOITCV

Romans 7 in the BOKCV

Romans 7 in the BOKCV2

Romans 7 in the BOKHWOG

Romans 7 in the BOKSSV

Romans 7 in the BOLCB

Romans 7 in the BOMCV

Romans 7 in the BONAV

Romans 7 in the BONCB

Romans 7 in the BONLT

Romans 7 in the BONUT2

Romans 7 in the BOPLNT

Romans 7 in the BOSCB

Romans 7 in the BOSNC

Romans 7 in the BOTLNT

Romans 7 in the BOVCB

Romans 7 in the BOYCB

Romans 7 in the BPBB

Romans 7 in the BPH

Romans 7 in the BSB

Romans 7 in the CCB

Romans 7 in the CUV

Romans 7 in the CUVS

Romans 7 in the DBT

Romans 7 in the DGDNT

Romans 7 in the DHNT

Romans 7 in the DNT

Romans 7 in the ELBE

Romans 7 in the EMTV

Romans 7 in the ESV

Romans 7 in the FBV

Romans 7 in the FEB

Romans 7 in the GGMNT

Romans 7 in the GNT

Romans 7 in the HARY

Romans 7 in the HNT

Romans 7 in the IRVA

Romans 7 in the IRVB

Romans 7 in the IRVG

Romans 7 in the IRVH

Romans 7 in the IRVK

Romans 7 in the IRVM

Romans 7 in the IRVM2

Romans 7 in the IRVO

Romans 7 in the IRVP

Romans 7 in the IRVT

Romans 7 in the IRVT2

Romans 7 in the IRVU

Romans 7 in the ISVN

Romans 7 in the JSNT

Romans 7 in the KAPI

Romans 7 in the KBT1ETNIK

Romans 7 in the KBV

Romans 7 in the KJV

Romans 7 in the KNFD

Romans 7 in the LBA

Romans 7 in the LBLA

Romans 7 in the LNT

Romans 7 in the LSV

Romans 7 in the MAAL

Romans 7 in the MBV

Romans 7 in the MBV2

Romans 7 in the MHNT

Romans 7 in the MKNFD

Romans 7 in the MNG

Romans 7 in the MNT

Romans 7 in the MNT2

Romans 7 in the MRS1T

Romans 7 in the NAA

Romans 7 in the NASB

Romans 7 in the NBLA

Romans 7 in the NBS

Romans 7 in the NBVTP

Romans 7 in the NET2

Romans 7 in the NIV11

Romans 7 in the NNT

Romans 7 in the NNT2

Romans 7 in the NNT3

Romans 7 in the PDDPT

Romans 7 in the PFNT

Romans 7 in the RMNT

Romans 7 in the SBIAS

Romans 7 in the SBIBS

Romans 7 in the SBIBS2

Romans 7 in the SBICS

Romans 7 in the SBIDS

Romans 7 in the SBIGS

Romans 7 in the SBIHS

Romans 7 in the SBIIS

Romans 7 in the SBIIS2

Romans 7 in the SBIIS3

Romans 7 in the SBIKS

Romans 7 in the SBIKS2

Romans 7 in the SBIMS

Romans 7 in the SBIOS

Romans 7 in the SBIPS

Romans 7 in the SBISS

Romans 7 in the SBITS

Romans 7 in the SBITS2

Romans 7 in the SBITS3

Romans 7 in the SBITS4

Romans 7 in the SBIUS

Romans 7 in the SBIVS

Romans 7 in the SBT

Romans 7 in the SBT1E

Romans 7 in the SCHL

Romans 7 in the SNT

Romans 7 in the SUSU

Romans 7 in the SUSU2

Romans 7 in the SYNO

Romans 7 in the TBIAOTANT

Romans 7 in the TBT1E

Romans 7 in the TBT1E2

Romans 7 in the TFTIP

Romans 7 in the TFTU

Romans 7 in the TGNTATF3T

Romans 7 in the THAI

Romans 7 in the TNFD

Romans 7 in the TNT

Romans 7 in the TNTIK

Romans 7 in the TNTIL

Romans 7 in the TNTIN

Romans 7 in the TNTIP

Romans 7 in the TNTIZ

Romans 7 in the TOMA

Romans 7 in the TTENT

Romans 7 in the UBG

Romans 7 in the UGV

Romans 7 in the UGV2

Romans 7 in the UGV3

Romans 7 in the VBL

Romans 7 in the VDCC

Romans 7 in the YALU

Romans 7 in the YAPE

Romans 7 in the YBVTP

Romans 7 in the ZBP