Acts 20 (BOLCB2)

1 Tango mobulu esilaki, Polo abengisaki bayekoli mpe alendisaki bango. Sima na yango, apesaki bango mbote ya suka mpe akendeki na Masedwane. 2 Wana azalaki kotambola kati na etuka yango, azalaki kolendisa bandimi na mateya ya ndenge na ndenge kino akomaki na Grese 3 epai wapi awumelaki basanza misato. Kaka na tango Polo alingaki kozwa masuwa mpo na kokende na Siri, Bayuda basalelaki ye likita. Boye, azwaki mokano ya kozongela na nzela ya Masedwane. 4 Tala bato oyo bakendeki na ye elongo : Sopatere, mwana ya Pirisi, moto ya Bere ; Arisitarke mpe Sekundusi, bato ya Tesalonika ; Gayusi, moto ya Derbe ; Timote, Tishike mpe Trofime, bato ya etuka ya Azia. 5 Bango nde bakendeki liboso mpo na kozela biso na Troasi. 6 Kasi biso tozwaki masuwa kati na engumba Filipi, sima na feti ya Mapa ezanga levire. Sima na biso kotambola mikolo mitano na mayi, tokutaki bango na Troasi epai wapi tosalaki mikolo sambo. 7 Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo, oyo asengelaki kokende na mobembo, mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu. 8 Tosanganaki kati na shambre ya likolo, oyo ezalaki na minda ebele. 9 Nzokande, elenge mobali moko avandaki na lininisa ; kombo na ye ezalaki Etikisi. Lokola Polo azalaki kaka kokoba koloba, pongi makasi ekangaki Etikisi, mpe, mbala moko, akweyaki na mabele wuta na etaje ya misato. Tango batombolaki ye, bamonaki ete asili kokufa. 10 Polo akitaki, atiaki litoyi na ye na tolo ya Etikisi, akamataki Etikisi na maboko na ye mpe alobaki :— Bobanga te, azali na bomoi. 11 Amataki lisusu na etaje, abukaki lipa, aliaki yango mpe akobaki koloba kino na tongo, sima nde akendeki. 12 Bongo, bazongisaki ya bomoi, elenge mobali epai na bango, mpe bango nyonso balendisamaki makasi. 13 Tokendeki liboso, mpe tozwaki masuwa oyo ememaki biso na Asosi epai wapi Polo asengelaki komatela na masuwa. Azwaki mokano wana, pamba te alingaki kokende kuna na makolo. 14 Tango akutanaki na biso na mboka Asosi, amataki na masuwa elongo na biso, mpe tokendeki na Mitilena. 15 Longwa wana, tozwaki masuwa mpo na kokende, mpe tokomaki liboso ya Shio, mokolo oyo elandaki. Sima na mokolo moko, tokomaki na Samosi, mpe, mokolo oyo elandaki, tokomaki na Mile. 16 Polo azwaki mokano ya kotelema te na Efeso mpe ya kolekisa tango te na mokili ya Azia, pamba te azalaki na posa, soki akolonga, ya kokoma noki na Yelusalemi mpo ete azala na mokolo ya Pantekoti. 17 Wuta na Mile, Polo abengisaki bakambi ya Lingomba ya Efeso. 18 Tango bakutanaki na ye, alobaki na bango :— Boyebi malamu ezaleli nini nazalaki na yango tango nyonso liboso na bino, wuta mokolo ya liboso oyo nakomaki na mokili ya Azia. 19 Nasalelaki Nkolo lokola mowumbu, na komikitisa nyonso mpe na mpinzoli, kati na komekama makasi mpo ete Bayuda bazalaki kosalela ngai makita. 20 Nzokande, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino, ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko. 21 Nazalaki tango nyonso kosenga, ezala na Bayuda to na bato ya Grese, ete bazongela Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe batia kondima na bango kati na Yesu, Nkolo na biso. 22 Boye sik’oyo, na etinda ya Molimo, nakeyi na Yelusalemi, kasi nayebi te likambo nini ekokomela ngai kuna. 23 Eloko moko kaka nayebi : Molimo Mosantu azali kokebisa ngai ete boloko mpe minyoko ya ndenge na ndenge ezali kozela ngai na bingumba nyonso oyo nakokota. 24 Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe. 25 Mpe sik’oyo, nayebi ete bokomona elongi ngai lisusu te, bino nyonso oyo nalekaki kati na bino mpo na koteya sango ya Bokonzi ya Nzambe. 26 Yango wana, nalobi na bino yango lelo ete nazali na ngambo ya makila ya moto moko te kati na bato nyonso, 27 pamba te nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe mpe nabombelaki bino ata eloko moko te. 28 Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko. 29 Nayebi malamu ete, sima na ngai kokende, bambwa ya zamba ekokota kati na bino mpe ekoyokela etonga mawa te. 30 Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango. 31 Yango wana, bosenzela ! Bokanisa malamu ete mibu misato mobimba, butu mpe moyi, natikaki te kokebisa moko na moko na bino, mpe tango mosusu elongo na mpinzoli. 32 Sik’oyo, nazali kokaba bino na maboko ya Nzambe mpe na Liloba na Ye ya ngolu. Nzambe azali na makoki ya kolendisa bino mpe ya kopesa bino libula kati na bato nyonso oyo babulisama. 33 Nalulaki te palata to wolo to elamba ya moto moko. 34 Bino moko boyebi malamu ete ezali maboko na ngai oyo, nde epesaki ngai biloko oyo nazalaki na bosenga na yango mpo na ngai moko, mpe oyo baninga na ngai bazalaki na bosenga na yango. 35 Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba : « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. » 36 Sima na Polo koloba bongo, afukamaki mpe asambelaki elongo na bango. 37 Bango nyonso bakomaki kolela, bayambaki Polo mpe bapesaki ye beze ; 38 bayokaki mawa mingi koleka mpo alobaki na bango ete bakomona elongi na ye lisusu te. Bongo bakendeki kotika ye kino na masuwa.

In Other Versions

Acts 20 in the ANGEFD

Acts 20 in the ANTPNG2D

Acts 20 in the AS21

Acts 20 in the BAGH

Acts 20 in the BBPNG

Acts 20 in the BBT1E

Acts 20 in the BDS

Acts 20 in the BEV

Acts 20 in the BHAD

Acts 20 in the BIB

Acts 20 in the BLPT

Acts 20 in the BNT

Acts 20 in the BNTABOOT

Acts 20 in the BNTLV

Acts 20 in the BOATCB

Acts 20 in the BOATCB2

Acts 20 in the BOBCV

Acts 20 in the BOCNT

Acts 20 in the BOECS

Acts 20 in the BOGWICC

Acts 20 in the BOHCB

Acts 20 in the BOHCV

Acts 20 in the BOHLNT

Acts 20 in the BOHNTLTAL

Acts 20 in the BOICB

Acts 20 in the BOILNTAP

Acts 20 in the BOITCV

Acts 20 in the BOKCV

Acts 20 in the BOKCV2

Acts 20 in the BOKHWOG

Acts 20 in the BOKSSV

Acts 20 in the BOLCB

Acts 20 in the BOMCV

Acts 20 in the BONAV

Acts 20 in the BONCB

Acts 20 in the BONLT

Acts 20 in the BONUT2

Acts 20 in the BOPLNT

Acts 20 in the BOSCB

Acts 20 in the BOSNC

Acts 20 in the BOTLNT

Acts 20 in the BOVCB

Acts 20 in the BOYCB

Acts 20 in the BPBB

Acts 20 in the BPH

Acts 20 in the BSB

Acts 20 in the CCB

Acts 20 in the CUV

Acts 20 in the CUVS

Acts 20 in the DBT

Acts 20 in the DGDNT

Acts 20 in the DHNT

Acts 20 in the DNT

Acts 20 in the ELBE

Acts 20 in the EMTV

Acts 20 in the ESV

Acts 20 in the FBV

Acts 20 in the FEB

Acts 20 in the GGMNT

Acts 20 in the GNT

Acts 20 in the HARY

Acts 20 in the HNT

Acts 20 in the IRVA

Acts 20 in the IRVB

Acts 20 in the IRVG

Acts 20 in the IRVH

Acts 20 in the IRVK

Acts 20 in the IRVM

Acts 20 in the IRVM2

Acts 20 in the IRVO

Acts 20 in the IRVP

Acts 20 in the IRVT

Acts 20 in the IRVT2

Acts 20 in the IRVU

Acts 20 in the ISVN

Acts 20 in the JSNT

Acts 20 in the KAPI

Acts 20 in the KBT1ETNIK

Acts 20 in the KBV

Acts 20 in the KJV

Acts 20 in the KNFD

Acts 20 in the LBA

Acts 20 in the LBLA

Acts 20 in the LNT

Acts 20 in the LSV

Acts 20 in the MAAL

Acts 20 in the MBV

Acts 20 in the MBV2

Acts 20 in the MHNT

Acts 20 in the MKNFD

Acts 20 in the MNG

Acts 20 in the MNT

Acts 20 in the MNT2

Acts 20 in the MRS1T

Acts 20 in the NAA

Acts 20 in the NASB

Acts 20 in the NBLA

Acts 20 in the NBS

Acts 20 in the NBVTP

Acts 20 in the NET2

Acts 20 in the NIV11

Acts 20 in the NNT

Acts 20 in the NNT2

Acts 20 in the NNT3

Acts 20 in the PDDPT

Acts 20 in the PFNT

Acts 20 in the RMNT

Acts 20 in the SBIAS

Acts 20 in the SBIBS

Acts 20 in the SBIBS2

Acts 20 in the SBICS

Acts 20 in the SBIDS

Acts 20 in the SBIGS

Acts 20 in the SBIHS

Acts 20 in the SBIIS

Acts 20 in the SBIIS2

Acts 20 in the SBIIS3

Acts 20 in the SBIKS

Acts 20 in the SBIKS2

Acts 20 in the SBIMS

Acts 20 in the SBIOS

Acts 20 in the SBIPS

Acts 20 in the SBISS

Acts 20 in the SBITS

Acts 20 in the SBITS2

Acts 20 in the SBITS3

Acts 20 in the SBITS4

Acts 20 in the SBIUS

Acts 20 in the SBIVS

Acts 20 in the SBT

Acts 20 in the SBT1E

Acts 20 in the SCHL

Acts 20 in the SNT

Acts 20 in the SUSU

Acts 20 in the SUSU2

Acts 20 in the SYNO

Acts 20 in the TBIAOTANT

Acts 20 in the TBT1E

Acts 20 in the TBT1E2

Acts 20 in the TFTIP

Acts 20 in the TFTU

Acts 20 in the TGNTATF3T

Acts 20 in the THAI

Acts 20 in the TNFD

Acts 20 in the TNT

Acts 20 in the TNTIK

Acts 20 in the TNTIL

Acts 20 in the TNTIN

Acts 20 in the TNTIP

Acts 20 in the TNTIZ

Acts 20 in the TOMA

Acts 20 in the TTENT

Acts 20 in the UBG

Acts 20 in the UGV

Acts 20 in the UGV2

Acts 20 in the UGV3

Acts 20 in the VBL

Acts 20 in the VDCC

Acts 20 in the YALU

Acts 20 in the YAPE

Acts 20 in the YBVTP

Acts 20 in the ZBP