Acts 25 (BOLCB2)

1 Mikolo misato sima na ye koya kati na etuka, Festisi alongwaki na Sezarea mpo na kokende na Yelusalemi 2 epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bakendeki kokutana na ye mpo na kofunda Polo. Babondelaki mingi Festisi 3 mpo ete asalela bango ngolu ya kotinda Polo na Yelusalemi, pamba te basalaki mabongisi ya kotiela ye motambo na nzela mpo na koboma ye. 4 Kasi Festisi azongiselaki bango :— Polo azali nanu kati na boloko, na Sezarea ; mpe kala mingi te, nakozonga kuna. 5 Tika ete tokende nzela moko na ndambo ya bakambi na bino, mpo ete, soki moto yango asalaki mabe, bafundela ye kuna. 6 Festisi asalaki mikolo pene mwambe to zomi elongo na bango, mpe azongaki na Sezarea. Mokolo oyo elandaki bozongi na ye, avandaki na esambiselo mpe apesaki mitindo ete bamemela ye Polo. 7 Tango kaka Polo akomaki wana, Bayuda oyo bawutaki na Yelusalemi bazingelaki ye mpe bakomaki kofunda ye na tina na makambo mingi ya mabe makasi, oyo bango moko bazangaki kutu makoki mpo na kotalisa bosolo na yango. 8 Polo asambaki boye :— Nasalaki mabe moko te, nabukaki ata mobeko moko te ya Bayuda to ya Tempelo to mpe ya Sezare. 9 Kasi lokola Festisi alingaki kosepelisa Bayuda, atunaki Polo :— Boni, olingi kozonga na Yelusalemi mpe kosamba kuna liboso na ngai mpo na makambo oyo ? 10 Polo azongisaki :— Te, natelemi liboso ya esambiselo ya Sezare ; ezali awa nde nasengeli kosamba. Yo moko oyebi malamu ete nasali Bayuda ata likambo moko te ya mabe. 11 Soki nasali mabe to nasali likambo oyo ekoki komemela ngai etumbu ya kufa, nandimi kokufa. Kasi soki makambo oyo Bayuda bafundeli ngai ezali ya lokuta, moto moko te azali na makoki ya kokaba ngai na maboko na bango. Tika ete Sezare akata likambo na ngai ! 12 Sima na Festisi kokabola makanisi elongo na bapesi toli na ye, alobaki na Polo :— Lokola osengi kokende kosamba liboso ya Sezare, okokende solo kosamba liboso na ye. 13 Sima na mwa mikolo, mokonzi Agripa elongo na Berenise bayaki na Sezarea mpo na kopesa Festisi mbote. 14 Lokola balekisaki kuna mikolo mingi, Festisi ayebisaki mokonzi likambo ya Polo ; alobaki :— Ezali awa na moto moko oyo Felikisi atikaki kati na boloko. 15 Tango nakendeki na Yelusalemi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bayaki kofunda ye epai na ngai, mpe basengaki ete nakatela ye etumbu. 16 Kasi nayebisaki bango ete bato ya Rome bazalaka na ezaleli te ya kokatela moto etumbu soki asambi nanu te na bato oyo bafundi ye, mpe soki azwi nanu nzela te ya kozongisa biyano na makambo oyo bafundeli ye. 17 Tango bayaki awa, nalekisaki tango te ; kasi mokolo oyo elandaki, navandaki na esambiselo mpe napesaki mitindo ete bamemela ngai moto yango. 18 Tango bato oyo bafundaki ye batelemaki mpo na koloba, balongaki te kotalisa bosolo ya makambo mabe oyo bafundelaki ye, ndenge ngai nazalaki kokanisela. 19 Batianaki tembe na tina na lolenge na bango ya kosambela, mpe na tina na moto moko oyo asila kokufa, moto oyo Polo azalaki koloba na tina na ye ete azali na bomoi ; kombo ya moto yango ezalaki « Yesu. » 20 Lokola nayebaki te ndenge nini nakoki kokata likambo ya lolenge oyo, natunaki ye soki alingi kokende na Yelusalemi mpo ete bakata likambo na ye kuna. 21 Kasi Polo asengaki ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene. Boye, napesaki mitindo ete babatela ye kati na boloko kino tango nakotinda ye epai ya Sezare. 22 Agripa alobaki na Festisi :— Nazali na posa ya koyoka moto wana, ngai moko.Festisi azongisaki :— Okoyoka ye lobi. 23 Mokolo oyo elandaki, Agripa mpe Berenise bayaki na lokumu nyonso, mpe bakotaki na ndako oyo basambiselaka bato, elongo na bakonzi ya basoda mpe bakambi ya engumba. Na mitindo ya Festisi, bayaki na Polo. 24 Festisi alobaki :— Mokonzi Agripa mpe bino nyonso oyo bozali elongo na biso awa, bozali komona moto oyo ! Lisanga mobimba ya Bayuda bayaki kokutana na ngai na tina na ye, na Yelusalemi mpe awa kati na Sezarea, bazalaki koganga ete asengeli kokufa. 25 Nzokande, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya kufa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome. 26 Lokola nazali na likambo moko te ya malonga ya kokomela mokonzi monene na tina na ye, nayei na ye mpo ete asamba liboso na bino nyonso, mpe mingi-mingi liboso na yo, mokonzi Agripa, mpo ete nakoka kozwa likambo ya kokomela mokonzi monene, sima na biso kotuna ye mituna. 27 Pamba te namoni ete tina ezali te ya kotinda moto ya boloko na Rome, soki nalongi te kolimbola malamu likambo oyo bafundeli ye.

In Other Versions

Acts 25 in the ANGEFD

Acts 25 in the ANTPNG2D

Acts 25 in the AS21

Acts 25 in the BAGH

Acts 25 in the BBPNG

Acts 25 in the BBT1E

Acts 25 in the BDS

Acts 25 in the BEV

Acts 25 in the BHAD

Acts 25 in the BIB

Acts 25 in the BLPT

Acts 25 in the BNT

Acts 25 in the BNTABOOT

Acts 25 in the BNTLV

Acts 25 in the BOATCB

Acts 25 in the BOATCB2

Acts 25 in the BOBCV

Acts 25 in the BOCNT

Acts 25 in the BOECS

Acts 25 in the BOGWICC

Acts 25 in the BOHCB

Acts 25 in the BOHCV

Acts 25 in the BOHLNT

Acts 25 in the BOHNTLTAL

Acts 25 in the BOICB

Acts 25 in the BOILNTAP

Acts 25 in the BOITCV

Acts 25 in the BOKCV

Acts 25 in the BOKCV2

Acts 25 in the BOKHWOG

Acts 25 in the BOKSSV

Acts 25 in the BOLCB

Acts 25 in the BOMCV

Acts 25 in the BONAV

Acts 25 in the BONCB

Acts 25 in the BONLT

Acts 25 in the BONUT2

Acts 25 in the BOPLNT

Acts 25 in the BOSCB

Acts 25 in the BOSNC

Acts 25 in the BOTLNT

Acts 25 in the BOVCB

Acts 25 in the BOYCB

Acts 25 in the BPBB

Acts 25 in the BPH

Acts 25 in the BSB

Acts 25 in the CCB

Acts 25 in the CUV

Acts 25 in the CUVS

Acts 25 in the DBT

Acts 25 in the DGDNT

Acts 25 in the DHNT

Acts 25 in the DNT

Acts 25 in the ELBE

Acts 25 in the EMTV

Acts 25 in the ESV

Acts 25 in the FBV

Acts 25 in the FEB

Acts 25 in the GGMNT

Acts 25 in the GNT

Acts 25 in the HARY

Acts 25 in the HNT

Acts 25 in the IRVA

Acts 25 in the IRVB

Acts 25 in the IRVG

Acts 25 in the IRVH

Acts 25 in the IRVK

Acts 25 in the IRVM

Acts 25 in the IRVM2

Acts 25 in the IRVO

Acts 25 in the IRVP

Acts 25 in the IRVT

Acts 25 in the IRVT2

Acts 25 in the IRVU

Acts 25 in the ISVN

Acts 25 in the JSNT

Acts 25 in the KAPI

Acts 25 in the KBT1ETNIK

Acts 25 in the KBV

Acts 25 in the KJV

Acts 25 in the KNFD

Acts 25 in the LBA

Acts 25 in the LBLA

Acts 25 in the LNT

Acts 25 in the LSV

Acts 25 in the MAAL

Acts 25 in the MBV

Acts 25 in the MBV2

Acts 25 in the MHNT

Acts 25 in the MKNFD

Acts 25 in the MNG

Acts 25 in the MNT

Acts 25 in the MNT2

Acts 25 in the MRS1T

Acts 25 in the NAA

Acts 25 in the NASB

Acts 25 in the NBLA

Acts 25 in the NBS

Acts 25 in the NBVTP

Acts 25 in the NET2

Acts 25 in the NIV11

Acts 25 in the NNT

Acts 25 in the NNT2

Acts 25 in the NNT3

Acts 25 in the PDDPT

Acts 25 in the PFNT

Acts 25 in the RMNT

Acts 25 in the SBIAS

Acts 25 in the SBIBS

Acts 25 in the SBIBS2

Acts 25 in the SBICS

Acts 25 in the SBIDS

Acts 25 in the SBIGS

Acts 25 in the SBIHS

Acts 25 in the SBIIS

Acts 25 in the SBIIS2

Acts 25 in the SBIIS3

Acts 25 in the SBIKS

Acts 25 in the SBIKS2

Acts 25 in the SBIMS

Acts 25 in the SBIOS

Acts 25 in the SBIPS

Acts 25 in the SBISS

Acts 25 in the SBITS

Acts 25 in the SBITS2

Acts 25 in the SBITS3

Acts 25 in the SBITS4

Acts 25 in the SBIUS

Acts 25 in the SBIVS

Acts 25 in the SBT

Acts 25 in the SBT1E

Acts 25 in the SCHL

Acts 25 in the SNT

Acts 25 in the SUSU

Acts 25 in the SUSU2

Acts 25 in the SYNO

Acts 25 in the TBIAOTANT

Acts 25 in the TBT1E

Acts 25 in the TBT1E2

Acts 25 in the TFTIP

Acts 25 in the TFTU

Acts 25 in the TGNTATF3T

Acts 25 in the THAI

Acts 25 in the TNFD

Acts 25 in the TNT

Acts 25 in the TNTIK

Acts 25 in the TNTIL

Acts 25 in the TNTIN

Acts 25 in the TNTIP

Acts 25 in the TNTIZ

Acts 25 in the TOMA

Acts 25 in the TTENT

Acts 25 in the UBG

Acts 25 in the UGV

Acts 25 in the UGV2

Acts 25 in the UGV3

Acts 25 in the VBL

Acts 25 in the VDCC

Acts 25 in the YALU

Acts 25 in the YAPE

Acts 25 in the YBVTP

Acts 25 in the ZBP