Deuteronomy 22 (BOLCB2)

1 Soki omoni meme to ngombe ya ndeko na yo ezali koyengayenga, kotala yango pamba te, kasi kanga yango mpe zongisa yango epai ya nkolo na yango. 2 Soki ndeko yango avandaka pembeni na yo te to oyebi ye te, mema yango na ndako na yo mpe bomba yango kino akoya koluka yango, bongo okozongisela ye yango. 3 Okosala ndenge moko soki omoni ane ya ndeko na yo to kazaka na ye to eloko mosusu oyo ye abungisi. Kotala yango na pamba te. 4 Soki omoni ane ya ndeko na yo to ngombe na ye ekweyi na nzela, kotala yango na pamba te ; osalisa ndeko na yo mpo na kotelemisa yango. 5 Mwasi akoki kolata bilamba ya mibali te to mpe mobali akoki te kolata bilamba ya basi, pamba te Yawe, Nzambe na bino, ayinaka moto nyonso oyo asalaka makambo ya ndenge wana. 6 Soki omoni zala ya ndeke pembeni ya nzela, ezala likolo ya nzete to na mabele, mpe mama ya ndeke evandeli bana to maki, kozwa te mama elongo na bana. 7 Osengeli kozwa bana, kasi kotika mama ete ekende mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi molayi. 8 Tango okotonga ndako ya sika, kozanga te kotonga mir ya mokuse zingazinga ya motondo mpo ete omema ngambo ya makila te na ndako na yo soki moto akweyi likolo ya motondo. 9 Kolona te lolenge mibale ya nkona na elanga na yo ya vino ; noki te nyonso ekokoma bule : oyo okolona mpe bambuma ya elanga na yo ya vino. 10 Okoki kosangisa te na libaya moko, ngombe mpe ane mpo na kobalola mabele. 11 Okoki kolata te bilamba oyo basala na bapwale ya meme mpe na lino. 12 Okotia basinga na basonge minei ya elamba oyo okolata. 13 Soki mobali abali mwasi mpe, sima na kosangisa na ye nzoto, asepeli na ye lisusu te, 14 alobi ete ezaleli ya mwasi yango ezali mabe, bongo apanzi ye sango ya mabe na koloba : « Nabalaki mwasi oyo, kasi tango nasangisi na ye nzoto, namoni ete ayebaki nzoto ya mibali, » 15 wana tata mpe mama ya mwana mwasi, basengeli kolakisa epai na bampaka, na bikuke ya engumba, bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na bango ya mwasi ayebaki nzoto nanu ya mibali te. 16 Tata ya mwana mwasi akoloba na bampaka : « Nabalisaki mwana na ngai ya mwasi na mobali oyo, kasi asepeli na ye lisusu te ; 17 amoni ete ezaleli ya mwana na ngai ya mwasi ezali malamu te, yango wana alobi : ‹ Mwana mwasi oyo ayebaki nzoto ya mibali. › Kasi tala bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na ngai ya mwasi ayebaki nanu nzoto ya mibali te. » Boye baboti ya mwana mwasi bakofungola elamba liboso ya bampaka ya engumba, 18 mpe bampaka ya engumba bakozwa mobali yango mpe bakopesa ye etumbu : 19 bakofutisa ye lomande ya mbongo ya bibende ya palata, nkama moko, mpe bakopesa yango epai ya tata ya mwana mwasi, pamba te mobali oyo asambwisi elenge mwasi ya Isalaele oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe akokoba kozala mwasi na ye : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye. 20 Kasi soki makambo oyo bafundeli ye ezali ya solo, mpe ezali ata na elamba moko te oyo ezali kotalisa ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te, 21 esengeli bamema ye libanda ya ndako ya tata na ye, mpe kuna bato ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa : asalaki likambo ya soni kati na Isalaele na kosalaka kindumba tango azalaki na ndako ya tata na ye. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino. 22 Soki bakangi mobali azali kosangisa nzoto na mwasi ya mobali mosusu, bango nyonso mibale basengeli kokufa. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na Isalaele. 23 Soki kati na engumba mobali moko akutani na elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te bongo asangisi na ye nzoto, nzokande elenge mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye, 24 bokomema bango mibale na ekuke ya engumba wana mpe kobamba bango mabanga kino bakokufa. Bokoboma mwana mwasi, pamba te azalaki kati na engumba kasi agangaki te mpo ete baya kosunga ye ; bokoboma mobali, pamba te asangisaki nzoto na makasi na mwasi ya mobali mosusu. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino. 25 Soki mobali akoti na zamba na mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe asangisi na ye nzoto na makasi, nzokande mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye, kaka mobali oyo asali likambo wana nde asengeli kokufa. 26 Bokosala likambo moko te epai ya mwana mwasi, pamba te asali lisumu moko te oyo ekoki komema ye na kufa. Likambo oyo ekokani na moto oyo abundisi moninga na ye mpe abomi ye. 27 Pamba te mobali wana akutanaki na mwasi wana na zamba, mpe mwana mwasi wana akokaki koganga na ndenge nyonso alingi, kasi moto moko te akokaki komonana kuna mpo na kosunga ye. 28 Soki mobali akutani na elenge mwasi, oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali te na mobali oyo alingi kobala ye, asangisi na ye nzoto na makasi, mpe bomoni bango ; 29 mobali wana asengeli kofuta mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano epai ya tata ya elenge mwasi, asengeli kobala elenge mwasi yango ; pamba te asangisi na ye nzoto na makasi : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.

In Other Versions

Deuteronomy 22 in the ANGEFD

Deuteronomy 22 in the ANTPNG2D

Deuteronomy 22 in the AS21

Deuteronomy 22 in the BAGH

Deuteronomy 22 in the BBPNG

Deuteronomy 22 in the BBT1E

Deuteronomy 22 in the BDS

Deuteronomy 22 in the BEV

Deuteronomy 22 in the BHAD

Deuteronomy 22 in the BIB

Deuteronomy 22 in the BLPT

Deuteronomy 22 in the BNT

Deuteronomy 22 in the BNTABOOT

Deuteronomy 22 in the BNTLV

Deuteronomy 22 in the BOATCB

Deuteronomy 22 in the BOATCB2

Deuteronomy 22 in the BOBCV

Deuteronomy 22 in the BOCNT

Deuteronomy 22 in the BOECS

Deuteronomy 22 in the BOGWICC

Deuteronomy 22 in the BOHCB

Deuteronomy 22 in the BOHCV

Deuteronomy 22 in the BOHLNT

Deuteronomy 22 in the BOHNTLTAL

Deuteronomy 22 in the BOICB

Deuteronomy 22 in the BOILNTAP

Deuteronomy 22 in the BOITCV

Deuteronomy 22 in the BOKCV

Deuteronomy 22 in the BOKCV2

Deuteronomy 22 in the BOKHWOG

Deuteronomy 22 in the BOKSSV

Deuteronomy 22 in the BOLCB

Deuteronomy 22 in the BOMCV

Deuteronomy 22 in the BONAV

Deuteronomy 22 in the BONCB

Deuteronomy 22 in the BONLT

Deuteronomy 22 in the BONUT2

Deuteronomy 22 in the BOPLNT

Deuteronomy 22 in the BOSCB

Deuteronomy 22 in the BOSNC

Deuteronomy 22 in the BOTLNT

Deuteronomy 22 in the BOVCB

Deuteronomy 22 in the BOYCB

Deuteronomy 22 in the BPBB

Deuteronomy 22 in the BPH

Deuteronomy 22 in the BSB

Deuteronomy 22 in the CCB

Deuteronomy 22 in the CUV

Deuteronomy 22 in the CUVS

Deuteronomy 22 in the DBT

Deuteronomy 22 in the DGDNT

Deuteronomy 22 in the DHNT

Deuteronomy 22 in the DNT

Deuteronomy 22 in the ELBE

Deuteronomy 22 in the EMTV

Deuteronomy 22 in the ESV

Deuteronomy 22 in the FBV

Deuteronomy 22 in the FEB

Deuteronomy 22 in the GGMNT

Deuteronomy 22 in the GNT

Deuteronomy 22 in the HARY

Deuteronomy 22 in the HNT

Deuteronomy 22 in the IRVA

Deuteronomy 22 in the IRVB

Deuteronomy 22 in the IRVG

Deuteronomy 22 in the IRVH

Deuteronomy 22 in the IRVK

Deuteronomy 22 in the IRVM

Deuteronomy 22 in the IRVM2

Deuteronomy 22 in the IRVO

Deuteronomy 22 in the IRVP

Deuteronomy 22 in the IRVT

Deuteronomy 22 in the IRVT2

Deuteronomy 22 in the IRVU

Deuteronomy 22 in the ISVN

Deuteronomy 22 in the JSNT

Deuteronomy 22 in the KAPI

Deuteronomy 22 in the KBT1ETNIK

Deuteronomy 22 in the KBV

Deuteronomy 22 in the KJV

Deuteronomy 22 in the KNFD

Deuteronomy 22 in the LBA

Deuteronomy 22 in the LBLA

Deuteronomy 22 in the LNT

Deuteronomy 22 in the LSV

Deuteronomy 22 in the MAAL

Deuteronomy 22 in the MBV

Deuteronomy 22 in the MBV2

Deuteronomy 22 in the MHNT

Deuteronomy 22 in the MKNFD

Deuteronomy 22 in the MNG

Deuteronomy 22 in the MNT

Deuteronomy 22 in the MNT2

Deuteronomy 22 in the MRS1T

Deuteronomy 22 in the NAA

Deuteronomy 22 in the NASB

Deuteronomy 22 in the NBLA

Deuteronomy 22 in the NBS

Deuteronomy 22 in the NBVTP

Deuteronomy 22 in the NET2

Deuteronomy 22 in the NIV11

Deuteronomy 22 in the NNT

Deuteronomy 22 in the NNT2

Deuteronomy 22 in the NNT3

Deuteronomy 22 in the PDDPT

Deuteronomy 22 in the PFNT

Deuteronomy 22 in the RMNT

Deuteronomy 22 in the SBIAS

Deuteronomy 22 in the SBIBS

Deuteronomy 22 in the SBIBS2

Deuteronomy 22 in the SBICS

Deuteronomy 22 in the SBIDS

Deuteronomy 22 in the SBIGS

Deuteronomy 22 in the SBIHS

Deuteronomy 22 in the SBIIS

Deuteronomy 22 in the SBIIS2

Deuteronomy 22 in the SBIIS3

Deuteronomy 22 in the SBIKS

Deuteronomy 22 in the SBIKS2

Deuteronomy 22 in the SBIMS

Deuteronomy 22 in the SBIOS

Deuteronomy 22 in the SBIPS

Deuteronomy 22 in the SBISS

Deuteronomy 22 in the SBITS

Deuteronomy 22 in the SBITS2

Deuteronomy 22 in the SBITS3

Deuteronomy 22 in the SBITS4

Deuteronomy 22 in the SBIUS

Deuteronomy 22 in the SBIVS

Deuteronomy 22 in the SBT

Deuteronomy 22 in the SBT1E

Deuteronomy 22 in the SCHL

Deuteronomy 22 in the SNT

Deuteronomy 22 in the SUSU

Deuteronomy 22 in the SUSU2

Deuteronomy 22 in the SYNO

Deuteronomy 22 in the TBIAOTANT

Deuteronomy 22 in the TBT1E

Deuteronomy 22 in the TBT1E2

Deuteronomy 22 in the TFTIP

Deuteronomy 22 in the TFTU

Deuteronomy 22 in the TGNTATF3T

Deuteronomy 22 in the THAI

Deuteronomy 22 in the TNFD

Deuteronomy 22 in the TNT

Deuteronomy 22 in the TNTIK

Deuteronomy 22 in the TNTIL

Deuteronomy 22 in the TNTIN

Deuteronomy 22 in the TNTIP

Deuteronomy 22 in the TNTIZ

Deuteronomy 22 in the TOMA

Deuteronomy 22 in the TTENT

Deuteronomy 22 in the UBG

Deuteronomy 22 in the UGV

Deuteronomy 22 in the UGV2

Deuteronomy 22 in the UGV3

Deuteronomy 22 in the VBL

Deuteronomy 22 in the VDCC

Deuteronomy 22 in the YALU

Deuteronomy 22 in the YAPE

Deuteronomy 22 in the YBVTP

Deuteronomy 22 in the ZBP