Ephesians 5 (BOLCB2)
1 Boye, lokola bozali bana oyo Nzambe alingaka mingi, bomekolaka Ye. 2 Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko. 3 Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu. 4 Ezali mpe malamu te mpo na bino kobimisaka maloba ya bozoba, ya bosoto mpe ya maseki, kasi ebongi nde kozongisaka matondi. 5 Pamba te, boyeba yango malamu, moto nyonso oyo asalaka kindumba, makambo ya soni to atondi na lokoso oyo ekokani na kosambela bikeko, akokota te na Bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe. 6 Tika ete moko te akosa bino na maloba ezanga tina, pamba te ezali mpo na biloko ya ndenge wana nde kanda ya Nzambe ekweyelaka bato oyo batosaka Ye te. 7 Bosanganaka te elongo na bato wana. 8 Na kala, bozalaki molili, kasi sik’oyo bokomi pole kati na Nkolo. Boye, botambolaka lokola bana ya pole, 9 pamba te mbuma ya pole ezali : boboto, bosembo, mpe bosolo. 10 Bosalaka makasi mpo na kososola makambo oyo esepelisaka Nkolo. 11 Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa. 12 Pamba te makambo nyonso oyo esalemaka na nkuku ezalaka soni mpo na kolobela yango. 13 Nzokande nyonso oyo pole ebimisaka na pwasa emonana polele, 14 pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba :« Moto na pongi, lamuka,bima kati na bakufi,mpe Klisto akongengisa yo. » 15 Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya. 16 Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe. 17 Yango wana, bozalaka bazoba te, kasi bososolaka oyo ebengami mokano ya Nkolo. 18 Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu ; kasi botondisamaka na Molimo, 19 bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo ; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino ; 20 bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso ; 21 mpe lokola botosaka Klisto, botosanaka bamoko na bamosusu. 22 Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo. 23 Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango. 24 Kasi lokola Lingomba etosaka Klisto, tika ete basi mpe batosaka mibali na bango na makambo nyonso. 25 Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango 26 mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye, 27 mpe mpo na kotalisa yango epai na Ye moko lokola Lingomba etonda na nkembo, ezanga litono to likwanza to mbeba, kasi lokola Lingomba ya bule mpe ezanga pamela. 28 Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko. 29 Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye ; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba, 30 pamba te tozali biteni ya nzoto na Ye. 31 Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko. 32 Ezali wana na mabombami minene, kasi ngai nazali koloba na tina na Klisto mpe Lingomba. 33 Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.
In Other Versions
Ephesians 5 in the ANGEFD
Ephesians 5 in the ANTPNG2D
Ephesians 5 in the AS21
Ephesians 5 in the BAGH
Ephesians 5 in the BBPNG
Ephesians 5 in the BBT1E
Ephesians 5 in the BDS
Ephesians 5 in the BEV
Ephesians 5 in the BHAD
Ephesians 5 in the BIB
Ephesians 5 in the BLPT
Ephesians 5 in the BNT
Ephesians 5 in the BNTABOOT
Ephesians 5 in the BNTLV
Ephesians 5 in the BOATCB
Ephesians 5 in the BOATCB2
Ephesians 5 in the BOBCV
Ephesians 5 in the BOCNT
Ephesians 5 in the BOECS
Ephesians 5 in the BOGWICC
Ephesians 5 in the BOHCB
Ephesians 5 in the BOHCV
Ephesians 5 in the BOHLNT
Ephesians 5 in the BOHNTLTAL
Ephesians 5 in the BOICB
Ephesians 5 in the BOILNTAP
Ephesians 5 in the BOITCV
Ephesians 5 in the BOKCV
Ephesians 5 in the BOKCV2
Ephesians 5 in the BOKHWOG
Ephesians 5 in the BOKSSV
Ephesians 5 in the BOLCB
Ephesians 5 in the BOMCV
Ephesians 5 in the BONAV
Ephesians 5 in the BONCB
Ephesians 5 in the BONLT
Ephesians 5 in the BONUT2
Ephesians 5 in the BOPLNT
Ephesians 5 in the BOSCB
Ephesians 5 in the BOSNC
Ephesians 5 in the BOTLNT
Ephesians 5 in the BOVCB
Ephesians 5 in the BOYCB
Ephesians 5 in the BPBB
Ephesians 5 in the BPH
Ephesians 5 in the BSB
Ephesians 5 in the CCB
Ephesians 5 in the CUV
Ephesians 5 in the CUVS
Ephesians 5 in the DBT
Ephesians 5 in the DGDNT
Ephesians 5 in the DHNT
Ephesians 5 in the DNT
Ephesians 5 in the ELBE
Ephesians 5 in the EMTV
Ephesians 5 in the ESV
Ephesians 5 in the FBV
Ephesians 5 in the FEB
Ephesians 5 in the GGMNT
Ephesians 5 in the GNT
Ephesians 5 in the HARY
Ephesians 5 in the HNT
Ephesians 5 in the IRVA
Ephesians 5 in the IRVB
Ephesians 5 in the IRVG
Ephesians 5 in the IRVH
Ephesians 5 in the IRVK
Ephesians 5 in the IRVM
Ephesians 5 in the IRVM2
Ephesians 5 in the IRVO
Ephesians 5 in the IRVP
Ephesians 5 in the IRVT
Ephesians 5 in the IRVT2
Ephesians 5 in the IRVU
Ephesians 5 in the ISVN
Ephesians 5 in the JSNT
Ephesians 5 in the KAPI
Ephesians 5 in the KBT1ETNIK
Ephesians 5 in the KBV
Ephesians 5 in the KJV
Ephesians 5 in the KNFD
Ephesians 5 in the LBA
Ephesians 5 in the LBLA
Ephesians 5 in the LNT
Ephesians 5 in the LSV
Ephesians 5 in the MAAL
Ephesians 5 in the MBV
Ephesians 5 in the MBV2
Ephesians 5 in the MHNT
Ephesians 5 in the MKNFD
Ephesians 5 in the MNG
Ephesians 5 in the MNT
Ephesians 5 in the MNT2
Ephesians 5 in the MRS1T
Ephesians 5 in the NAA
Ephesians 5 in the NASB
Ephesians 5 in the NBLA
Ephesians 5 in the NBS
Ephesians 5 in the NBVTP
Ephesians 5 in the NET2
Ephesians 5 in the NIV11
Ephesians 5 in the NNT
Ephesians 5 in the NNT2
Ephesians 5 in the NNT3
Ephesians 5 in the PDDPT
Ephesians 5 in the PFNT
Ephesians 5 in the RMNT
Ephesians 5 in the SBIAS
Ephesians 5 in the SBIBS
Ephesians 5 in the SBIBS2
Ephesians 5 in the SBICS
Ephesians 5 in the SBIDS
Ephesians 5 in the SBIGS
Ephesians 5 in the SBIHS
Ephesians 5 in the SBIIS
Ephesians 5 in the SBIIS2
Ephesians 5 in the SBIIS3
Ephesians 5 in the SBIKS
Ephesians 5 in the SBIKS2
Ephesians 5 in the SBIMS
Ephesians 5 in the SBIOS
Ephesians 5 in the SBIPS
Ephesians 5 in the SBISS
Ephesians 5 in the SBITS
Ephesians 5 in the SBITS2
Ephesians 5 in the SBITS3
Ephesians 5 in the SBITS4
Ephesians 5 in the SBIUS
Ephesians 5 in the SBIVS
Ephesians 5 in the SBT
Ephesians 5 in the SBT1E
Ephesians 5 in the SCHL
Ephesians 5 in the SNT
Ephesians 5 in the SUSU
Ephesians 5 in the SUSU2
Ephesians 5 in the SYNO
Ephesians 5 in the TBIAOTANT
Ephesians 5 in the TBT1E
Ephesians 5 in the TBT1E2
Ephesians 5 in the TFTIP
Ephesians 5 in the TFTU
Ephesians 5 in the TGNTATF3T
Ephesians 5 in the THAI
Ephesians 5 in the TNFD
Ephesians 5 in the TNT
Ephesians 5 in the TNTIK
Ephesians 5 in the TNTIL
Ephesians 5 in the TNTIN
Ephesians 5 in the TNTIP
Ephesians 5 in the TNTIZ
Ephesians 5 in the TOMA
Ephesians 5 in the TTENT
Ephesians 5 in the UBG
Ephesians 5 in the UGV
Ephesians 5 in the UGV2
Ephesians 5 in the UGV3
Ephesians 5 in the VBL
Ephesians 5 in the VDCC
Ephesians 5 in the YALU
Ephesians 5 in the YAPE
Ephesians 5 in the YBVTP
Ephesians 5 in the ZBP