Zephaniah 3 (BOLCB2)
1 Mawa na engumba ya batomboki,engumba ya makambo ya mbindo,mpe engumba oyo enyokolaka bato ! 2 Etosaka moto te,endimaka pamela te,etiaka elikya na Yawe te,epusanaka pene ya Nzambe na yango te. 3 Bakalaka na yango bazali lokola bankosioyo ezali koganga ;bakambi na yango bazalilokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa,bongo etikaka ata eloko moko te na tongo. 4 Basakoli na yango bazalibato ya lolendo mpe ya lokuta.Banganga-Nzambe na yango babebisakaEsika ya bule mpe batosaka mibeko te. 5 Kati na engumba yango,Yawe azali sembo, asalaka mabe te ;mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Yempe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo.Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo teamonaka likambo ya soni te. 6 Nabomi bato ya bikolo mosusu,bandako na bango ya makasi ebebisami.Nasali ete babalabala na bangoetikala lisusu na bato tempo ete moto moko te alekela lisusu wana.Bingumba na bango ebebisami,ata moto moko te atikali lisusu kuna. 7 Namilobelaki boye na tina na engumba oyo :« Solo, okobanga Ngai mpe okondima pamela na Ngai ! »Boye bandako na yango ekobukana lisusu te,mpe nakotindela yango lisusu etumbu moko te.Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosalamisala na bango ya mabe. 8 Yango wana, « bozela Ngai, »elobi Yawe,« bozela Ngai na mokolo oyo nakoyampo na kosamba elongo na bino ;nazwaki mokano ya kosangisabato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonsompo na kosopela bango kanda na Ngai,makasi nyonso penza ya kanda na Ngai :mokili mobimba ekozika na motoya nguya ya kanda na Ngai. 9 Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolompo ete bango nyonso bazala ya kokokampo na kobelela Kombo ya Yawempe kosalela Ye na motema mobimba. 10 Longwa na likolo ya bibale ya Kushi,bato na Ngai, oyo bagumbamelaka Ngai ;bato na Ngai, oyo bapalangana bipai na bipai,bakomemela Ngai makabo. 11 Na mokolo wana, oh bato na Ngai,bokoyokisama lisusu soni tempo na mabe nyonso oyo bosalaki Ngai,pamba te nakolongola batooyo bamimatisaka na lolendo kati na bino.Boye bokomitombola lisusu te na lolendona ngomba na Ngai ya bule. 12 Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela,bato oyo batambolaka na komikitisa,bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe. 13 Batikali ya Isalaele bakosala lisusu mabe te,bakokosa lisusu teto lokuta ekozala lisusu te kati na minoko na bango.Bakolia mpe bakolala na kimia,mpe moto moko te akobangisa bango lisusu. 14 Siona, mboka kitoko, yemba nzembo !Isalaele, ganga makasi !Yelusalemi, mboka kitoko, sepela ;mpe tika ete motema na yo etonda na esengo ! 15 Yawe alongoli etumbu na yompe akimisi banguna na yo.Yawe, Mokonzi ya Isalaele, azali elongo na yo ;kobanga lisusu pasi moko te. 16 Na mokolo wana,bakoloba na Yelusalemi :‹ Oh Siona, kobanga te !Tika ete maboko na yo elemba te ! 17 Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo,azali Elombe Mobikisi.Akosepela na yo makasimpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ;akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. › 18 Lokola na mikolo ya bafeti oyo ekatama,nakolongola pasi kati na yompo ete ozala lisusu na soni te. 19 Na tango wana, nakobeta bato nyonsooyo banyokolaki yo,nakosunga moto oyo atambolaka tengu-tengumpe nakosangisa bato oyo bapanzana bipai na bipai.Nakopesa bango lokumumpe nakosala ete sango na bangoepanzana na mikili nyonsoepai wapi basambwisaki bango. 20 Na tango wana, nakosangisa bino,nakozongisa bino na mokili na bino.Nakopesa bino lokumumpe nakosala ete sango na bino epanzanakati na bato ya bikolo nyonso ya mokilitango, na miso na bino, nakozongisa bato na bino,oyo bakendeki na bowumbu, »elobi Yawe.
In Other Versions
Zephaniah 3 in the ANGEFD
Zephaniah 3 in the ANTPNG2D
Zephaniah 3 in the AS21
Zephaniah 3 in the BAGH
Zephaniah 3 in the BBPNG
Zephaniah 3 in the BBT1E
Zephaniah 3 in the BDS
Zephaniah 3 in the BEV
Zephaniah 3 in the BHAD
Zephaniah 3 in the BIB
Zephaniah 3 in the BLPT
Zephaniah 3 in the BNT
Zephaniah 3 in the BNTABOOT
Zephaniah 3 in the BNTLV
Zephaniah 3 in the BOATCB
Zephaniah 3 in the BOATCB2
Zephaniah 3 in the BOBCV
Zephaniah 3 in the BOCNT
Zephaniah 3 in the BOECS
Zephaniah 3 in the BOGWICC
Zephaniah 3 in the BOHCB
Zephaniah 3 in the BOHCV
Zephaniah 3 in the BOHLNT
Zephaniah 3 in the BOHNTLTAL
Zephaniah 3 in the BOICB
Zephaniah 3 in the BOILNTAP
Zephaniah 3 in the BOITCV
Zephaniah 3 in the BOKCV
Zephaniah 3 in the BOKCV2
Zephaniah 3 in the BOKHWOG
Zephaniah 3 in the BOKSSV
Zephaniah 3 in the BOLCB
Zephaniah 3 in the BOMCV
Zephaniah 3 in the BONAV
Zephaniah 3 in the BONCB
Zephaniah 3 in the BONLT
Zephaniah 3 in the BONUT2
Zephaniah 3 in the BOPLNT
Zephaniah 3 in the BOSCB
Zephaniah 3 in the BOSNC
Zephaniah 3 in the BOTLNT
Zephaniah 3 in the BOVCB
Zephaniah 3 in the BOYCB
Zephaniah 3 in the BPBB
Zephaniah 3 in the BPH
Zephaniah 3 in the BSB
Zephaniah 3 in the CCB
Zephaniah 3 in the CUV
Zephaniah 3 in the CUVS
Zephaniah 3 in the DBT
Zephaniah 3 in the DGDNT
Zephaniah 3 in the DHNT
Zephaniah 3 in the DNT
Zephaniah 3 in the ELBE
Zephaniah 3 in the EMTV
Zephaniah 3 in the ESV
Zephaniah 3 in the FBV
Zephaniah 3 in the FEB
Zephaniah 3 in the GGMNT
Zephaniah 3 in the GNT
Zephaniah 3 in the HARY
Zephaniah 3 in the HNT
Zephaniah 3 in the IRVA
Zephaniah 3 in the IRVB
Zephaniah 3 in the IRVG
Zephaniah 3 in the IRVH
Zephaniah 3 in the IRVK
Zephaniah 3 in the IRVM
Zephaniah 3 in the IRVM2
Zephaniah 3 in the IRVO
Zephaniah 3 in the IRVP
Zephaniah 3 in the IRVT
Zephaniah 3 in the IRVT2
Zephaniah 3 in the IRVU
Zephaniah 3 in the ISVN
Zephaniah 3 in the JSNT
Zephaniah 3 in the KAPI
Zephaniah 3 in the KBT1ETNIK
Zephaniah 3 in the KBV
Zephaniah 3 in the KJV
Zephaniah 3 in the KNFD
Zephaniah 3 in the LBA
Zephaniah 3 in the LBLA
Zephaniah 3 in the LNT
Zephaniah 3 in the LSV
Zephaniah 3 in the MAAL
Zephaniah 3 in the MBV
Zephaniah 3 in the MBV2
Zephaniah 3 in the MHNT
Zephaniah 3 in the MKNFD
Zephaniah 3 in the MNG
Zephaniah 3 in the MNT
Zephaniah 3 in the MNT2
Zephaniah 3 in the MRS1T
Zephaniah 3 in the NAA
Zephaniah 3 in the NASB
Zephaniah 3 in the NBLA
Zephaniah 3 in the NBS
Zephaniah 3 in the NBVTP
Zephaniah 3 in the NET2
Zephaniah 3 in the NIV11
Zephaniah 3 in the NNT
Zephaniah 3 in the NNT2
Zephaniah 3 in the NNT3
Zephaniah 3 in the PDDPT
Zephaniah 3 in the PFNT
Zephaniah 3 in the RMNT
Zephaniah 3 in the SBIAS
Zephaniah 3 in the SBIBS
Zephaniah 3 in the SBIBS2
Zephaniah 3 in the SBICS
Zephaniah 3 in the SBIDS
Zephaniah 3 in the SBIGS
Zephaniah 3 in the SBIHS
Zephaniah 3 in the SBIIS
Zephaniah 3 in the SBIIS2
Zephaniah 3 in the SBIIS3
Zephaniah 3 in the SBIKS
Zephaniah 3 in the SBIKS2
Zephaniah 3 in the SBIMS
Zephaniah 3 in the SBIOS
Zephaniah 3 in the SBIPS
Zephaniah 3 in the SBISS
Zephaniah 3 in the SBITS
Zephaniah 3 in the SBITS2
Zephaniah 3 in the SBITS3
Zephaniah 3 in the SBITS4
Zephaniah 3 in the SBIUS
Zephaniah 3 in the SBIVS
Zephaniah 3 in the SBT
Zephaniah 3 in the SBT1E
Zephaniah 3 in the SCHL
Zephaniah 3 in the SNT
Zephaniah 3 in the SUSU
Zephaniah 3 in the SUSU2
Zephaniah 3 in the SYNO
Zephaniah 3 in the TBIAOTANT
Zephaniah 3 in the TBT1E
Zephaniah 3 in the TBT1E2
Zephaniah 3 in the TFTIP
Zephaniah 3 in the TFTU
Zephaniah 3 in the TGNTATF3T
Zephaniah 3 in the THAI
Zephaniah 3 in the TNFD
Zephaniah 3 in the TNT
Zephaniah 3 in the TNTIK
Zephaniah 3 in the TNTIL
Zephaniah 3 in the TNTIN
Zephaniah 3 in the TNTIP
Zephaniah 3 in the TNTIZ
Zephaniah 3 in the TOMA
Zephaniah 3 in the TTENT
Zephaniah 3 in the UBG
Zephaniah 3 in the UGV
Zephaniah 3 in the UGV2
Zephaniah 3 in the UGV3
Zephaniah 3 in the VBL
Zephaniah 3 in the VDCC
Zephaniah 3 in the YALU
Zephaniah 3 in the YAPE
Zephaniah 3 in the YBVTP
Zephaniah 3 in the ZBP