John 20 (BOLCB2)

1 Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana molili ezalaki nanu, Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki na kunda mpe amonaki ete libanga esilaki kolongolama na ekotelo ya kunda. 2 Apotaki mbangu mpo na kokende kokutana na Simona Petelo mpe moyekoli mosusu, ye oyo Yesu azalaki kolinga ; alobaki na bango :— Balongoli Nkolo wuta na kunda, mpe toyebi te soki batie Ye wapi ! 3 Petelo elongo na moyekoli wana bakendeki na kunda. 4 Bango mibale bazalaki kopota mbangu nzela moko ; kasi lokola moyekoli wana azalaki mbangu koleka Petelo, akomaki moto ya liboso na kunda. 5 Agunzamaki mpo na kotala mpe amonaki, na mabele, maputa oyo bakundaki na yango Yesu ; kasi akotaki te. 6 Simona Petelo oyo azalaki kolanda ye akomaki mpe akotaki kati na kunda, amonaki maputa oyo ezalaki na mabele 7 mpe elamba oyo balingaki na moto ya Yesu ; elamba ezalaki esika moko te na maputa oyo balingaki na yango nzoto ya Yesu, kasi ezalaki ya kolingama na esika na yango moko. 8 Bongo moyekoli oyo akomaki moto ya liboso kuna na kunda, ye mpe akotaki kati na kunda ; amonaki mpe andimaki. 9 Kasi kino na tango wana, basosolaki nanu te ete Yesu asengelaki kosekwa kati na bakufi, kolanda ndenge Makomi ezali koloba. 10 Sima na yango, bayekoli nyonso mibale bazongaki na esika oyo bazalaki kovanda. 11 Nzokande, Mari atelemaki na libanda, pene ya kunda, mpe azalaki kolela. Mpe wana azalaki kolela, agunzamaki mpo na kotala kati na kunda ; 12 amonaki ba-anjelu mibale balata bilamba ya pembe mpe bavanda na esika oyo nzoto ya Yesu ezalaki : moko na ngambo ya moto, mpe mosusu, na ngambo ya makolo. 13 Ba-anjelu batunaki ye :— Mwasi, mpo na nini ozali kolela ?Azongisaki :— Nazali kolela mpo ete balongoli Nkolo na ngai mpe nayebi te soki batie Ye wapi ? 14 Tango alobaki bongo, abalukaki mpe amonaki Yesu atelemi wana, kasi ayebaki te ete ezali Yesu. 15 Yesu atunaki ye : — Mwasi, mpo na nini ozali kolela ? Ozali koluka nani ?Mari akanisaki ete azali mosali elanga ; alobaki na ye :— Tata, soki yo nde moto olongolaki Ye, yebisa ngai esika nini otie Ye mpo ete nakende kokamata Ye. 16 Yesu alobaki na ye : — Mari !Mari abalukaki mpe alobaki na lokota ya Ebre :— Rabuni ! 17 Yesu alobaki na ye : — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino. 18 Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki koyebisa bayekoli ete awuti komona Nkolo ; ayebisaki bango lisusu makambo oyo Nkolo alobaki na ye. 19 Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino ! 20 Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko na Ye mpe mopanzi na Ye. Bayekoli batondaki na esengo tango bamonaki Nkolo. 21 Yesu alobaki na bango lisusu : — Tika ete kimia ezala na bino ! Ndenge Tata atindaki Ngai, Ngai mpe nazali kotinda bino. 22 Sima na Yesu koloba makambo wana, afulaki bango mopepe mpe alobaki na bango : — Boyamba Molimo Mosantu ! 23 Bato oyo bokolimbisa masumu na bango, masumu na bango ekolimbisama ; kasi ba-oyo bokolimbisa te, bakozwa mpe bolimbisi te. 24 Toma, moko kati na bayekoli zomi na mibale, oyo babengaka Lipasa, azalaki te elongo na bayekoli tango Yesu ayaki. 25 Bayekoli mosusu balobaki na ye :— Towuti komona Nkolo !Kasi Toma azongiselaki bango :— Soki ngai namoni te bilembo ya basete na maboko na Ye, soki natie mosapi na ngai te kati na bisika oyo basete etobolaki Ye, mpe soki natie te loboko na ngai kati na mopanzi na Ye, nakotikala kondima te. 26 Sima na mikolo mwambe, bayekoli ya Yesu basanganaki lisusu kati na ndako. Na mbala oyo, Toma mpe azalaki elongo na bango, mpe bikuke ezalaki ya kokangama. Yesu ayaki, atelemaki kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino ! 27 Bongo, alobaki na Toma : — Tia mosapi na yo awa, tala maboko na Ngai ; sembola loboko na yo mpe tia yango na mopanzi na Ngai. Kozala te moto oyo azangi kondima, kasi moto na kondima ! 28 Toma azongiselaki Yesu :— Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai ! 29 Yesu alobaki na ye : — Ondimi mpo ete omoni Ngai ! Esengo na bato oyo bamoni te, kasi bandimi ! 30 Yesu asalaki lisusu, na miso ya bayekoli na Ye, bikamwa mosusu mingi oyo ekomami te kati na buku oyo. 31 Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.

In Other Versions

John 20 in the ANGEFD

John 20 in the ANTPNG2D

John 20 in the AS21

John 20 in the BAGH

John 20 in the BBPNG

John 20 in the BBT1E

John 20 in the BDS

John 20 in the BEV

John 20 in the BHAD

John 20 in the BIB

John 20 in the BLPT

John 20 in the BNT

John 20 in the BNTABOOT

John 20 in the BNTLV

John 20 in the BOATCB

John 20 in the BOATCB2

John 20 in the BOBCV

John 20 in the BOCNT

John 20 in the BOECS

John 20 in the BOGWICC

John 20 in the BOHCB

John 20 in the BOHCV

John 20 in the BOHLNT

John 20 in the BOHNTLTAL

John 20 in the BOICB

John 20 in the BOILNTAP

John 20 in the BOITCV

John 20 in the BOKCV

John 20 in the BOKCV2

John 20 in the BOKHWOG

John 20 in the BOKSSV

John 20 in the BOLCB

John 20 in the BOMCV

John 20 in the BONAV

John 20 in the BONCB

John 20 in the BONLT

John 20 in the BONUT2

John 20 in the BOPLNT

John 20 in the BOSCB

John 20 in the BOSNC

John 20 in the BOTLNT

John 20 in the BOVCB

John 20 in the BOYCB

John 20 in the BPBB

John 20 in the BPH

John 20 in the BSB

John 20 in the CCB

John 20 in the CUV

John 20 in the CUVS

John 20 in the DBT

John 20 in the DGDNT

John 20 in the DHNT

John 20 in the DNT

John 20 in the ELBE

John 20 in the EMTV

John 20 in the ESV

John 20 in the FBV

John 20 in the FEB

John 20 in the GGMNT

John 20 in the GNT

John 20 in the HARY

John 20 in the HNT

John 20 in the IRVA

John 20 in the IRVB

John 20 in the IRVG

John 20 in the IRVH

John 20 in the IRVK

John 20 in the IRVM

John 20 in the IRVM2

John 20 in the IRVO

John 20 in the IRVP

John 20 in the IRVT

John 20 in the IRVT2

John 20 in the IRVU

John 20 in the ISVN

John 20 in the JSNT

John 20 in the KAPI

John 20 in the KBT1ETNIK

John 20 in the KBV

John 20 in the KJV

John 20 in the KNFD

John 20 in the LBA

John 20 in the LBLA

John 20 in the LNT

John 20 in the LSV

John 20 in the MAAL

John 20 in the MBV

John 20 in the MBV2

John 20 in the MHNT

John 20 in the MKNFD

John 20 in the MNG

John 20 in the MNT

John 20 in the MNT2

John 20 in the MRS1T

John 20 in the NAA

John 20 in the NASB

John 20 in the NBLA

John 20 in the NBS

John 20 in the NBVTP

John 20 in the NET2

John 20 in the NIV11

John 20 in the NNT

John 20 in the NNT2

John 20 in the NNT3

John 20 in the PDDPT

John 20 in the PFNT

John 20 in the RMNT

John 20 in the SBIAS

John 20 in the SBIBS

John 20 in the SBIBS2

John 20 in the SBICS

John 20 in the SBIDS

John 20 in the SBIGS

John 20 in the SBIHS

John 20 in the SBIIS

John 20 in the SBIIS2

John 20 in the SBIIS3

John 20 in the SBIKS

John 20 in the SBIKS2

John 20 in the SBIMS

John 20 in the SBIOS

John 20 in the SBIPS

John 20 in the SBISS

John 20 in the SBITS

John 20 in the SBITS2

John 20 in the SBITS3

John 20 in the SBITS4

John 20 in the SBIUS

John 20 in the SBIVS

John 20 in the SBT

John 20 in the SBT1E

John 20 in the SCHL

John 20 in the SNT

John 20 in the SUSU

John 20 in the SUSU2

John 20 in the SYNO

John 20 in the TBIAOTANT

John 20 in the TBT1E

John 20 in the TBT1E2

John 20 in the TFTIP

John 20 in the TFTU

John 20 in the TGNTATF3T

John 20 in the THAI

John 20 in the TNFD

John 20 in the TNT

John 20 in the TNTIK

John 20 in the TNTIL

John 20 in the TNTIN

John 20 in the TNTIP

John 20 in the TNTIZ

John 20 in the TOMA

John 20 in the TTENT

John 20 in the UBG

John 20 in the UGV

John 20 in the UGV2

John 20 in the UGV3

John 20 in the VBL

John 20 in the VDCC

John 20 in the YALU

John 20 in the YAPE

John 20 in the YBVTP

John 20 in the ZBP