Psalms 107 (BOLCB2)

1 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! 2 Tika ete bato oyo Yawe asikolakibaloba bongo,ba-oyo akangolaki wuta na maboko ya monguna, 3 ba-oyo asangisaki wuta na bikolo nyonso,wuta na este, na weste, na nor mpe na sude. 4 Ndambo bazalaki koyengayenga na esobe,na esika oyo ezanga bato,bamonaki te nzela ya engumbaepai wapi bakoki kovanda. 5 Likolo ya nzala mpe ya posa ya mayi,bakomaki pene ya kokufa. 6 Bongo kati na pasi na bango,babelelaki Yawe,mpe akangolaki bango na mitungisi na bango. 7 Atambolisaki bango na nzela ya alimampo ete bakende kovanda kati na engumba. 8 Tika ete basanzola Yawempo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato ! 9 Apesaki mayi epai ya batooyo bazalaki na posa ya mayimpe bilei epai ya bato oyo bazalaki na nzala. 10 Bato oyo bazalaki kovanda na bisikaya molili makasi mpe ya molili ya kufabazalaki ya kokangama na minyokompe na minyololo ya bibende, 11 pamba te batombokelaki maloba na Nzambempe batiolaki mabongisi ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. 12 Abukaki lolendo ya mitema na bangona nzela ya misala makasi ;bakweyaki, mpe moko te asungaki bango. 13 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe,mpe abikisaki bango na mitungisi na bango. 14 Abimisaki bangowuta na molili makasi mpe na molili ya kufa,mpe abukaki minyololo na bango. 15 Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingompe bikamwa na Ye mpo na bato ! 16 Pamba te abukaki bikuke ya bronzempe akataki bikangelo ya mabende. 17 Bamosusu bakomaki bazobampo na etamboli mabe na bango,mpe bato na pasi, mpo na masumu na bango. 18 Minoko na bango eyinaki bilei nyonso,mpe bakomaki pene ya bikuke ya kufa. 19 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe,mpe abikisaki bango na mitungisi na bango. 20 Atindaki Liloba na Ye mpe abikisaki bango,akangolaki bango wuta na kunda. 21 Tika ete basanzola Yawempo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato ! 22 Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondimpe bapanza sango ya misala na Yena koganga na esengo ! 23 Bato oyo bakendaka mobembona ebale monene kati na masuwampe basalaka mombongo na mayi minene 24 bamonaki misala ya Yawe,mpe bikamwa kati na ebale monene. 25 Alobaki, mpe mopepe makasi eyaki,etombolaki bambonge. 26 Bazalaki komata kino na likolompe kokita kino na se,bazalaki kolemba nzoto kati na pasi. 27 Bazwaki kizunguzungu mpe bakomaki kotenga-tengalokola bato balangwe masanga,bwanya na bango nyonso elimwaki. 28 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawempe abimisaki bango na mitungisi na bango. 29 Akitisaki mopepe makasi,bambonge ya ebale monene evandaki kimia. 30 Basepelaki na kimia oyo ezongaki,mpe Nzambe amemaki bangokino na libongo oyo balingaki. 31 Tika ete basanzola Yawempo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato ! 32 Tika ete banetola Ye kati na lisanga ya batompe bakumisa Ye kati na mayangani ya bakambi. 33 Akoki kobongola bibale esobe ;kobongola bitima mabele ya kokawuka ; 34 kobongola mabele oyo ebotaka bambumamabele ya mungwalikolo ya mabe ya bavandi na yango. 35 Akoki kobongola esobe liziba ;kobongola mabele ya kokawuka bitima. 36 Akoki kosala ete bato na nzalabakoma kovanda kuna,batonga engumba oyo bato bakoki kovanda, 37 babwaka bambuma na bilangampe balona banzete ya vinooyo ekobota bambuma ebele. 38 Apamboli bango, mpe bakomi ebele ;mpe akitisi te motango ya bibwele na bango. 39 Motango ya bato mosusu ekitimpe balembi nzoto mpo na minyoko mpe pasi. 40 Nzambe asambwisaka bato minene,akotisaka bango na mobulu makasikino bazanga nzela ya kobimela na pasi. 41 Kasi akangolaka babola wuta na pasi na bango,mpe asalaka ete babotana ebelekati na bituka na bangolokola etonga ya bameme. 42 Tango bato ya sembo bamonaka bongo,basepelaka,kasi bato nyonso ya mabe bakangakaminoko na bango. 43 Tika ete moto ya bwanya asala kebana makambo wana nyonsompe akanisa na tina na bolingo ya Yawe !

In Other Versions

Psalms 107 in the ANGEFD

Psalms 107 in the ANTPNG2D

Psalms 107 in the AS21

Psalms 107 in the BAGH

Psalms 107 in the BBPNG

Psalms 107 in the BBT1E

Psalms 107 in the BDS

Psalms 107 in the BEV

Psalms 107 in the BHAD

Psalms 107 in the BIB

Psalms 107 in the BLPT

Psalms 107 in the BNT

Psalms 107 in the BNTABOOT

Psalms 107 in the BNTLV

Psalms 107 in the BOATCB

Psalms 107 in the BOATCB2

Psalms 107 in the BOBCV

Psalms 107 in the BOCNT

Psalms 107 in the BOECS

Psalms 107 in the BOGWICC

Psalms 107 in the BOHCB

Psalms 107 in the BOHCV

Psalms 107 in the BOHLNT

Psalms 107 in the BOHNTLTAL

Psalms 107 in the BOICB

Psalms 107 in the BOILNTAP

Psalms 107 in the BOITCV

Psalms 107 in the BOKCV

Psalms 107 in the BOKCV2

Psalms 107 in the BOKHWOG

Psalms 107 in the BOKSSV

Psalms 107 in the BOLCB

Psalms 107 in the BOMCV

Psalms 107 in the BONAV

Psalms 107 in the BONCB

Psalms 107 in the BONLT

Psalms 107 in the BONUT2

Psalms 107 in the BOPLNT

Psalms 107 in the BOSCB

Psalms 107 in the BOSNC

Psalms 107 in the BOTLNT

Psalms 107 in the BOVCB

Psalms 107 in the BOYCB

Psalms 107 in the BPBB

Psalms 107 in the BPH

Psalms 107 in the BSB

Psalms 107 in the CCB

Psalms 107 in the CUV

Psalms 107 in the CUVS

Psalms 107 in the DBT

Psalms 107 in the DGDNT

Psalms 107 in the DHNT

Psalms 107 in the DNT

Psalms 107 in the ELBE

Psalms 107 in the EMTV

Psalms 107 in the ESV

Psalms 107 in the FBV

Psalms 107 in the FEB

Psalms 107 in the GGMNT

Psalms 107 in the GNT

Psalms 107 in the HARY

Psalms 107 in the HNT

Psalms 107 in the IRVA

Psalms 107 in the IRVB

Psalms 107 in the IRVG

Psalms 107 in the IRVH

Psalms 107 in the IRVK

Psalms 107 in the IRVM

Psalms 107 in the IRVM2

Psalms 107 in the IRVO

Psalms 107 in the IRVP

Psalms 107 in the IRVT

Psalms 107 in the IRVT2

Psalms 107 in the IRVU

Psalms 107 in the ISVN

Psalms 107 in the JSNT

Psalms 107 in the KAPI

Psalms 107 in the KBT1ETNIK

Psalms 107 in the KBV

Psalms 107 in the KJV

Psalms 107 in the KNFD

Psalms 107 in the LBA

Psalms 107 in the LBLA

Psalms 107 in the LNT

Psalms 107 in the LSV

Psalms 107 in the MAAL

Psalms 107 in the MBV

Psalms 107 in the MBV2

Psalms 107 in the MHNT

Psalms 107 in the MKNFD

Psalms 107 in the MNG

Psalms 107 in the MNT

Psalms 107 in the MNT2

Psalms 107 in the MRS1T

Psalms 107 in the NAA

Psalms 107 in the NASB

Psalms 107 in the NBLA

Psalms 107 in the NBS

Psalms 107 in the NBVTP

Psalms 107 in the NET2

Psalms 107 in the NIV11

Psalms 107 in the NNT

Psalms 107 in the NNT2

Psalms 107 in the NNT3

Psalms 107 in the PDDPT

Psalms 107 in the PFNT

Psalms 107 in the RMNT

Psalms 107 in the SBIAS

Psalms 107 in the SBIBS

Psalms 107 in the SBIBS2

Psalms 107 in the SBICS

Psalms 107 in the SBIDS

Psalms 107 in the SBIGS

Psalms 107 in the SBIHS

Psalms 107 in the SBIIS

Psalms 107 in the SBIIS2

Psalms 107 in the SBIIS3

Psalms 107 in the SBIKS

Psalms 107 in the SBIKS2

Psalms 107 in the SBIMS

Psalms 107 in the SBIOS

Psalms 107 in the SBIPS

Psalms 107 in the SBISS

Psalms 107 in the SBITS

Psalms 107 in the SBITS2

Psalms 107 in the SBITS3

Psalms 107 in the SBITS4

Psalms 107 in the SBIUS

Psalms 107 in the SBIVS

Psalms 107 in the SBT

Psalms 107 in the SBT1E

Psalms 107 in the SCHL

Psalms 107 in the SNT

Psalms 107 in the SUSU

Psalms 107 in the SUSU2

Psalms 107 in the SYNO

Psalms 107 in the TBIAOTANT

Psalms 107 in the TBT1E

Psalms 107 in the TBT1E2

Psalms 107 in the TFTIP

Psalms 107 in the TFTU

Psalms 107 in the TGNTATF3T

Psalms 107 in the THAI

Psalms 107 in the TNFD

Psalms 107 in the TNT

Psalms 107 in the TNTIK

Psalms 107 in the TNTIL

Psalms 107 in the TNTIN

Psalms 107 in the TNTIP

Psalms 107 in the TNTIZ

Psalms 107 in the TOMA

Psalms 107 in the TTENT

Psalms 107 in the UBG

Psalms 107 in the UGV

Psalms 107 in the UGV2

Psalms 107 in the UGV3

Psalms 107 in the VBL

Psalms 107 in the VDCC

Psalms 107 in the YALU

Psalms 107 in the YAPE

Psalms 107 in the YBVTP

Psalms 107 in the ZBP