Revelation 18 (BOLCB2)

1 Sima na makambo wana, namonaki anjelu mosusu kokita wuta na Lola ; azalaki na bokonzi monene, mpe nkembo na ye engengisaki mokili. 2 Agangaki na mongongo makasi :« Ekweyi ! Ekweyi !Babiloni monene ekweyi penza !Ekomi ndako ya milimo mabe,ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo,ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele. 3 Pamba te bikolo nyonso emelakivino ya kanda ya kindumba na yango.Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni,mpe bozwi ya bato ya mokili,oyo basalaka mombongo,emataki makasi mpo na monzele na yango,oyo elekaki ndelo. » 4 Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo : « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango. 5 Pamba te masumu na yango esali mipiku kino na likolo, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na yango nyonso ya mabe. 6 Bosala yango ndenge kaka yango esalaki bato mosusu, bozongisela yango mbala mibale mabe oyo esalaki bino. Kati na kopo oyo ezalaki kosalela mpo na komelisa bamosusu masanga, botia masanga oyo ezali makasi mbala mibale koleka. 7 Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango : ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. › 8 Yango wana, bitumbu nyonso ekokweyela yango na mokolo moko : kufa, matanga mpe nzala. Ekozikisama na moto, pamba te Nzambe oyo apesi yango etumbu azali Nkolo-Na-Nguya. 9 Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango. 10 Mpo na somo ya minyoko na yango, bakotelema na mosika mpe bakoganga : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene ! Mawa na yo, Babiloni, engumba ya nguya ! Kobebisama na yo ezwi kaka ngonga moko pamba ! › 11 Bongo bato ya mombongo ya mokili bakolela mpe bakosala matanga na tina na yango, pamba te moko te akosomba lisusu biloko na yango : 12 wolo, palata, mabanga ya talo, mayaka, bilamba ya lino ya kitoko, bilamba ya motane ya pete, bilamba ya swa, bilamba ya motane makasi, banzete na bango ya solo kitoko, biloko na bango oyo basala na pembe ya nzoko, biloko nyonso oyo basala na banzete ya talo, na bronze, na bibende mpe na mabanga kitoko oyo babengaka marbre ; 13 eteni ya poso ya nzete oyo epesaka solo kitoko, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, malasi, mire, ansa, vino, mafuta, farine, ble, bangombe, bameme, bampunda, bashar, bawumbu mpe milimo ya bato. 14 Bakoloba : ‹ Biloko oyo ozalaki kolinga mingi ekimi yo mosika ; biloko nyonso oyo ezalaki kosala lolendo mpe lofundu na yo ebebi, ekotikala kozwama lisusu te ! › 15 Bato ya mombongo oyo bamonaki bomengo komata mpo ete bazalaki kotekela engumba yango biloko na bango, bakotelema na mosika mpo na somo ya pasi oyo ekokweyela yango. Bakolela mpe bakosala matanga. 16 Bakoloba :‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene,yo oyo ozalaki kolata bilamba ya lino ya kitoko,bilamba ya motane makasi,babiju ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka ! 17 Kaka na ngonga moko, bomengo nyonso esili ! ›Batambolisi nyonso ya bamasuwa, bato nyonso oyo basalaka mibembo na bamasuwa, bato oyo basalaka kati na bamasuwa mpe ba-oyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, bakotelema na mosika. 18 Wana bakomona molinga komata longwa na engumba oyo etumbami, bakoganga : ‹ Engumba nini ekokanaki na engumba monene oyo ? › 19 Bakobwaka putulu na mito na bango, bakolela, bakosala matanga mpe bakoganga makasi :‹ Mawa ! Mawa na yo,engumba monene epai wapi bato nyonsooyo bazalaki na bamasuwa na likolo ya ebale monenebakomaki bazwi mpo na bomengo na yo !Na ngonga moko kaka, obebisami ! › 20 Likolo, sepela na libebi na yango !Bino mpe basantu, bosepela !Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola !Pamba te Nzambe alongisi binoawa akateli yango etumbu. » 21 Bongo anjelu moko ya nguya akamataki libanga moko oyo ezalaki lokola libanga oyo basalelaka mpo na konika ble, abwakaki yango na ebale monene mpe alobaki :« Babiloni, engumba monene, ekobwakama ndenge wana,kaka na makasi moko wana,mpe ekomonana lisusu te. 22 Mindule ya babeti mandanda mpe ya bayembi,ya babeti piololo mpe babeti kelelo,ekoyokana lisusu te kati na yo.Bato ya misala ya maboko ya ndenge na ndengebakomonana lisusu te kati na yo.Makelele ya mabanga minene oyo banikelaka bleekoyokana lisusu te kati na yo. 23 Mwinda ekopela lisusu te kati na yo,mpe mongongo ya mobali mpe mwasi oyo bawuti kobalanaekoyokana lisusu te kati na yo.Makambo wana nyonso ekosalema,pamba te bato na yo ya mombongo bazalaki bato na nguya ya mokili.Okosaki bato ya bikolo nyonso na nzela ya maji na yo. 24 Kati na yo, emonanaki makila ya basakoli,ya basantu mpe ya bato nyonsooyo babomamaki na mokili. »

In Other Versions

Revelation 18 in the ANGEFD

Revelation 18 in the ANTPNG2D

Revelation 18 in the AS21

Revelation 18 in the BAGH

Revelation 18 in the BBPNG

Revelation 18 in the BBT1E

Revelation 18 in the BDS

Revelation 18 in the BEV

Revelation 18 in the BHAD

Revelation 18 in the BIB

Revelation 18 in the BLPT

Revelation 18 in the BNT

Revelation 18 in the BNTABOOT

Revelation 18 in the BNTLV

Revelation 18 in the BOATCB

Revelation 18 in the BOATCB2

Revelation 18 in the BOBCV

Revelation 18 in the BOCNT

Revelation 18 in the BOECS

Revelation 18 in the BOGWICC

Revelation 18 in the BOHCB

Revelation 18 in the BOHCV

Revelation 18 in the BOHLNT

Revelation 18 in the BOHNTLTAL

Revelation 18 in the BOICB

Revelation 18 in the BOILNTAP

Revelation 18 in the BOITCV

Revelation 18 in the BOKCV

Revelation 18 in the BOKCV2

Revelation 18 in the BOKHWOG

Revelation 18 in the BOKSSV

Revelation 18 in the BOLCB

Revelation 18 in the BOMCV

Revelation 18 in the BONAV

Revelation 18 in the BONCB

Revelation 18 in the BONLT

Revelation 18 in the BONUT2

Revelation 18 in the BOPLNT

Revelation 18 in the BOSCB

Revelation 18 in the BOSNC

Revelation 18 in the BOTLNT

Revelation 18 in the BOVCB

Revelation 18 in the BOYCB

Revelation 18 in the BPBB

Revelation 18 in the BPH

Revelation 18 in the BSB

Revelation 18 in the CCB

Revelation 18 in the CUV

Revelation 18 in the CUVS

Revelation 18 in the DBT

Revelation 18 in the DGDNT

Revelation 18 in the DHNT

Revelation 18 in the DNT

Revelation 18 in the ELBE

Revelation 18 in the EMTV

Revelation 18 in the ESV

Revelation 18 in the FBV

Revelation 18 in the FEB

Revelation 18 in the GGMNT

Revelation 18 in the GNT

Revelation 18 in the HARY

Revelation 18 in the HNT

Revelation 18 in the IRVA

Revelation 18 in the IRVB

Revelation 18 in the IRVG

Revelation 18 in the IRVH

Revelation 18 in the IRVK

Revelation 18 in the IRVM

Revelation 18 in the IRVM2

Revelation 18 in the IRVO

Revelation 18 in the IRVP

Revelation 18 in the IRVT

Revelation 18 in the IRVT2

Revelation 18 in the IRVU

Revelation 18 in the ISVN

Revelation 18 in the JSNT

Revelation 18 in the KAPI

Revelation 18 in the KBT1ETNIK

Revelation 18 in the KBV

Revelation 18 in the KJV

Revelation 18 in the KNFD

Revelation 18 in the LBA

Revelation 18 in the LBLA

Revelation 18 in the LNT

Revelation 18 in the LSV

Revelation 18 in the MAAL

Revelation 18 in the MBV

Revelation 18 in the MBV2

Revelation 18 in the MHNT

Revelation 18 in the MKNFD

Revelation 18 in the MNG

Revelation 18 in the MNT

Revelation 18 in the MNT2

Revelation 18 in the MRS1T

Revelation 18 in the NAA

Revelation 18 in the NASB

Revelation 18 in the NBLA

Revelation 18 in the NBS

Revelation 18 in the NBVTP

Revelation 18 in the NET2

Revelation 18 in the NIV11

Revelation 18 in the NNT

Revelation 18 in the NNT2

Revelation 18 in the NNT3

Revelation 18 in the PDDPT

Revelation 18 in the PFNT

Revelation 18 in the RMNT

Revelation 18 in the SBIAS

Revelation 18 in the SBIBS

Revelation 18 in the SBIBS2

Revelation 18 in the SBICS

Revelation 18 in the SBIDS

Revelation 18 in the SBIGS

Revelation 18 in the SBIHS

Revelation 18 in the SBIIS

Revelation 18 in the SBIIS2

Revelation 18 in the SBIIS3

Revelation 18 in the SBIKS

Revelation 18 in the SBIKS2

Revelation 18 in the SBIMS

Revelation 18 in the SBIOS

Revelation 18 in the SBIPS

Revelation 18 in the SBISS

Revelation 18 in the SBITS

Revelation 18 in the SBITS2

Revelation 18 in the SBITS3

Revelation 18 in the SBITS4

Revelation 18 in the SBIUS

Revelation 18 in the SBIVS

Revelation 18 in the SBT

Revelation 18 in the SBT1E

Revelation 18 in the SCHL

Revelation 18 in the SNT

Revelation 18 in the SUSU

Revelation 18 in the SUSU2

Revelation 18 in the SYNO

Revelation 18 in the TBIAOTANT

Revelation 18 in the TBT1E

Revelation 18 in the TBT1E2

Revelation 18 in the TFTIP

Revelation 18 in the TFTU

Revelation 18 in the TGNTATF3T

Revelation 18 in the THAI

Revelation 18 in the TNFD

Revelation 18 in the TNT

Revelation 18 in the TNTIK

Revelation 18 in the TNTIL

Revelation 18 in the TNTIN

Revelation 18 in the TNTIP

Revelation 18 in the TNTIZ

Revelation 18 in the TOMA

Revelation 18 in the TTENT

Revelation 18 in the UBG

Revelation 18 in the UGV

Revelation 18 in the UGV2

Revelation 18 in the UGV3

Revelation 18 in the VBL

Revelation 18 in the VDCC

Revelation 18 in the YALU

Revelation 18 in the YAPE

Revelation 18 in the YBVTP

Revelation 18 in the ZBP